Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Zechariah 7 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 In King Darius's fourth year, our Father's word came to Zechariah on the fourth day of the ninth month, Chislev. Na mobu ya minei ya mokonzi ya Dariusi, na mokolo ya minei ya sanza ya libwa, sanza ya kisilevi, Yawe alobaki na Zakari.
2 The people of Bethel sent Sharezer and Regem-melech and their men to plead for our Father's favor, Bato ya Beteli batindaki Saretseri, Regemi-Meleki elongo na bato na bango mpo na kobondela Yawe
3 and to ask the priests of the house of the Father of heaven's armies, and the prophets, "Should I weep and fast in the fifth month, as I have these many years?" mpe mpo na kotuna motuna oyo epai ya Banganga-Nzambe oyo basalaka kati na Tempelo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe epai ya basakoli : — Boni, tosengeli kaka kokoba kolela mpe kokila bilei na sanza ya mitano ndenge tosalaka wuta kala ?
4 Then the word of the Father of heaven's armies came to me: Bongo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobaki na ngai :
5 Say to all the people of the land and the priests: When you fasted and mourned in the fifth and seventh months these seventy years, was it really for me that you fasted? — Tuna bato nyonso ya ekolo mpe Banganga-Nzambe : « Wuta mibu tuku sambo, tango bokilaka bilei mpe bolelaka na sanza ya mitano mpe ya sambo, bosalaka yango mpo na Ngai ?
6 When you eat and drink, isn't it for yourselves that you eat and drink? Bongo tango bozalaki kolia mpe komela, ezalaki te mpo na esengo na bino moko ?
7 Aren't these the very words our Father proclaimed through the earlier prophets, when Jerusalem and her surrounding towns were settled and at peace, and the Negev and foothills were inhabited? Yango ezali te liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya basakoli na Ye wuta kala tango Yelusalemi mpe bingumba oyo ezingelaki yango ezalaki na kimia mpe na boyokani, mpe Negevi mpe Shefela etondaki na bato ebele ? »
8 And the word of our Father came to Zechariah: Mpe Yawe alobaki lisusu na Zakari :
9 What the Father of heaven's armies says: Render true justice; show kindness and compassion to one another. — Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokataka makambo na bosembo, mpe tika ete moko na moko kati na bino azala na bolingo mpe na mawa ya moto mosusu.
10 Do not oppress the widow, the fatherless, the foreigner, or the poor; and do not plot evil against one another in your hearts. Bonyokolaka te mwasi oyo akufisa mobali to mwana etike to mopaya to mpe mobola, mpe tika ete moko te kati na bino asala, na motema na ye, mabongisi ya kosala moninga na ye mabe. »
11 But they refused to listen, stubbornly turned their backs, and covered their ears so they wouldn't hear. Kasi baboyaki kotosa, bamatisaki mapeka mpe bakangaki matoyi na bango mpo ete bayoka Ngai te.
12 They made their hearts as hard as flint, refusing to hear the law and the words the Father of heaven's armies had sent by his Spirit through the earlier prophets. So great anger came from the Father of heaven's armies. Bakomisaki mitema na bango makasi lokola diama mpo kaka bayoka te mibeko mpe maloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, azalaki koloba na bango na lisungi ya Molimo na Ye na nzela ya basakoli na Ye ya kala. Mpo na yango, Yawe, Mokonzi ya mampinga, atombokaki makasi.
13 "Just as I called and they would not listen, so when they called I would not listen," says the Father of heaven's armies. Boye, Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobaki : « Lokola bayokaki Ngai te tango nazalaki kobenga bango, Ngai mpe nayokaki bango te tango babengaki Ngai.
14 I scattered them with a whirlwind among all the nations they had not known. The land was left desolate behind them, with no one passing through, coming or going. This is how they made the pleasant land a wasteland. Na bongo, napanzaki bango kati na bikolo nyonso epai wapi bakomaki bapaya, mpe mokili na bango ebebisamaki makasi : moto moko te akokaki lisusu kokota to kobima kuna. Ndenge wana nde bakomisaki mokili ya kitoko libebi. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]