Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Lamentations 5 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Remember, our Father, what has happened to us; look and see our disgrace. Oh Yawe, kanisa makambo oyo ekomeli biso ! Tala mpe mona soni na biso !
2 Our inheritance has been turned over to strangers, our homes to foreigners. Libula na biso ekeyi na maboko ya bapaya, bandako na biso ekeyi na maboko ya bato mosusu.
3 We have become orphans, fatherless; our mothers are like widows. Tokomi lokola bana bitike, tozangi tata ; bamama na biso bakomi lokola basi bakufisa mibali !
4 We pay for our own water to drink; even firewood costs us money. Tosengeli kofuta mbongo ata mpo na mayi na biso ya komela to mpe mpo na bakoni na biso !
5 Our pursuers are at our necks; we are worn out and given no rest. Banguna na biso bazali kolanda biso, bakomi na sima ya mokongo ; bongo biso tolembi nzoto, tozangi kimia.
6 We submitted to Egypt and Assyria just to get enough bread. Tokomi ata kobondela bato ya Ejipito mpe ya Asiri mpo ete bapesa biso bilei.
7 Our ancestors sinned, and are no more; and we bear their punishment. Solo batata na biso basalaki masumu, kasi bazali lisusu te, bongo biso tokomi komema mokumba ya etumbu na bango.
8 Slaves rule over us; there is no one to free us from their grip. Bawumbu bakomi kokonza biso, mpe moto ata moko te amonani mpo na kokangola biso na maboko na bango.
9 We risk our lives to get our bread, because of the sword in the wilderness. Tozali kozwa bilei na biso na motuya ya bomoi na biso, likolo na mopanga ya babomi kuna na esobe.
10 Our skin is hot as an oven, scorched by the burning heat of famine. Poso ya nzoto na biso ekomi moto lokola nde balekisi yango na mbabola, pamba te nzala ezali kotumba biso makasi.
11 Women are violated in Zion, virgins in the cities of Judah. Basambwisi basi kati na Siona, mpe bilenge basi oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te kati na bingumba ya Yuda.
12 Princes are hung up by their hands; the elders receive no respect. Badiembiki bakalaka, na maboko na bango ; mpe bapesi bakambi lokumu te.
13 Young men toil at the millstones; boys stagger under loads of wood. Bilenge mibali bazali komema libanga oyo banikelaka ble ; bongo bana mike bazali kotepatepa na se ya kilo ya bakoni.
14 The elders have left the city gate, the young men their music. Bakambi batika kokende na ekuke ya engumba, mpe bilenge batika kobeta mindule.
15 The joy of our hearts has ceased; our dancing has turned to mourning. Esengo ezalaka lisusu te kati na mitema na biso, mabina na biso ebongwana matanga.
16 The crown has fallen from our head. Woe to us, for we have sinned! Mitole ekweyi wuta na mito na biso. Mawa na biso, mpo ete tosali masumu !
17 Because of this our heart has grown faint; because of these things our eyes have grown dim. Soki mitema na biso ezali komona pasi mpe soki miso na biso ekomi komona molili,
18 For Mount Zion lies desolate; jackals prowl over it. ezali mpo ete ngomba Siona ebebisami, mpe mbwa ya zamba ekomi kovanda kuna.
19 You, our Father, are enthroned forever; your throne endures from generation to generation. Oh Yawe, ozali Mokonzi seko na seko ; Kiti ya Bokonzi na Yo ekowumela libela na libela.
20 Why do you forget us forever, forsake us for so many days? Mpo na nini obosana biso mpo na tango nyonso ? Mpo na nini osundola biso tango molayi ?
21 Restore us to yourself, our Father, and we will return; renew our days as they once were, Oh Yawe, zongisa biso epai na Yo ; mpe tokozonga penza ! Yeisa mikolo na biso sika ndenge ezalaki na tango ya kala !
22 unless you have utterly rejected us, and are angry with us beyond measure. Boni, osundoli biso solo mpo na libela mpe otombokeli biso na kanda eleka ndelo ?
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]