Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Micah 2 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Woe to those who plot wickedness and work out evil upon their beds! At the morning light they carry it out, because they have the power to do it. Mawa na bato oyo babongisaka kosala mabe, oyo bakanisaka kosala bato mabe na bambeto na bango ! Bakokisaka yango na tongo, pamba te bazali na makoki ya kosala yango.
2 They covet fields and seize them, and houses, and carry them off. They oppress a man and his house, a person and his inheritance. Soki baluli bilanga ya moto, bazwaka yango na makasi ; soki baluli ndako ya moto, babotolaka yango ; bakangaka mokolo ndako mpe biloko na ye ya ndako mpe babotolaka moto libula na ye.
3 Therefore this is what our Father says: Look, against this family I am devising disaster, from which you cannot pull your necks free; you will not be able to hold your heads high, for it is an evil time. Mpo na yango, Yawe alobi : « Nazali kobongisa mabe mpo na ekolo ya lolenge oyo : ekozala pasi moko oyo bakokoka komibikisa na yango te. Bakokoka lisusu kotambola na lolendo te, pamba te ekozala tango ya pasi makasi.
4 In that day they will take up a taunt against you and wail with bitter lamentation, saying, "We are utterly ruined! He trades away the portion of my people; how he strips it from me! To the traitor he parcels out our fields." Na mokolo wana, bakosambwisa bino ; mpo na kotiola bino, bakobanda koyembela bino banzembo oyo : ‹ Tobebisami penza mobimba ! Libula ya bato na ngai ekabwani ! Abotoli yango na maboko na ngai mpe akabi bilanga na biso epai ya banguna na biso. › »
5 Therefore you will have no one to cast the measuring line by lot in the assembly of our Father. Yango wana, moko te kati na bino akotikala na lisanga ya Yawe mpo na kokabola mabele na zeke.
6 "Do not preach!" they preach. "No one should preach such things; disgrace will not overtake us." Basakoli na bango bazalaki koloba : « Kosakola te, kosakola makambo ya boye te ! Pasi ekokomela biso te. »
7 Should this be said, house of Jacob? Is the Spirit of our Father impatient? Are these his deeds? Do not my words bring good to the one who walks uprightly? Oh libota ya Jakobi, makambo ya boye esengeli solo kolobama ? « Boni, Molimo na Yawe atomboki mpo ete asala makambo ya boye ? Maloba na Ye ezali ya boboto te mpo na moto oyo atambolaka alima ? »
8 But lately my children have risen up as an enemy. You strip the rich robe from those who pass by unsuspecting, like men returning from war who wanted no fight. Na mikolo eleki, bozalaki komona bato na ngai lokola banguna. Bolongolaki bato oyo bazalaki koleka na kimia bilamba ya talo na mawa te, lokola bato oyo bawuti bitumba ;
9 You drive the women of my people out of their pleasant homes; from their little children you take away my splendor forever. bobenganaki basi ya bato na ngai longwa na bandako na bango ya kitoko, bolongolaki mpo na libela mapamboli na ngai kati na bana na bango.
10 Get up and go, for this is no place of rest; because it is defiled, it brings destruction—a grievous destruction. Botelema mpe bokende ! Awa ezali esika na bino ya kopema te, pamba te ezali mbindo, ebebisami makasi penza, mpe elikya ya kobonga ezali lisusu te.
11 If a man who lives by empty deceit were to lie, "I will preach to you of wine and alcohol," he would be just the preacher for this people! Soki mokosi moko to moto moko ya lokuta ayei koloba : « Nakosakola mpo na yo ; » bongo moto yango azali na se ya milangwa ya vino to ya masanga mosusu ya makasi, moto ya boye asengeli kaka kozala mosakoli ya bato ya lolenge na ye.
12 I will surely gather all of you, Jacob; I will surely bring together the remnant of Israel. I will set them as one, like sheep in a pen, like a flock in the midst of their pasture—a place loud with people. Oh bakitani ya Jakobi, nakosangisa bino nyonso, nakosangisa batikali nyonso ya Isalaele. Nakosangisa bango lokola bameme kati na lopango, lokola bibwele kati na etando na yango ya kolia matiti. Makelele oyo ekoyokana kuna ekozala makelele ya bato ebele.
13 The one who breaks open the way goes up before them; they break through and pass the gate, going out through it. Their King goes on ahead of them, our Father at their head. Moto oyo apasolaka nzela akotambola liboso na bango. Bakolekela na nzela oyo bapasoli, bakolekela na nzela ya ekuke mpe bakobimela na nzela yango. Mokonzi na bango akotambola liboso na bango, Yawe akozala liboso na bango.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]