Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Lamentations 3 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 I am the man who has seen affliction under the rod of his wrath. Nazali moto oyo amona pasi na nzela ya fimbu ya kanda na Ye.
2 He has driven me away and made me walk in darkness without any light. Amemaki ngai mpe atambolisaki ngai kati na molili, kasi na pole te.
3 Surely against me he turns his hand again and again, all day long. Solo, mokolo mobimba, azalaki kobalola loboko na Ye mpo na kotelemela ngai tango nyonso.
4 He has worn away my flesh and my skin; he has broken my bones. Abebisaki nzoto na ngai mpe poso na yango, abukaki mikuwa na ngai.
5 He has besieged me and surrounded me with bitterness and hardship. Mpo na kotelemela ngai, atongaki zingazinga na ngai mir ya ngenge mpe ya pasi.
6 He has made me dwell in darkness like those long dead. Atongelaki ngai ndako ya kovanda kati na molili, lokola bato ya tango ya kala oyo bakufa.
7 He has walled me in so I cannot escape; he has weighed down my chains. Azingelaki ngai na bamir mpo ete nakima te ; akangaki ngai na minyololo ya kilo.
8 Even when I call out and cry for help, he shuts out my prayer. Ezala soki nabeleli mpo na kosenga lisungi, azali koyoka libondeli na ngai te.
9 He has blocked my ways with cut stones; he has made my paths crooked. Akangaki nzela na ngai na mabanga minene mpe abebisaki banzela na ngai ya mike.
10 He is a bear lying in wait for me, a lion in hiding. Azalaki mpo na ngai lokola ngombolo oyo ebongami, lokola nkosi oyo ebombameli ngai ;
11 He drove me off my path and tore me to pieces; he has made me desolate. apengwisaki ngai nzela, apasolaki ngai mpe akomisaki ngai eloko ya pamba.
12 He bent his bow and set me as the target for his arrow. Abendaki tolotolo na Ye mpe akomisaki ngai esika na Ye ya kobamba makonga.
13 He drove the arrows of his quiver into my vitals. Atobolaki motema na ngai, na makonga oyo ewutaki na libenga na Ye.
14 I have become the laughingstock of all my people, their mocking song all day long. Nakomaki eloko ya liseki na miso ya bato na ngai nyonso ; bazalaki tango nyonso kotiola ngai na banzembo.
15 He has filled me with bitterness; he has sated me with bitterness. Atondisaki ngai na matiti ya bololo mpe alangwisaki ngai na masanga ya bololo.
16 He has made my teeth grind on gravel, and made me cower in the dust. Abukaki minu na ngai na mabanga, azindisaki ngai na putulu.
17 My soul has lost all peace; I have forgotten what happiness is. Nazangaki kimia, nayebaki lisusu te nini yango bolamu.
18 So I say, "My endurance has perished, and so has my hope from our Father." Boye nalobaki : « Lokumu mpe makambo nyonso oyo natielaki elikya na Yawe esili ! »
19 Remember my affliction and my wandering, the bitterness and the gall! Nakanisi pasi mpe minyoko na ngai, ezali lokola ngenge mpe masanga ya bololo.
20 My soul continually remembers it and is bowed down within me. Tango nyonso nakanisaka yango, motema na ngai ebukanaka.
21 But this I call to mind, and therefore I have hope: Nzokande, tala makambo oyo nakanisaka ; oyo mpo na yango, nazalaka na elikya :
22 The covenant love of our Father never ceases; his mercies never come to an end; Bolamu ya Yawe esili te, mawa na Ye ekomi nanu na suka te ;
23 they are new every morning; great is your faithfulness. ekomaka ya sika tongo nyonso. Solo, boyengebene na Yo ezali monene !
24 "Our Father is all I need," says my soul, "therefore I will hope in him." Namilobeli : « Yawe azali elikya na ngai ; yango wana nakotia motema epai na Ye. »
25 Our Father is good to those who wait for him, to the soul who seeks him. Yawe azali malamu mpo na bato oyo batielaka Ye elikya, mpo na bato oyo balukaka Ye !
26 It is good to wait quietly for the salvation of our Father. Ezali malamu kozela na kimia lobiko kowuta na Yawe !
27 It is good for a man to bear the yoke in his youth. Ezali malamu mpo na moto komema ekangiseli na ye wana azali nanu elenge.
28 Let him sit alone in silence when it is laid on him; Tika ete avanda kimia mpe avanda ye moko, pamba te Yawe nde alingi bongo mpo na ye.
29 let him put his mouth in the dust—there may yet be hope; Tika ete atia elongi na ye na mabele : tango mosusu elikya ekoki kozala.
30 let him give his cheek to the one who strikes, and be filled with insults. Tika ete apesa litama mpo ete babeta ye mbata, mpe tika ete atonda na soni !
31 For the Sovereign Father will not abandon forever. Pamba te Nkolo abwakaka moto te mpo na libela.
32 Though he causes grief, he will have compassion according to the abundance of his covenant love; Ezala soki apesi etumbu, ayokaka kaka mawa mpo na bolingo monene na Ye.
33 for he does not willingly afflict or grieve people. Ezalaka na esengo te nde Yawe ayokisaka bato soni to atindelaka bato pasi.
34 To crush underfoot all the prisoners of the earth, Tango banyataka na makolo bakangami nyonso ya mokili,
35 to deny a man justice in the sight of the Most High, tango babebisaka lokumu ya moto na miso ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo,
36 to deprive a man of justice in his case—the Sovereign Father does not approve. tango banyokolaka moto kati na kosambisama, boni, Nkolo amonaka yango te ?
37 Who has spoken and it came to pass, unless the Sovereign Father has commanded it? Nani akoki kaka kobimisa liloba mpo ete likambo esalema soki Nkolo apesi yango nzela te ?
38 Is it not from the mouth of the Most High that both calamity and good come? Boni, ezali te wuta na monoko ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo nde pasi mpe bolamu ekomelaka bato ?
39 Why should a living man complain about the punishment for his sins? Mpo na nini moto na bomoi amilela-lela tango bapesi ye etumbu likolo ya masumu na ye ?
40 Let us examine and test our ways, and return to our Father! Tokota na mozindo ya kososola banzela na biso mpe totala malamu etamboli na biso, bongo tozonga epai na Yawe ;
41 Let us lift up our hearts and our hands to our Father in heaven: totombola mitema mpe maboko na biso epai ya Nzambe oyo azali na Lola mpe toloba :
42 "We have sinned and rebelled, and you have not forgiven. « Tosalaki masumu mpe totombokelaki Yo, yango wana olimbisaki te.
43 You have wrapped yourself in anger and pursued us, killing without pity; Omizipaki na kanda ndenge bamizipaka liputa, onyokolaki biso mpe obomaki na mawa te.
44 you have wrapped yourself with a cloud so that no prayer can pass through. Omizipaki lipata mpo ete mabondeli edusola te.
45 You have made us scum and refuse among the peoples. Okomisaki biso lokola eloko ya nkele mpe ya tina te na miso ya bikolo.
46 All our enemies open their mouths against us; Banguna na biso nyonso bafungolaki minoko mpo na kotiola biso ;
47 panic and pitfall have come upon us, devastation and destruction." libula na biso ekomi : somo, mabulu, kobebisama mpe kufa. »
48 My eyes flow with streams of water over the destruction of my people. Miso na ngai ezali kosopa miluka ya mpinzoli mpo ete bato na ngai babebisami.
49 My eyes will flow without ceasing, without respite, Miso na ngai ezali kobimisa mpinzoli tango nyonso mpe ezali kolemba te,
50 until our Father looks down and sees from heaven. kino tango Yawe akotala mpe akomona wuta kuna na Lola.
51 My eyes bring grief to my soul at the fate of all the daughters of my city. Makambo oyo miso na ngai ezali komona ezali koyokisa motema na ngai pasi likolo na bana basi nyonso ya engumba na ngai.
52 I have been hunted like a bird by those who were my enemies without cause; Bato oyo bayinaka ngai na pamba balukaki kokanga ngai lokola ndeke ;
53 they flung me alive into a pit and cast stones on me; balukaki koboma ngai kati na libulu, babwakelaki ngai mabanga ;
54 water closed over my head; I said, "I am lost." mayi etondaki kino kozipa moto na ngai mpe nakanisaki ete nakomi pene ya kokufa.
55 I called on your name, my Father, from the depths of the pit; Nabelelaki Kombo na Yo, Yawe, wuta na mozindo ya libulu.
56 you heard my plea: "Do not turn a deaf ear to my cry for help!" Oyokaki ngai libondeli na ngai : « Kokanga matoyi na Yo te wana nazali kobelela Yo mpo ete oyoka kolela na ngai mpe nazwa lisungi kowuta na Yo ! »
57 You came near on the day I called on you; you said, "Do not fear!" Tango nabelelaki Yo, opusanaki pene na ngai mpe olobaki : « Kobanga te ! »
58 You have taken up my cause, Sovereign Father; you have redeemed my life. Nkolo, obundelaki ngai solo, osikolaki bomoi na ngai !
59 You have seen the wrong done to me, my Father; judge my cause. Yawe, omonaki mabe oyo basalaki ngai : longisa ngai !
60 You have seen all their vengeance, all their plots against me. Omonaki solo posa na bango ya kozongisa mabe na mabe mpe mabongisi na bango ya kosala ngai mabe.
61 You have heard their taunts, my Father, all their plots against me, Yawe, oyokaki mafinga na bango, mabongisi na bango ya kosala ngai mabe,
62 the lips and thoughts of my assailants against me all day long. maloba ya bayini na ngai mpe makanisi na bango ya kosala ngai mabe.
63 Watch their every move; I am the object of their mocking song. Tala mpe mona bango ! Ezala bavandi to batelemi, mosala na bango : kotiola ngai na banzembo na bango.
64 You will repay them, my Father, according to the work of their hands. Yawe, pesa bango lifuti oyo ekoki na bango kolanda misala na bango ;
65 You will give them hardness of heart; your curse will be on them. yeisa mitema na bango makasi, kweyisela bango bilakeli mabe na Yo ;
66 You will pursue them in anger and destroy them from under the heavens of our Father. nyokola bango na kanda makasi na Yo mpe bebisa bango na se ya Lola na Yo, Yawe !
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]