Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Zechariah 9 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 An oracle: the word of our Father is against the land of Hadrach, and Damascus is its resting place—for the eyes of mankind and all the tribes of Israel are toward our Father, Liloba na Yawe. Liloba na Yawe ekomi na mokili ya Adraki, ekowumela na engumba Damasi, pamba te miso ya bato mpe ya mabota nyonso ya Isalaele ezali kotalela Yawe.
2 and against Hamath also, which borders on it, and against Tyre and Sidon, though they are very wise. Tala, ekowumela lisusu likolo ya engumba Amati, na mondelo oyo ekabola yango na engumba Damasi, na engumba Tiri mpe Sidoni, atako baleki mayele.
3 Tyre built herself a fortress and heaped up silver like dust, and fine gold like the mud of the streets. Engumba Tiri emitongeli yango moko ndako makasi, emibombeli palata ebele lokola putulu mpe wolo ebele lokola potopoto ya balabala.
4 But look—the Sovereign Father will dispossess her and strike down her power on the sea, and she will be devoured by fire. Kasi Nkolo akobotola yango, akosukisa nguya na yango na ebale monene mpe ekozika na moto.
5 Ashkelon will see it and be afraid; Gaza too will writhe in anguish, and Ekron, for her hope withers away. The king will perish from Gaza, and Ashkelon will not be inhabited. Engumba Ashikeloni ekomona yango mpe ekokoma kolenga ; engumba Gaza ekokoma na somo makasi, ndenge moko mpe engumba Ekroni ; pamba te elikya na yango ekosila. Engumba Gaza ekozangela mokonzi na yango mpe engumba Asikaloni ekotikala lisusu na bato te.
6 "A mongrel people will settle in Ashdod, and I will cut off the pride of the Philistines. Bana makangu bakoya kovanda na engumba Asidodi, mpe nakosilisa lolendo ya bato ya Filisitia.
7 I will take away the blood from its mouth and its abominations from between its teeth; it too will be a remnant for our Father, and it will be like a clan in Judah, and Ekron like the Jebusites. Nakolongola makila na minoko na bango, mpe bilei ya mbindo na minu na bango ; kasi ba-oyo bakotikala bakokoma bato ya Nzambe na biso mpe bakambi ya Yuda ; mpe bato ya engumba Ekroni bakokoma lokola bato ya Yebusi.
8 Then I will encamp at my house as a guard, so that no one marches back and forth; no oppressor will ever again overrun them, for now I am watching with my own eyes." Nakobundela ndako na Ngai liboso ya mampinga ya basoda ya nguya ; monyokoli moko te akoya lisusu komonisa bato na Ngai pasi, pamba te Ngai moko nde nazali kokengela sik’oyo.
9 Rejoice greatly, daughter of Zion! Shout aloud, daughter of Jerusalem! Look—your king is coming to you; righteous and victorious is he, humble and riding on a donkey, on a colt, the foal of a donkey. Siona, mboka kitoko, sepela, sepela penza makasi ! Yelusalemi, mboka kitoko, ganga penza na esengo ! Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo, azali sembo mpe molongi, atonda na komikitisa, avandi na likolo ya ane, na likolo ya mwana ya ane, mwana ya ane ya mwasi.
10 I will cut off the chariot from Ephraim and the warhorse from Jerusalem, and the battle bow will be cut off; and he will speak peace to the nations. His rule will reach from sea to sea, and from the River to the ends of the earth. Nakolongola bashar ya bitumba na mokili ya Efrayimi, bampunda ya bitumba, na engumba Yelusalemi, mpe matolotolo ya bitumba ekobukana. Mokonzi yango akosakola kimia na bikolo nyonso, bokonzi na ye ekobanda longwa na ebale monene moko kino na mosusu, longwa na ebale kino na basuka ya mabele.
11 "As for you also, because of the blood of my covenant with you, I will set your prisoners free from the waterless pit. Mpo na yo, likolo ya makila ya boyokani na Ngai elongo na yo, nakobimisa bakangami na yo na libulu oyo ezanga mayi.
12 Return to your stronghold, you prisoners of hope; today I declare that I will restore to you double. Bozonga na ndako na bino, oyo batonga makasi, bino bakangami oyo botondi na elikya, pamba te nazali koloba na bino sik’oyo : « Nakozongisela bino mbala mibale biloko oyo bobungisaki. »
13 For I have bent Judah as my bow and laid Ephraim to it as the arrow. I will rouse your sons, O Zion, against your sons, O Greece, and make you like the sword of a warrior." Pamba te nabendi tolotolo na Ngai, oyo ezali Yuda, natie yango likonga na Ngai ya moke oyo ezali Efrayimi. Siona, nakotelemisa bana na yo ya mibali mpo ete batelemela bana mibali ya Yavani mpe nakokomisa yo lokola mopanga ya elombe.
14 Then our Father will appear over them, and his arrow will go out like lightning; the Sovereign Father will sound the trumpet and march out in the whirlwinds of the south. Yawe akomimonisa epai na bango, mpe tolotolo na Ye ekobima lokola mokalikali. Nkolo Yawe akobeta kelelo mpe akotambola kati na mopepe makasi.
15 The Father of heaven's armies will shield them, and they will devour and trample the sling stones; they will drink and roar as with wine, and be full like the bowl, drenched like the corners of the altar. Yawe, Mokonzi ya mampinga, akobatela bango. Bakolia mpe bakobuka mabanga ya ebambelo mabanga, bakomela mpe bakosala makelele lokola bato balangwe masanga, bakotonda lokola kopo ya makila oyo basopaka na basonge ya etumbelo.
16 On that day their Father will save them, as the flock of his people; for like the jewels of a crown they will sparkle over his land. Na mokolo wana, Yawe, Nzambe na bango, akobikisa bango ndenge mobateli bibwele abikisaka bameme na ye. Bakongenga makasi kati na mabele na Ye lokola mabanga ya talo.
17 How great is his goodness, and how great his beauty! Grain will make the young men flourish, and new wine the young women. Bakozala bato ya esengo, bakokoma kitoko makasi. Ble ekopesa bilenge mibali makasi mpe vino ya sika ekopesa bilenge basi makasi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]