Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Zechariah 11 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Open your doors, Lebanon—let fire devour your cedars! Mokili ya Libani, fungola bikuke na yo mpo ete moto ezikisa banzete na yo ya sedele !
2 Wail, cypress, for the cedar has fallen, the majestic trees are ruined! Wail, oaks of Bashan, for the thick forest has come down! Nzete ya sipele, lela, pamba te nzete ya sedele esili kokweya ! Banzete milayi esili kokatama. Banzete ya sheni ya Bashani, bolela ; pamba te basili kokata zamba monene !
3 Listen—the wailing of the shepherds, for their glory is ruined! Listen—the roaring of young lions, for the thickets of the Jordan are ruined! Boyoka ndenge babateli bibwele bazali kolela, pamba te bitando epai wapi baleisaka bibwele ebebisami. Boyoka ndenge bankosi ezali koganga, pamba te zamba ya Yordani, oyo etonda na banzete, esili kobebisama.
4 This is what my Father says: Shepherd the flock marked for slaughter. Tala liloba oyo Yawe, Nzambe na ngai, alobi : — Batela malamu bameme oyo babongisi mpo na koboma !
5 Their buyers slaughter them unpunished; their sellers say, "Praise God, I've grown rich!"—and their own shepherds show them no compassion. Bato oyo basombaka bibwele yango babomaka yango, bazalaka na somo ya etumbu ata moko te. Bato oyo batekaka yango balobaka : « Tika ete Yawe apambolama, pamba te nakomi mozwi ! » Mpe bango moko babateli na yango bayokelaka yango mawa ata moke te.
6 For I will no longer pity the land's people, declares our Father. I am handing everyone over—each into the hand of his neighbor and his king; they will crush the land, and I will rescue no one from their hand. Yango wana Ngai mpe nakoyokela lisusu bato ya mokili mawa te, nakokaba moto na moto na maboko ya moninga na ye mpe ya mokonzi na ye. Bakonzi bakobebisa mokili, kasi nakokangola ata moto moko te wuta na maboko ya bakonzi yango, elobi Yawe.
7 So I shepherded the flock marked for slaughter, the most oppressed of the flock. I took two staffs, naming one Favor and the other Union, and shepherded the flock. Boye, nabatelaki malamu bameme oyo babongisaki mpo na koboma ; mpe mingi penza bameme oyo ezalaki na pasi makasi. Nakamataki mangenda mibale : nabengaki moko Ngolu, mpe mosusu, Bomoko. Bongo, nakomaki kobatela bameme.
8 In one month I removed the three shepherds. I grew impatient with them, and they also hated me. Na sanza moko kaka, nabomaki babateli bibwele misato ; nakokaki lisusu kokanga motema te, mpe etonga eyinaki ngai.
9 Then I said, "I won't shepherd you. Let the dying die, the doomed be destroyed, and those left devour one another's flesh." Nalobaki na etonga ya bibwele : — Nakozala lisusu mobateli na bino te. Tika ete oyo ekokufa ekufa na yango, oyo ekobunga ebunga na yango ; mpe tika ete oyo ekotikala ebomana yango na yango !
10 I took my staff Favor and broke it, breaking the covenant I made with all the peoples. Nakamataki lingenda oyo nabengaki Ngolu, nabukaki yango mpo na kotalisa ete boyokani oyo nasalaki elongo na bikolo nyonso esili.
11 So it was broken that day, and the poor of the flock watching me knew this was the word of our Father. Boyokani esilaki nde na mokolo wana ; bongo, etonga oyo ezalaki na pasi makasi mpe ezalaki kotala ngai esosolaki ete ezalaki solo Liloba na Yawe.
12 I said to them, "If it seems right, give me my wages; if not, keep them." So they weighed out my wages—thirty pieces of silver. Nalobaki na bango : — Soki bomoni ete ezali malamu, bopesa ngai lifuti na ngai ; soki te, botika na bino. Bafutaki ngai mbongo ya bibende ya palata tuku misato lokola lifuti na ngai.
13 Then our Father said to me, "Throw it to the potter"—the grand price at which they valued me! So I took the thirty pieces of silver and threw them into the house of our Father, to the potter. Mpe Yawe alobaki na ngai : — Bwaka yango epai ya mosali mbeki ; yango nde motuya ya malonga oyo bamoni ete ekoki na Ngai ! Nakamataki mbongo yango ya bibende tuku misato mpe nabwakaki yango kati na Tempelo ya Yawe, epai ya mosali mbeki.
14 Then I broke my second staff, Union, annulling the brotherhood between Judah and Israel. Bongo nabukaki lisusu lingenda ya mibale oyo nabengaki Bomoko, mpo na kotalisa ete bondeko kati na libota ya Yuda mpe ya Isalaele ekufi.
15 Then our Father said to me, "Take up once more the gear of a foolish shepherd. Yawe alobaki na ngai : — Kamata lisusu bisalelo ya mobateli bibwele ya zoba !
16 For I am raising up a shepherd in the land who will not tend the perishing, not seek the scattered, not heal the broken, not sustain the healthy—but will eat the flesh of the fat ones and tear off their hooves. Pamba te nakobimisa kati na mokili mobateli bibwele ya sika oyo akobanda koluka te bibwele oyo ebungi, akolandela te bana bibwele, akosalisa te bapota ya bibwele oyo ezoki, akoleisa te oyo ezali na nzoto kolongono, kasi akobanda koliaka misuni ya bibwele ya mafuta mpe kobuka yango makolo.
17 Woe to my worthless shepherd, who deserts the flock! May the sword fall on his arm and on his right eye! Let his arm wither away completely, and his right eye go utterly blind!" Mawa na mobateli bibwele ya zoba oyo asundolaka etonga na ye ! Tika ete mopanga ekata ye loboko mpe etobola ye liso oyo ezali na ngambo ya loboko ya mobali ! Tika ete loboko na ye ekawuka, solo, ekawuka penza ! Tika ete liso na ye, oyo ezali na ngambo ya loboko ya mobali ekufa, ekufa solo !
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]