Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Micah 1 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The word of our Father to Micah of Moresheth in the days of Jotham, Ahaz, and Hezekiah, kings of Judah—what he saw about Samaria and Jerusalem. Yawe alobaki na Mishe, moto ya mboka Moresheti, na tango Yotami, Akazi mpe Ezekiasi bazalaki, moko sima na mosusu, bakonzi ya Yuda : ezalaki emoniseli oyo Mishe azwaki na tina na Samari mpe Yelusalemi.
2 Hear, all you peoples; listen, earth, and all that fills it—let the Sovereign Father be a witness against you, the Sovereign Father from his holy temple. Bino nyonso, bikolo, boyoka ! Mabele elongo na nyonso oyo ezali kati na yo, botia matoyi mpe boyoka ! Nkolo Yawe azwi bino na likambo ; Yawe akosambisa bino wuta na Ndako na Ye ya bule !
3 For look—our Father is coming out from his place; he will come down and tread on the high places of the earth. Tala, Yawe azali koya wuta na Ndako na Ye, azali kokita, azali kotambola na likolo ya bangomba ya mabele.
4 The mountains will melt beneath him, and the valleys will split apart, like wax before the fire, like waters poured down a steep slope. Na se ya matambe na Ye, bangomba ezali kopasuka, mabwaku ezali kopanzana ndenge mafuta eyandukaka na moto, ndenge mayi ya mvula etiolaka na lombangu na mipanzi ya bangomba.
5 All this is because Jacob rebelled and the house of Israel sinned. What is Jacob's rebellion? Isn't it Samaria? And what is Judah's high place? Isn't it Jerusalem? Mpo na nini nyonso wana ? Ezali mpo na mabe ya Jakobi, mpo na masumu ya libota ya Isalaele. Nani atindikaki Jakobi na kosala mabe ? Boni, ezali Samari te ? Nani asalaki ete bisambelo ya likolo ya bangomba ezala kati na Yuda ? Boni, ezali Yelusalemi te ?
6 So I will make Samaria a heap of ruins in the open field, a place for planting vineyards. I will pour her stones down into the valley and lay bare her foundations. « Nakokomisa Samari mopiku ya mabanga ; bakokoma kosala bilanga ya vino kuna. Nakobwaka mabanga na yango na lubwaku, nakosala ete miboko na yango etikala polele.
7 All her carved images will be shattered, all her wages burned in the fire; all her idols I will lay waste. For from a prostitute's wages she gathered them, and to a prostitute's wages they will return. Banzambe na bango nyonso ya bikeko ekopanzana, makabo nyonso ya mbindo oyo bapesaka epai ya banzambe na bango ya bikeko ekobwakama na moto. Nakobebisa banzambe nyonso ya bikeko ya Samari mpo ete esalemaki na lifuti ya mbindo ya ekobo ya bule, mpe mpo ete basalela yango lisusu te lokola lifuti ya ekobo mosusu ya bule. »
8 Because of this I will lament and wail; I will go stripped and naked. I will howl like jackals and moan like ostriches. Yango wana, nakolela mpe nakosala matanga, nakotambola makolo ngulu mpe bolumbu, nakoganga lokola mbwa ya zamba mpe nakolela lokola maligbanga.
9 For her wound is incurable; it has come all the way to Judah. It has reached the gate of my people, all the way to Jerusalem. Pamba te bokono ya Samari esilaka te ; pota na yango ezwi mpe mokili ya Yuda, ezali kopusana kino na ekuke ya bato na ngai, kino kutu na yango moko Yelusalemi.
10 Do not tell it in Gath; do not weep at all. In Beth-le-aphrah roll yourselves in the dust. Boloba yango te kati na engumba Gati, bolela te ! Bato ya Beti-Leafra, bomipakola putulu !
11 Pass on your way, you who live in Shaphir, in nakedness and shame. Those who live in Zaanan do not come out; the wailing of Beth-ezel leaves you with no place to stand. Bato ya engumba Shafiri, botambola bolumbu mpe boyoka soni ! Bato ya mboka Tsanani bakobima lisusu na engumba na bango te, bato ya Beti-Atseli bazali na matanga ; boye balongoli lisungi na bango epai na yo.
12 For those who live in Maroth wait anxiously for good, because disaster has come down from our Father to the gate of Jerusalem. Bato ya etuka ya Meroti bazali kolenga na somo mpo na bolamu na bango, pamba te Yawe atindi pasi ya makasi kino na ekuke ya Yelusalemi.
13 Harness the horses to the chariot, you who live in Lachish. She was the beginning of sin to the daughter of Zion, for in you the rebellions of Israel were found. Bino bavandi ya engumba Lakishi, bokangisa bampunda mpe bashar na bino ! Bino nde bomemisaki Siona, mboka kitoko, masumu ; pamba te bamonaki masumu ya Isalaele kati na bino !
14 Therefore you will give parting gifts to Moresheth-gath; the houses of Achzib will be a deception to the kings of Israel. Yango wana, bokopesa na Moresheti mokanda oyo elakisi ete bokabwani na ye na libala. Engumba Akizibi ezali kokosa bakonzi ya Isalaele.
15 Once more I will bring a conqueror against you, you who live in Mareshah; the glory of Israel will come to Adullam. Bino bavandi ya Maresha, nakotindela bino monguna moko mpo ete aya kobundisa bino ; lokumu ya Isalaele ekokima na engumba Adulami.
16 Shave your head and cut off your hair for the children you love; make yourself as bald as the eagle, for they will go from you into exile. Bomikokola suki na mito mpo na bana na bino ya mibali oyo bolingaka, ndenge esalemaka na matanga. Bomikokola suki na mito mpe botikala mabandi lokola mpongo, pamba te bakomema bango na bowumbu mosika na bino.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]