Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Joshua 17 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The lot for the tribe of Manasseh, Joseph's firstborn: to Machir, Manasseh's firstborn and father of Gilead, went Gilead and Bashan, for he was a man of war. Libota ya Manase, mwana liboso ya Jozefi, bazwaki eteni ya mabele ; pamba te Makiri, mwana liboso ya Manase, tata ya Galadi, azalaki moto ya bitumba mpe azwaki Galadi mpe Bashani.
2 Manasseh's other sons received land by clan: Abiezer, Helek, Asriel, Shechem, Hepher, Shemida—Manasseh son of Joseph's male line, by clan. Bakitani mosusu ya Manase, kolanda mabota na bango, bazwaki eteni ya mabele : bakitani ya Abiezeri, ya Eleki, ya Asirieli, ya Sishemi, ya Eferi mpe ya Shemida. Bango nde bazalaki bana mibali ya Manase, mwana mobali ya Jozefi, kolanda bituka na bango.
3 Zelophehad—from Manasseh through Machir, Gilead, Hepher—had no sons, only daughters: Mahlah, Noah, Hoglah, Milcah, Tirzah. Tselofikadi, mwana mobali ya Eferi, mwana mobali ya Galadi, mwana mobali ya Makiri, mwana mobali ya Manase, atikalaki kobota bana mibali te ; azalaki kaka na bana basi oyo bakombo na bango ezalaki : Mala, Noa, Ogila, Milika mpe Tiritsa.
4 They came before Eleazar the priest, Joshua son of Nun, and the leaders, saying, "Our Father commanded Moses to give us an inheritance among our brothers." So by our Father's command, Joshua gave them an inheritance among their father's brothers. Bayaki liboso ya Nganga-Nzambe Eleazari, liboso ya Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe liboso ya bakambi. Balobaki : « Yawe apesaki mitindo epai ya Moyize ete apesa biso eteni ya mabele kati ya bandeko na biso ya mibali. » Boye, Jozue apesaki bango libula elongo na bandeko mibali ya tata na bango, kolanda mitindo na Yawe.
5 Ten portions fell to Manasseh, besides the land of Gilead and Bashan beyond the Jordan, Boye, ndambo ya libota ya Manase ezwaki biteni zomi, bakisa mokili ya Galadi mpe ya Bashani oyo ezali na ngambo mosusu ya Yordani.
6 because Manasseh's daughters received an inheritance among his sons. The land of Gilead belonged to Manasseh's other sons. Na bongo, bakitani ya Manase ya basi bazwaki libula ya mabele kati na bakitani na ye ya mibali, kasi mokili ya Galadi ezalaki ya bana mibali mosusu ya Manase.
7 Manasseh's territory ran from Asher to Michmethath, east of Shechem; then south to the people of En-tappuah. Eteni ya mabele ya Manase ezalaki longwa na Aseri, na mokili ya Mikimeta oyo ezalaki ya kotalana na Sishemi, kino na ngambo ya Yamini, na ngambo ya bavandi ya Eyini-Tapua.
8 Manasseh had the land of Tappuah, but Tappuah on Manasseh's border belonged to Ephraim's sons. Manase azwaki eteni ya mabele ya Tapua, kasi yango moko Tapua oyo ezalaki na bandelo ya Manase ezalaki ya bakitani ya Efrayimi.
9 The boundary went down to the Kanah Ravine. South of the ravine, these cities among Manasseh's belonged to Ephraim; Manasseh's boundary ran north of the ravine and ended at the sea. Bongo mondelo ekitaki kino na ngambo ya sude ya moluka ya Kana. Bingumba oyo ezalaki na zingazinga ya bingumba ya Manase ezalaki ya Efrayimi. Kasi mondelo ya Manase elekaki na ngambo ya nor ya moluka mpe ekendeki kosuka na Ebale monene.
10 Ephraim's land lay to the south, Manasseh's to the north, with the sea as its boundary. On the north they reached Asher, on the east Issachar. Efrayimi azwaki eteni ya mabele oyo ezalaki na ngambo ya sude ; mpe Manase azwaki oyo ezalaki na ngambo ya nor. Eteni ya mabele ya Manase ekomaki kino na Ebale monene, na mondelo ya Aseri, na ngambo ya nor mpe ya Isakari, na ngambo ya este.
11 In Issachar and Asher, Manasseh also held Beth-shean and its villages, Ibleam and its villages, the residents of Dor and its villages, of En-dor and its villages, of Taanach and its villages, and of Megiddo and its villages—the three heights. Kati na Isakari mpe Aseri, Manase azwaki Beti-Sheani elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Yibileayimi elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Dori elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Eyini-Dori elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Taanaki elongo na bamboka na yango ya mike-mike, mpe Megido elongo na bamboka na yango ya mike-mike (engumba ya misato, kati na molongo, ezali Nafoti).
12 But Manasseh's sons could not take these cities, and the Canaanites kept living in that land. Nzokande, bakitani ya Manase bazalaki na makoki te ya kozwa bingumba oyo, pamba te bato ya Kanana batingamaki kaka kovanda na etuka yango.
13 When Israel grew strong, they forced the Canaanites into labor but did not fully drive them out. Atako bongo, tango bana ya Isalaele bakomaki makasi koleka, bakomaki kosalisa bato ya Kanana misala makasi oyo ekoki na bawumbu, kasi bakokaki te kobengana bango.
14 The sons of Joseph asked Joshua, "Why give us one lot and one portion as an inheritance? We are a numerous people, for our Father has blessed us until now." Bakitani ya Jozefi balobaki na Jozue : — Mpo na nini opesi biso lokola libula, kaka eteni moko ya mabele ? Tozali penza bato ebele na motango mpe Yawe apamboli biso makasi.
15 Joshua answered them, "If you're so numerous, go up to the forest and clear land there in the Perizzites' and Rephaim's territory, since Ephraim's hill country is too narrow for you." Jozue azongiselaki bango : — Soki bozali bato ebele mpe etuka ya bangomba ya Efrayimi ezali moke mpo na bino, bokende komikatela eteni ya mabele na bazamba ya bato ya Perizi mpe ya Refayimi.
16 Joseph's sons said, "The hill country isn't enough for us, and every Canaanite in the valley has iron chariots—those in Beth-shean and its villages and those in the Jezreel Valley." Bakitani ya Jozefi balobaki na ye : — Mokili ya bangomba ezali moke mpo na biso, mpe bato nyonso ya Kanana oyo bavandaka na etando ya Beti-Sheani elongo na bamboka na yango ya mike-mike, mpe bavandi ya lubwaku ya Jizireyeli, bazalaka na bashar ya bibende mpo na kobunda.
17 Then Joshua told Joseph's house—Ephraim and Manasseh—"You are numerous and very powerful. You won't have just one lot, Jozue alobaki na bato ya Efrayimi mpe ya Manase, bakitani ya Jozefi : — Bozali ebele mpe bozali makasi. Bokozala kaka na eteni ya mabele moko te.
18 for the hill country will be yours too. It is forest, but you will clear it, and its far borders will be yours. You will drive out the Canaanites, though their chariots are iron and they are strong." Kasi bozwa etuka mobimba ya bangomba, atako ezali bazamba ; bokata bazamba yango mpe bovanda kuna kino na basuka na yango, bobengana bato ya Kanana, atako bazali na bashar ya bibende mpe bazali makasi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]