Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Lamentations 4 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 How the gold has grown dim, how the purest gold is changed! The sacred stones lie scattered at every street corner. Ndenge nini wolo ebungisi kongenga na yango, wolo ya peto enzuluki ! Mabanga ya talo oyo ya bule epanzani na basonge ya babalabala nyonso.
2 The precious children of Zion, once worth their weight in fine gold, how they are now counted as clay pots, the work of a potter's hands! Ndenge nini bana mibali ya motuya ya Siona, oyo, na kala, bazalaki kozwa bango lokola wolo ya peto, kasi bakomi lelo komona bango lokola mbeki ya mabele, oyo mosali mbeki basili kosala !
3 Even jackals offer the breast and nurse their young, but the daughter of my people has turned cruel, like ostriches in the wilderness. Ata mbwa ya zamba ezalaka na posa ya komelisa bana na yango mabele ; kasi bato na ngai bakomi mitema makasi lokola maligbanga kati na esobe.
4 The tongue of the nursing infant sticks to the roof of its mouth from thirst; the children beg for bread, but no one gives them a piece. Likolo ya nzala, lolemo ya mwana ekangami na likolo ya kati ya monoko na ye ; bana mike bazali kosenga bilei kasi moto moko te azali kopesa bango yango.
5 Those who once feasted on delicacies now lie desolate in the streets; those who grew up wearing fine purple now cling to ash heaps. Bato oyo na kala bazalaki kolia bilei ya kitoko bakomi kokufakufa na babalabala ; ba-oyo bakolaki na molato ya motane bakomi sik’oyo kolalela matiti ya kopola.
6 The guilt of the daughter of my people is greater than the sin of Sodom, which was overthrown in a moment, though no human hand was laid against her. Lisumu oyo bato na ngai basali ezali monene koleka lisumu ya Sodome, engumba oyo ebebisamaki na mbala moko wana moto moko te asembolaki loboko na ye mpo na kotelemela yango.
7 Her princes were purer than snow, whiter than milk; their bodies more rosy than coral, their form like sapphire. Bana ya bakonzi na bango bazalaki kongala koleka mvula ya pembe, pembe koleka miliki ; banzoto na bango ezalaki motane koleka langi ya motane penza, mpe lolenge na bango ezalaki lokola libanga na safiri.
8 Now their appearance is blacker than soot; they go unrecognized in the streets. Their skin has shriveled on their bones; it has dried up like wood. Bilongi na bango ekomi mwindo koleka makala, bazali koyeba bango lisusu te na babalabala ; poso na bango ya nzoto ekangami na mikuwa, ekawuki lokola koni.
9 Those slain by the sword were better off than those slain by hunger, who wasted away, pierced through with hunger for lack of food from the fields. Bato oyo bakufi na mopanga bazali malamu koleka ba-oyo bakufi na nzala : banzulukaka mpe bakondaka makasi mpo na nzala, mpo na kozanga bilei kowuta na bilanga.
10 The hands of compassionate women boiled their own children; they became their food when the daughter of my people was destroyed. Basi ya mitema malamu balambi, na maboko na bango, bana na bango moko ; bana na bango bakomi bilei na bango kati na pasi oyo ekomeli bato na ngai.
11 Our Father gave full vent to his wrath; he poured out his burning anger and kindled a fire in Zion that consumed her foundations. Yawe asilikaki makasi koleka ; asopaki kanda na Ye mpe apelisaki moto kati na Siona, moto oyo ezikisaki miboko na yango.
12 The kings of the earth did not believe, nor did anyone living on earth, that an enemy or a foe could enter the gates of Jerusalem. Bakonzi ya mabele mpe bikolo mosusu ya mokili bandimaki te ete banguna mpe bayini bakokaki kokota na bikuke ya Yelusalemi.
13 It was for the sins of her prophets and the crimes of her priests, who shed in her midst the blood of the righteous. Kasi makambo wana esalemaki mpo na masumu ya basakoli ya Yelusalemi mpe mabe ya Banganga-Nzambe na yango, oyo basopaki kati na yango makila ya bato ya sembo.
14 They wandered blind through the streets, defiled with blood, so that no one could touch their garments. Bakomaki sik’oyo koyengayenga na babalabala lokola bakufi miso, bakomaki mbindo na makila mpe moto moko te akokaki kosimba bilamba na bango.
15 "Away! Unclean!" people cried at them. "Away! Away! Do not touch!" So they fled and wandered, and among the nations it was said, "They can stay here no longer." Bato bazali koganga mpe koloba na bango : « Bolongwa awa, bato ya mbindo ! Bolongwa awa, bolongwa awa, bosimba biso te ! » Wana bazalaki kokima mpe kotelengana, bato ya bikolo mosusu bazalaki koloba : « Bavanda na esika oyo te ! »
16 Our Father's presence has scattered them; he will look on them no longer. No honor was shown to the priests, no favor to the elders. Yawe, Ye moko, apanzi bango, azali kotala bango lisusu te. Bapesaki Banganga-Nzambe lokumu te mpe bayokelaki mibange mawa te.
17 Our eyes grew weary watching in vain for help; from our watchtowers we watched for a nation that could not save. Miso na biso elembaki lisusu mpo na kozela na pamba lisungi ; wuta na bandako milayi na biso ya kotalela na mosika, tozalaki kotala wana tozalaki kozela lisungi kowuta na ekolo songolo mpe pakala, kasi ebikisaki biso te.
18 They stalked our steps so we could not walk in our streets. Our end drew near, our days were numbered, for our end had come. Banguna na biso bazalaki kolanda matambe na biso ; boye tokokaki lisusu te kotambola na babalabala na biso. Suka na biso ekomaki pene, mikolo na biso ekomaki ya kotanga, mpo ete tokomaki na suka.
19 Our pursuers were swifter than eagles in the sky; they chased us over the mountains and lay in wait for us in the wilderness. Bato oyo bazalaki kolanda biso bazalaki mbangu koleka mpongo, na likolo ; bazalaki kolanda biso na likolo ya bangomba mpe kotiela biso mitambo kati na esobe.
20 Our very life-breath, our Father's anointed, was captured in their pits—the one of whom we said, "Under his shadow we will live among the nations." Mopakolami na Yawe, oyo totielaki motema akangami na mitambo na bango ; nzokande tozalaki kokanisa boye na tina na ye : « Tokobika bomoi malamu na se ya bobatelami na ye kati na bikolo. »
21 Rejoice and be glad, daughter of Edom, you who live in the land of Uz; but the cup of his anger will come to you as well—you will become drunk and strip yourself bare. Edomi, mboka kitoko, movandi ya mokili ya Utsi, sepela, zala na esengo ! Kasi yo mpe, bakopesa yo kopo ; okomela, okolangwa mpe okotikala bolumbu.
22 Your punishment is complete, daughter of Zion; he will not prolong your exile. But your guilt, daughter of Edom, he will punish; he will lay bare your sins. Siona, mboka kitoko, etumbu na yo ekosila ; Nzambe akomema yo lisusu na bowumbu te. Kasi yo Edomi, mboka kitoko, Nzambe akopesa yo etumbu mpo na mabe na yo, mpe akobimisa masumu na yo na polele.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]