Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Joshua 18 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then the whole Israelite community gathered at Shiloh and set up the tent of meeting there, since the land was subdued before them. Sima na bana ya Isalaele kozwa bokonzi likolo ya mokili, lisanga na bango mobimba esanganaki na Silo mpe batelemisaki kuna Ndako ya kapo ya Bokutani.
2 Seven tribes remained among the children of Israel who had not yet received their inheritance. Kasi kati na bana ya Isalaele, ezalaki na mabota sambo oyo ezwaki nanu te libula na yango ya mabele.
3 Then Joshua asked the Israelites, "How long will you delay entering to possess the land our Father, the God of your fathers, has given you? Jozue alobaki na bana ya Isalaele : « Kino tango nini bokozela mpo na kokende kozwa mokili oyo Yawe, Nzambe ya batata na bino, apesaki bino ?
4 Provide three men per tribe; I will send them to go through the land, write it up for their inheritance, and return to me. Bopona bato misato kati na libota moko na moko. Nakotinda bango mpo ete bakende kotambola kati na mokili mpe kotia bandelo na yango kolanda libula ya libota na libota ; bongo na sima nde bakoki kozonga epai na ngai.
5 They will divide it into seven parts: Judah stays in its territory to the south, and Joseph's house stays in its territory to the north. Bakokabola mokili yango na biteni sambo ; bakitani ya Yuda bakotikala na eteni na bango ya mabele ya ngambo ya sude, mpe bakitani ya Jozefi bakotikala na eteni na bango ya mabele ya ngambo ya nor.
6 Write up the land in seven parts and bring it here to me, and I will cast lots for you here before our Father. Sima na bino kosala mabongisi ya kokabola mokili na biteni sambo, bomemela ngai yango awa, mpe ngai nakobeta zeke mpo na bino liboso ya Yawe, Nzambe na bino.
7 The Levites have no portion among you—the priesthood of our Father is their inheritance. Gad, Reuben, and half the tribe of Manasseh already received their inheritance east of the Jordan, given them by Moses, servant of our Father." Kasi bakitani ya Levi bakotikala kozwa eteni moko te ya mabele elongo na bino, pamba te mosala ya bonganga-Nzambe nde ekozala libula na bango. Bato ya libota ya Gadi, ya Ribeni mpe ya ndambo ya libota ya Manase, bazwaki eteni ya mabele oyo Moyize, mosali na Yawe, apesaki bango na ngambo ya este ya Yordani. »
8 The men set out, and Joshua ordered those going to write up the land: "Go, walk through the land, write it up, return to me, and here I will cast lots for you before our Father in Shiloh." Tango bato batelemaki mpo na kokende kosala mabongisi ya kokabola mokili, Jozue apesaki mitindo oyo : « Bokende kotambola kati na mokili, bokata bandelo na yango, mpe na sima, bozongela ngai awa na Silo, mpe ngai nakobeta zeke mpo na bino liboso ya Yawe. »
9 The men went, crossed the land, wrote it up by cities into seven portions on a scroll, and returned to Joshua at the camp in Shiloh. Boye, bato oyo bakendeki, batambolaki kati na mokili, bakataki bandelo na yango mpe batiaki yango na mokanda, engumba na engumba, mpe bakabolaki mokili mobimba na biteni sambo ; bongo na sima, bazongaki na Silo, na molako epai ya Jozue.
10 Joshua cast lots for them at Shiloh before our Father, and there Joshua divided the land among the Israelites, allotting to each their portion. Jozue abetaki zeke mpo na bango liboso ya Yawe, na Silo, mpe kuna akabolaki mokili kati na bana ya Isalaele kolanda mabota na bango.
11 The lot for the tribe of the descendants of Benjamin came up by their families; their lot's border went out between the descendants of Judah and the descendants of Joseph. Zeke ekweyaki epai ya libota ya bakitani ya Benjame kolanda bituka na bango. Eteni ya mabele oyo epesamelaki bango na zeke ezalaki na kati-kati ya mabele ya bakitani ya Yuda mpe ya Jozefi.
12 Their north border started at the Jordan, rose to the ridge north of Jericho, went up through the hills westward, and ended at the wilderness of Beth-aven. Na ngambo ya nor, mondelo na bango ezalaki longwa na Yordani, emataki na mopanzi ya Jeriko, ekatisaki mokili ya bangomba, na ngambo ya weste, mpe esukaki na esobe, na Beti-Aveni.
13 From there the border crossed southward to Luz, to its slope (Bethel), then down to Ataroth-addar, on the hill south of Lower Beth-horon. Mondelo yango elekelaki wana mpe ekendeki kino na Luze, na mopanzi na yango ya ngambo ya sude, oyo ezali Beteli ; ekendeki kotutana na Ataroti-Adari, na ngomba oyo ezalaki na ngambo ya sude ya Beti-Oroni, mokili ya se.
14 The border curved and turned south on the west side, from the hill facing Beth-horon southward, ending at Kiriath-baal (Kiriath-jearim), a town of Judah's descendants. This was the west side. Longwa na ngomba moke oyo etalana na Beti-Oroni na ngambo ya sude, mondelo yango ebalukaki na ngambo ya weste, mpe esukaki na Kiriati-Bala, oyo ekoma Kiriati-Yearimi, engumba ya bakitani ya Yuda. Yango nde ezalaki mondelo na yango na ngambo ya weste.
15 The south side started at Kiriath-jearim's edge; the border ran west to the spring of Nephtoah's waters. Na ngambo ya sude, mondelo yango ebandaki longwa na Kiriati-Yearimi, na ngambo ya weste, mpe ekendeki kobima na etima ya mayi ya Nefitoa.
16 The border descended to the edge of the hill facing the Valley of Ben-hinnom, at the north end of the Valley of Rephaim, then down the Valley of Hinnom to the southern slope of the Jebusites, and on to En-rogel. Ekitaki kino na ebandeli ya ngomba moke oyo etalana na Lubwaku ya Beni-Inomi, na ngambo ya nor ya etando ya bato ya Refayimi. Ekitaki na Lubwaku ya Inomi, na mopanzi ya ngambo ya sude ya engumba ya bato ya Yebusi kino na Eyini-Rogeli.
17 It turned north to En-shemesh, went on to Geliloth opposite the ascent of Adummim, then down to the Stone of Bohan son of Reuben. Ebalukaki na ngambo ya nor, elekelaki na Eyini-Shemeshi, elekaki na Geliloti oyo etalana na nzela emata kino na Adumimi ; sima ekitaki kino na Libanga ya Boani, mwana mobali ya Ribeni.
18 Passed to the slope facing the Arabah northward, then went down into the Arabah. Elekaki na mopanzi ya ngambo ya nor, liboso ya Beti-Araba, mpe ekitaki kino na etando ya Araba.
19 The border ran to Beth-hoglah's north slope, ending at the Dead Sea's north bay, at the Jordan's south end. This was the south border. Mondelo yango elekelaki na mopanzi ya Beti-Ogila, na ngambo ya nor, mpe esukaki na eteni ya mabele oyo ekota na mayi ya ebale monene ya Barozo, na ngambo ya nor, na suka ya ngambo ya sude ya Yordani. Yango nde ezalaki mondelo na yango na ngambo ya sude.
20 The Jordan bordered it on the east. This was the inheritance of the Benjaminites, with its surrounding borders, by their families. Ebale ya Yordani ekomaki mondelo na yango na ngambo ya este. Yango nde ezalaki bandelo ya libula ya mabota ya bakitani ya Benjame na bangambo nyonso.
21 The cities of Benjamin's tribe, by clans, were Jericho, Beth-hoglah, Emek-keziz, Tala bingumba ya bakitani ya Benjame kolanda bituka na bango : Jeriko, Beti-Ogila, Emeki-Ketsitsi,
22 Beth-arabah, Zemaraim, Bethel, Beti-Araba, Tsemarayimi, Beteli,
23 Avvim, Parah, Ophrah, Avimi, Para, Ofira,
24 Chephar-ammoni, Ophni, and Geba—twelve cities with their villages. Kefari-Amonayi, Ofini mpe Geba : bingumba nyonso ezalaki zomi na mibale, elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
25 Gibeon, Ramah, Beeroth, Gabaoni, Rama, Beyeroti,
26 Mizpeh, Chephirah, Mozah, Mitsipe, Kefira, Motsa,
27 Rekem, Irpeel, Taralah, Rekemi, Yiripeyeli, Tareala,
28 Zela, Haeleph, the Jebusite city—Jerusalem—Gibeah, and Kiriath: fourteen cities with their villages. This is the inheritance of Benjamin's descendants by their families. Tsela, Elefi, engumba ya Yebusi oyo ezali Yelusalemi, Gibea, Kiriati : bingumba nyonso ezalaki zomi na minei elongo na bamboka na yango ya mike-mike. Yango nde ezalaki libula ya mabele ya bakitani ya Benjame kolanda bituka na bango.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]