Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Zechariah 8 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The word of the Father of heaven's armies came to me, saying: Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobaki na ngai :
2 This is what the Father of heaven's armies says: I am jealous for Zion with great jealousy; with burning wrath I am jealous for her. « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Nazali na zuwa makasi mpo na Siona, mpo ete nalingaka yango makasi na motema na Ngai. › »
3 This is what our Father says: I have returned to Zion and will live within Jerusalem. Jerusalem will be called the City of Truth, and the mountain of the Father of heaven's armies, the Holy Mountain. Tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakozonga na Siona mpe nakovanda kati na Yelusalemi. Boye, Yelusalemi ekobengama Engumba ya bosolo ; mpe ngomba ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ekobengama Ngomba ya bule. »
4 This is what the Father of heaven's armies says: Old men and women will again sit in Jerusalem's streets, each holding a staff for great age. Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Mibange ya mibali mpe ya basi bakotonda lisusu na babalabala ya Yelusalemi, moto na moto na nzete na ye na loboko mpo na kimobange.
5 And the streets of the city will be full of boys and girls playing in its streets. Babalabala ya engumba ekotonda lisusu na bilenge mibali mpe basi oyo bakokoma kosakana kuna. »
6 This is what the Father of heaven's armies says: If it seems too marvelous to the remnant of this people in those days, should it also be too marvelous to me? says the Father of heaven's armies. Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Boni, soki, na tango wana, ekomonana lokola likambo ya kokamwa na miso ya batikali kati na bato oyo, Ngai mpe namona yango likambo ya kokamwa ? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
7 This is what the Father of heaven's armies says: See, I am saving my people from the land of the sunrise and the land of the sunset. Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Nakobikisa bato na Ngai, longwa na mokili ya este kino na mokili ya weste.
8 I will bring them home to live within Jerusalem. They will be my children, and I their Father, in truth and righteousness. Nakozongisa bango mpo ete bavanda na Yelusalemi ; bakozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bango na boyengebene mpe na bosembo. »
9 This is what the Father of heaven's armies says: Let your hands be strong, you who in these days hear these words from the mouth of the prophets who spoke when the foundation of the house of the Father of heaven's armies was laid, so the temple could be built. Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bino ba-oyo, na mikolo oyo, bozali koyoka maloba kaka oyo basakoli balobaki, lokola bazalaki awa na tango miboko ya Tempelo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ezalaki kotongama, boyika mpiko mpe bolendisa maboko na bino mpo na kotonga Tempelo oyo ya Yawe.
10 Before then no wages came for man or beast, and no one going out or coming in was safe from the enemy, for I set everyone against his neighbor. Pamba te, liboso ya tango wana, bato bazalaki kozwa lifuti ya malonga te na misala na bango, mpe banyama ezalaki kopesa ata litomba moko te ; moto moko te azalaki kokende na mosala na ye na kimia likolo ya kobanga banguna, pamba te nasalaki ete moto moko na moko atelemela moninga na ye.
11 But now I will not treat the remnant of this people as in former days, declares the Father of heaven's armies. Kasi sik’oyo, nakosala lisusu te, na ndambo ya bato oyo batikali, makambo oyo nasalaki na tango ya kala, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
12 There will be a sowing of peace: the vine gives its fruit, the land its produce, the heavens their dew. And I will give the remnant of this people all these as an inheritance. « Solo, milona ekokola malamu, bilanga ya vino ekobota bambuma na yango, mabele ekobimisa biloko ebele, mpe likolo ekonokisa mvula. Nakopesa biloko oyo nyonso lokola libula epai ya batikali kati na bato oyo.
13 As you were a curse among the nations, house of Judah and house of Israel, so I will save you, and you will be a blessing. Do not fear; let your hands be strong. Libota ya Yuda mpe libota ya Isalaele, bobanga ata eloko moko te, boyika kaka mpiko ; pamba te ndenge bokomaki bikolo elakelama mabe kati na bikolo mosusu, ndenge wana mpe nakobikisa bino, mpe bokozala lipamboli. »
14 This is what the Father of heaven's armies says: As I planned disaster for you when your ancestors provoked me to anger, and did not change my mind, says the Father of heaven's armies, Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Ndenge kaka nazwaki mokano ya kotindela bino pasi mpe ya koyokela bino mawa te tango batata na bino batumbolaki kanda na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga,
15 so again in these days I have determined to do good to Jerusalem and the house of Judah. Don't be afraid. « ndenge wana mpe nazwi mokano sik’oyo ya komonisa lisusu bolamu na Yelusalemi mpe na Yuda. Bozala na bobangi te.
16 Do these things: Speak truth to each other; judge with truth and justice for peace in your gates. Tala makambo oyo bosengeli kosala : Tika ete moko na moko kati na bino alobaka solo na moninga na ye ; bosambisaka na bosolo mpe bokataka makambo na bosembo kati na bisambiselo na bino,
17 Do not plot evil in your hearts against your neighbor, and do not love a false oath, for I hate all these, declares our Father. bosalaka mabongisi ya komonisa baninga na bino pasi te, bolingaka te kolapa ndayi ya lokuta ; pamba te makambo wana nyonso, nayina yango makasi, » elobi Yawe.
18 And the word of the Father of heaven's armies came to me, saying: Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobaki na ngai :
19 This is what the Father of heaven's armies says: The fasts of the fourth, fifth, seventh, and tenth months will become joy, delight, and cheerful feasts for the house of Judah. So love truth and peace. « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : Mikolo ya kokila bilei ya sanza ya minei, ya mitano, ya sambo mpe ya zomi ekokoma mikolo ya esengo mpe ya kosepela, ekokoma bafeti ya nkembo mpe ya esengo mpo na libota ya Yuda. Kasi bolinga solo mpe kimia. »
20 This is what the Father of heaven's armies says: Peoples will yet come, residents of many cities. Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bato ya bikolo ebele mpe bavandi ya bingumba ya ndenge na ndenge bakoya lisusu ;
21 The people of one city will go to another, saying, 'Let us go at once to seek the favor of our Father, to seek the Father of heaven's armies; I myself will go.' bamoko bakowuta na engumba moko mpo na kokende na engumba mosusu mpe bakoloba : ‹ Tokende kobondela Yawe mpe koluka elongi na Yawe, Mokonzi ya mampinga ! › Bongo bamosusu bakozongisela bango : ‹ Ngai mpe nakokende ! ›
22 Many peoples and strong nations will come to seek the Father of heaven's armies in Jerusalem and to seek our Father's favor. Boye bato ebele mpe bikolo ya nguya bakoya na Yelusalemi mpo na koluka elongi na Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe bakobondela Ye. »
23 This is what the Father of heaven's armies says: In those days ten men from all languages of the nations will grasp the robe of a Jewish man, saying, 'Let us go with you, for we've heard God is with you.' Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Na mikolo wana, bato zomi ya bikolo mpe ya nkota ya ndenge na ndenge bakokanga songe ya nzambala ya Moyuda moko mpe bakoloba : ‹ Tika ete tokende elongo na yo, pamba te toyoki ete Nzambe azali na bino elongo. › »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]