Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Zechariah 4 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then the angel who talked with me returned and woke me, like someone woken from sleep. Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai azongaki mpe alamusaki ngai ndenge balamusaka moto oyo alali pongi.
2 He asked, "What do you see?" I said, "A gold lampstand, a bowl on top, seven lamps, seven spouts for each lamp on top. Atunaki ngai : — Ozali komona nini ? Nazongiselaki ye : — Nazali komona etelemiselo moko ya mwinda, basala na wolo mpe, na likolo na yango, ezali na kopo moko, minda sambo mpe batio sambo oyo elekisaka mafuta kino na minda.
3 Two olive trees stand by it, one on the bowl's right, the other on its left." Ezali lisusu na banzete mibale ya olive pene ya etelemiselo ya minda : moko na ngambo ya loboko ya mobali, mpe mosusu na ngambo ya loboko ya mwasi.
4 And I said to the angel who talked with me, "What are these, my lord?" Natunaki Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai : — Nyonso oyo elakisi nini, nkolo na ngai ?
5 Then the angel talking with me said, "Don't you know what these are?" I said, "No, my lord." Azongiselaki ngai : — Boni, oyebi te soki elingi kolakisa nini ? Nazongiselaki ye : — Te, nkolo na ngai !
6 He said to me, "This is our Father's word to Zerubbabel: Not by might, nor by power, but by my Spirit, says the Father of heaven's armies. Alobaki na ngai : — Tala liloba oyo Yawe alobi na Zorobabeli : « Ezali na makasi to na nguya na yo te, kasi na nguya na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
7 Who are you, great mountain? Before Zerubbabel you become level ground. He brings out the capstone shouting, "Grace, grace to it!" Ozali nani, ngomba monene ? Okokoma etando liboso ya Zorobabeli. Akobimisa libanga monene kati na yo, wana bato bakozala koganga na esengo : « Tika ete Nzambe apambola yango ! Tika ete Nzambe apambola yango ! »
8 Then the word of our Father came to me, saying, Bongo Yawe alobaki na ngai :
9 Zerubbabel's hands laid this house's foundation; his hands will finish it. Then you'll know the Father of heaven's armies sent me to you. — Ezali maboko ya Zorobabeli nde etongaki miboko ya Tempelo oyo ; ezali mpe kaka maboko yango nde ekosilisa mosala ya kotonga yango. Boye bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai epai na bino.
10 Who has despised the day of small things? They will rejoice, seeing the plumb line in Zerubbabel's hand. These seven are the eyes of our Father, ranging over the whole earth." Nani atiolaki makambo mike ya ebandeli ? Bato bakotonda na esengo tango bakomona, na maboko ya Zorobabeli, singa oyo bamekelaka molayi. Biloko wana sambo ezali nde miso ya Yawe oyo etalaka mokili mobimba.
11 Then I asked him, "What are these two olive trees right and left of the lampstand?" Natunaki Anjelu : — Banzete mibale ya olive oyo ezali na ngambo ya loboko ya mobali mpe ya mwasi ya etelemiselo ya minda elakisi nini ?
12 I asked again, "What are these two olive branches beside the two golden pipes pouring out golden oil?" Natunaki ye lisusu : — Bitape mibale ya nzete ya olive, oyo ezali pembeni ya batio mibale ya wolo oyo ebimisaka mafuta oyo engalaka elakisi nini ?
13 He said to me, "Don't you know what these are?" I said, "No, my lord." Azongiselaki ngai : — Boni, oyebi te soki elakisi nini ? Nazongisaki : — Te, nkolo na ngai.
14 He said, "These are the two anointed ones standing by the Sovereign of all the earth." Boye, alobaki : — Ezali nde bato mibale oyo bapakolami mafuta mpo na kosalela Nkolo ya mokili mobimba.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]