Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Zechariah 10 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Ask rain from our Father in the season of the spring rains—our Father who makes the storm clouds; he gives them showers of rain, to everyone the green growth of the field. Bosenga epai na Yawe ete anokisa mvula ya suka ; ezali Yawe nde atindaka mapata mpe bakake oyo ememaka bamvula minene, Ye nde abimisaka matiti na elanga ya moko na moko.
2 For the household idols speak emptiness, and the diviners see a lie; they tell false dreams and give worthless comfort. So the people wander like sheep; they are afflicted because there is no shepherd. Nzokande, banzambe ya bikeko elobaka maloba ya pamba, mpe bimoniseli ya bato ya soloka ezalaka ya lokuta : bazwaka bandoto oyo ezanga tina, mpe malendisi na bango ezalaka ya lokuta. Yango wana, bato bakomaki kotelengana lokola bibwele oyo ezangi mobateli.
3 "My anger burns against the shepherds, and I will punish the leaders of the flock; for the Father of heaven's armies has visited his flock, the house of Judah, and will make them like his majestic horse in battle. Kanda na Ngai ya makasi epeli mpo na babateli, mpe nakopesa bakambi etumbu, pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga, ayei mpo na kobatela etonga na Ye, libota ya Yuda ; akokomisa bango mpunda na Ye ya lokumu kati na bitumba.
4 From him will come the cornerstone, from him the tent peg, from him the battle bow, from him every ruler together. Na Yuda nde ekobimela libanga ya songe ya ndako, likonzi ya ndako ya kapo, tolotolo ya bitumba mpe bakambi nyonso.
5 Together they will be like mighty warriors, trampling the mud of the streets in battle. They will fight, because our Father is with them, and the riders on horses will be put to shame. Bango nyonso bakokoma lokola bilombe ya bitumba, oyo bakangamaka te na potopoto ya babalabala na tango ya bitumba. Lokola Yawe azali elongo na bango, bakobunda mpe bakolonga, ata basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda.
6 "I will strengthen the house of Judah, and I will save the house of Joseph. I will bring them home, because my heart goes out to them, and they will be as though I had never rejected them; for I am their Father, and I will answer them. « Nakolendisa libota ya Yuda mpe nakobikisa libota ya Jozefi, nakozongisa bango lisusu na mokili na bango, pamba te nakoyokela bango mawa ; bakozala lokola bato oyo nasundolaki te, pamba te nazali Yawe, Nzambe na bango, mpe nakoyanola bango.
7 Then Ephraim will be like a mighty warrior, and their hearts will be glad as with wine. Their children will see it and rejoice; their hearts will exult in our Father. Bato ya Efrayimi bakokoma lokola bilombe ya bitumba ; mitema na bango ekotonda na esengo lokola bato bameli masanga ; bana na bango ya mibali bakomona yango mpe bakotonda na esengo, bongo mitema na bango ekosepela kati na Yawe.
8 'I will whistle for them and gather them in, for I have redeemed them, and they will be as many as they once were. Nakobeta piololo mpo na kobenga bango mpe nakosangisa bango esika moko. Solo, nakokangola bango, mpe bakokoma ebele ndenge bazalaki liboso.
9 Though I scatter them among the peoples, in far-off lands they will remember me; they will live, together with their children, and they will return. Ata soki napanzi bango kati na bikolo ya bapaya, ezala na mokili oyo eleki mosika, bakokanisa Ngai kaka. Bango elongo na bana na bango ya mibali bakobika mpe bakozonga na mokili na bango.
10 I will bring them home from the land of Egypt and gather them from Assyria; I will bring them to the land of Gilead and Lebanon, until there is no more room for them. Nakozongisa bango wuta na Ejipito ; nakosangisa bango wuta na Asiri ; nakomema bango na Galadi mpe na Libani ; kasi atako bongo, esika ya kovanda ekozala moke mpo na bango.
11 They will pass through the sea of distress; he will strike down the waves of the sea, and all the depths of the Nile will run dry. The pride of Assyria will be brought low, and the scepter of Egypt will pass away.' Bakoleka na kati-kati ya ebale monene ya mitungisi ; bambonge ya ebale monene ekovanda kimia, bozindo nyonso ya ebale Nili ekokawuka. Lolendo ya Asiri ekosila mpe lingenda ya bokonzi ya Ejipito ekolongwa.
12 I will make them strong in me, and in my name they will walk, declares our Father." Nakosala ete balendisama kati na Yawe : bakotambola na Kombo na Ye, » elobi Yawe.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]