Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Zechariah 6 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 I looked up again—four chariots coming out between two mountains, mountains of bronze. Tango natalaki lisusu, namonaki bashar minei liboso na ngai : ezali kobima na kati-kati ya bangomba mibale ya bronze.
2 The first chariot had red horses, the second chariot black horses, Bampunda ya langi ya motane makasi ezalaki kobenda shar ya liboso, mpe bampunda ya langi ya mwindo ezalaki kobenda shar oyo ya mibale.
3 the third chariot white horses, and the fourth chariot dappled horses—all of them strong. Bampunda ya langi ya pembe ezalaki kobenda shar oyo ya misato, bampunda ya madodo-madodo ezalaki kobenda shar oyo ya minei. Bampunda nyonso ya madodo-madodo ezalaki makasi.
4 So I asked the angel who was speaking with me, "What are these, my lord?" Natunaki Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai : — Bampunda nyonso oyo elakisi nini, nkolo na ngai ?
5 The angel answered, "These are heaven's four winds, going out from standing before the Sovereign of all the earth. Azongiselaki ngai : — Ezali Molimo ya likolo oyo akokende na bangambo nyonso minei ya mokili mobimba. Atelemaki liboso ya Nkolo ya mokili mobimba mpe sik’oyo abimi.
6 The chariot with black horses goes to the northern land, the white after them, and the dappled to the southern land. Shar oyo bampunda ya langi ya mwindo ezali kobenda ezali kokende na mokili ya nor ; shar oyo bampunda ya langi ya pembe ezali kobenda ezali kolanda oyo ya liboso, mpe shar oyo bampunda ya madodo-madodo ezali kobenda ezali kokende na mokili ya sude.
7 When the strong horses went out, straining to patrol the earth, he said, 'Go, patrol the earth!' So they patrolled the earth." Bampunda nyonso ya makasi ebimaki mpe etondaki na posa makasi ya kotambola na mabele. Boye, Anjelu alobaki na yango : « Bokende kotambola na mokili ! » Mpe ebimaki mpo na kokende kotambola na mabele.
8 Then he called to me, saying, "Look, those going to the northland have set my Spirit at rest in the northland." Abengaki ngai mpe alobaki na ngai : — Tala, bampunda oyo ezali kokende na mokili ya nor ekosala ete Molimo na ngai avanda na mokili wana ya nor.
9 Then the word of our Father came to me: Yawe alobaki na ngai :
10 "Take an offering from the exiles—Heldai, Tobijah, and Jedaiah, who have come from Babylon—and go that same day to the house of Josiah son of Zephaniah. — Kamata palata mpe wolo epai ya Elidayi, Tobiya mpe Yedaeya, ba-oyo bawuti na bowumbu wuta na Babiloni ; mpe na mokolo yango kaka, kende yo moko na ndako ya Joziasi, mwana mobali ya Sofoni, epai wapi bakomeli.
11 Take silver and gold, make a crown, and set it on the head of Joshua son of Jehozadak, the high priest.' Kamata palata mpe wolo mpo ete osalela yango motole ; bongo okolatisa yango Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe.
12 Tell him: This is what the Father of heaven's armies says: 'Here is the man named the Branch; he will branch out from his place and build the temple of our Father. Okoyebisa ye maloba oyo : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Tala moto oyo kombo na ye ezali : Moto ya nzete. Nyonso ekobota esika ye azali, mpe ezali ye nde akotonga Tempelo ya Yawe.
13 He will build our Father's temple, carry the majesty, and sit and rule on his throne. He will be a priest on his throne, and peaceful harmony will join the two offices. Ezali ye nde akotonga Tempelo ya Yawe ; bakolatisa ye bilembo ya lokumu, mpe akovanda na kiti ya bokonzi mpo na kokonza. Mpe wana kaka na kiti na ye ya bokonzi, akozala mpe Nganga-Nzambe. Bongo misala nyonso mibale, ezala ya bokonzi to ya bonganga-Nzambe, ekotambola malamu. › »
14 The crown will stay in our Father's temple as a memorial to Heldai, Tobijah, Jedaiah, and Hen son of Zephaniah. Bakobomba motole yango kati na Tempelo ya Yawe lokola ekaniseli mpo na kokanisa motema malamu ya Elidayi, ya Tobiya, ya Yedaeya mpe ya Eleme, mwana mobali ya Sofoni.
15 Those far off will come and build the temple of our Father, and you will know the Father of heaven's armies sent me to you. This will happen if you diligently obey his voice.'" Bato oyo bakowuta mosika penza bakoya mpo na kosunga misala ya kotonga Tempelo ya Yawe, bongo bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai epai na bino. Makambo oyo ekokokisama solo soki boluki kotosa Yawe, Nzambe na bino.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]