Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Zechariah 5 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Again I lifted my eyes and looked, and there before me was a flying scroll. Tango natalaki lisusu, namonaki buku moko : ezali kopumbwa.
2 He asked, "What do you see?" I answered, "I see a flying scroll, thirty feet long, fifteen feet wide." Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai atunaki ngai : — Ozali komona nini ? Nazongisaki : — Nazali komona buku moko : ezali kopumbwa ; molayi na yango ezali na bametele pene zomi, mpe mokuse na yango, bametele pene mitano.
3 Then he said to me, "This is the curse going out over the whole land. Everyone who steals will be purged away, by one side of it; everyone who swears falsely, purged away by the other." Alobaki na ngai : — Ezali nde bilakeli mabe oyo ezali kopanzana na mokili mobimba ; pamba te, kolanda ndenge ekomama na ngambo moko, bakobengana miyibi nyonso ; mpe kolanda ndenge ekomama na ngambo mosusu, bakobengana bato nyonso oyo balapaka ndayi ya lokuta.
4 "I have sent it out, declares the Father of heaven's armies; it will enter the thief's house and the house of whoever swears falsely by my name, stay there, and consume it—both timbers and stones." Nakoyeisa elakeli mabe oyo mpo ete ekota kati na ndako ya moyibi mpe kati na ndako ya moto oyo alapaka ndayi ya lokuta na Kombo na Ngai. Ekotikala solo kati na ndako na ye mpe ekobebisa yango nyonso, ezala mabaya to mabanga na yango, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
5 Then the angel talking with me came forward and said, "Now look up and see what this is going out." Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai apusanaki pene na ngai mpe alobaki : — Tombola miso na yo mpe tala makambo oyo ezali koleka kuna.
6 I asked, "What is it?" He said, "The basket going out." Then, "This is their guilt across the whole land." Natunaki : — Makambo nini yango ? Azongisaki : — Ezali nde sani, emekelo motuya ya biloko. Abakisaki : — Sani yango etondisamaki na masumu ya bato ya mokili.
7 Suddenly, the lead cover was lifted, and there was a woman sitting inside the basket. Kaka na tango yango, mofinuku na yango ya ebende etombwamaki, mpe namonaki mwasi moko avanda na kati.
8 He said, "This is Wickedness." He pushed her back into the basket and forced the lead weight over its mouth. Alobaki : — Mwasi wana azali elembo ya makambo mabe. Bongo azongisaki ye kati na sani, emekelo motuya ya biloko, mpe azipaki mofinuku na yango.
9 I looked up and saw two women coming, wind in their wings—wings like a stork's—and they lifted the basket between earth and sky. Natombolaki miso mpe namonaki liboso na ngai basi mibale bazali kopumbwa mpo na koya epai na biso. Mapapu na bango ezalaki minene lokola mapapu ya nkongi. Batombolaki sani yango kino na kati-kati ya likolo mpe se.
10 Then I said to the angel who was speaking with me, "Where are they taking the basket?" Natunaki Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai : — Bazali komema sani yango wapi ?
11 He said to me, "To build a house for it in the land of Shinar; and when it's ready, the basket will be set there on its base." Azongisaki : — Bazali komema yango na mokili ya Babiloni mpo ete batongela yango ndako, na Shineari. Soki ndako yango esili kotongama, bakotia sani yango kuna.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]