Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Zechariah 3 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then he showed me Joshua the high priest standing before the messenger of our Father, with the Accuser at his right hand to accuse him. Yawe alakisaki ngai Jozue, mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo azalaki ya kotelema liboso ya Anjelu ya Yawe. Alakisaki ngai lisusu Satana oyo azalaki ya kotelema na ngambo ya loboko ya mobali ya Jozue mpo na kofunda ye.
2 And our Father said to the Accuser, "May he rebuke you, Accuser! May he who has chosen Jerusalem rebuke you! Is this man not a burning stick snatched from the fire?" Yawe alobaki na Satana : — Satana, tika ete Yawe apamela yo ! Tika ete Yawe oyo apona Yelusalemi apamela yo ! Boni, moto oyo azali te lokola koni ya moto oyo balongoli na moto ?
3 Now Joshua was dressed in filthy garments as he stood before the messenger. Nzokande, Jozue alataki bilamba ya salite tango atelemaki liboso ya Anjelu.
4 He said to those standing before him, "Remove his filthy clothes." Then to Joshua: "See, I've taken your guilt away, and I'll dress you in fine robes." Bongo Anjelu alobaki na ba-oyo bazalaki kotelema liboso na ye : — Bolongola ye bilamba wana ya salite ! Mpe alobaki na Jozue : — Tala, nalongoli masumu na yo mpe nakolatisa yo bilamba ya talo.
5 Then I said, "Put a clean turban on his head." So they put it on his head and dressed him, while the messenger of our Father stood by. Nalobaki : — Bolatisa ye kitendi ya peto oyo bakangaka na moto. Boye, bakangaki ye kitendi ya peto na moto mpe balatisaki ye bilamba mosusu wana Anjelu ya Yawe atelemaki pene na ye.
6 Then the messenger of our Father solemnly charged Joshua: Anjelu ya Yawe ayebisaki na Jozue maloba oyo :
7 "This is what the Father of heaven's armies says: If you walk in my ways and keep my requirements, you will govern my house and oversee my courts, and I will give you a place among these standing here. — Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Soki otamboli na nzela na Ngai mpe obateli mitindo na Ngai, okokamba ndako na Ngai mpe okobatela lopango na Ngai, mpe nakotia yo na molongo ya ba-oyo batelemaka awa.
8 Listen now, Joshua the high priest, you and your companions seated before you, for they are men who are a sign: I am about to bring my servant, the Branch. Jozue, mokonzi ya Banganga-Nzambe, yo elongo na bandeko na yo, Banganga-Nzambe oyo basalaka elongo na yo, bozali bilembo oyo etalisaka makambo oyo ekoya. Nakobimisa Mosali na Ngai ; bakobenga Ye : Moto ya nzete oyo ebimaka na mobimbi.
9 Look at the stone I set before Joshua: seven eyes on that one stone. I will engrave its inscription, declares the Father of heaven's armies, and I will remove this land's guilt in one day. Tala, natie libanga liboso ya Jozue. Libanga yango ezali na miso sambo, nakokoma makomi na likolo na yango, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « mpe nakolongola masumu ya mokili oyo na mokolo moko.
10 In that day, declares the Father of heaven's armies, each will invite his neighbor under his vine and under his fig tree." Na mokolo wana, moko na moko kati na bino akobengisa moninga na ye mpo ete bavanda na se ya nzete ya vino mpe ya figi, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]