Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Micah 3 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

Masumu ya bakambi

1Boye, nalobaki :« Boyoka, bino bakambi ya libota ya Jakobi,bino batambolisi ya libota ya Isalaele !Ezali bino te bato bosengelikoyeba malamu mibeko ?

2Nzokande, ezali bino bato bozali koboya bolamumpe bozali kolinga mabe.Bozali kolongola poso ya nzoto ya bato ya libota na ngai,bozali kolongola misuni na bangompe kobuka mikuwa na bango.

3Bozali kodunda misuni ya bato ya libota na ngai,bozali kolongola bango poso ya nzotompe kobuka mikuwa na bango.Bozali kokata bango mike-mikelokola misuni oyo bakalingakato oyo batokisaka na nzungu. »

4Yango wana, tango bakobelela Yawe,akoyanola bango te.Na tango wana, akobombela bango elongi na Yelikolo ya mabe na bango nyonso oyo basalaki.

5Tala liloba oyo Yawe alobimpo na kotelemela basakoli ya lokutaoyo babungisaka bato na ngai nzela :« Soki bapesi bango eloko ya kolia,basakolaka kimia ;soki bapesi bango te eloko ya kolia,basakolaka bitumba.

6Na butu, bokozwa lisusu bimoniseli te.Soki bapesi bango te eloko ya kolia,molili ekozingela binompe bokokoka lisusu kosakola te !Moyi ekobimela lisusu basakoli yango te,mpe mokolo ekokoma molili mpo na bango.

7Bamoni makambo bakotonda na soni,mpe bato oyo balobaka makambo oyo ekoya bakosambwa.Bango nyonso bakobomba bilongi na bango,pamba te Nzambe akoyanola bango te. »

8Kasi ngai, na nzela ya Molimo na Yawe,natondisami na nguya, na bosembo mpe na mpikompo na kobimisa polele mabe ya Jakobimpe lisumu ya Isalaele.

9Boyoka maloba oyo,bakambi ya Jakobi mpe batambolisi ya Isalaele,bino oyo bolingaka makambo ya sembo tempe bobongolaka makambo ya alima,

10bino oyo botongaka Siona na kosopa makila,mpe Yelusalemi na kosalaka makambo mabe.

11Bakambi na yango basengaka kanyakaliboso ya kokata makambo,Banganga-Nzambe na yango basengaka misololiboso ya koteya,mpe basakoli na yango basengaka mbongoliboso ya kosakola.Nzokande, babombamaka na sima ya Kombo ya Yawetango balobaka : « Boni, Yawe azali kati na biso te ?Pasi ekoki kokomela biso te ! »

12Yango wana, likolo na bino,bakobalola Siona ndenge babalolaka mabele ya bilanga.Yelusalemi ekokoma liboke ya mabanga,mpe ngomba epai wapi batongaki Tempeloekokoma ngomba moke oyo ezipami na matiti.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]