Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Joshua 16 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The lot for Joseph's descendants ran from the Jordan at Jericho, east of its waters, into the wilderness rising from Jericho through the hill country to Bethel. Eteni ya mabele ya bakitani ya Jozefi ebandaki wuta na Yordani, pene ya Jeriko, na ngambo ya este ya mayi ya Jeriko, na esobe oyo emata na Jeriko na mokili ya bangomba ya Beteli.
2 It went from Bethel to Luz, on to the Archite border at Ataroth. Ekendeki longwa na Beteli kino na Luze, elekaki na ngambo ya bandelo ya bato ya Ariki mpe Ataroti,
3 It went down westward to the border of the Japhletites, to the border of Lower Beth-horon, to Gezer, and ended at the sea. ekitaki kino na ngambo ya weste na mondelo ya bato ya Yafeleti kino na etuka ya Beti-Oroni ya se, kino na Gezeri ya suka mpe esukaki na Ebale monene.
4 So the descendants of Joseph—Manasseh and Ephraim—received their inheritance. Boye bana mibali ya Jozefi, Manase mpe Efrayimi, bazwaki eteni ya mabele lokola libula.
5 Ephraim's descendants had this territory by clans: their eastern border ran from Ataroth-addar to Upper Beth-horon. Tala eteni ya mabele ya bakitani ya Efrayimi kolanda bituka na bango : Mondelo ya eteni ya mabele na bango ezalaki na ngambo ya este, longwa na Ataroti-Adari kino na Beti-Oroni ya likolo ;
6 The border went to the sea, with Michmethath on the north; it turned east to Taanath-shiloh, passing east of it to Janoah. ekobaki kino na Ebale monene. Na ngambo ya weste, mondelo ezalaki longwa na Mikimeta na ngambo ya nor, ebalukaki na ngambo ya este na Tanati-Silo, elekelaki wana kino na Yanoa, na ngambo ya este.
7 Then it went down from Janoah to Ataroth and Naarah, reached Jericho, and ended at the Jordan. Mpe lisusu ekitaki longwa na Yanoa kino na Ataroti mpe na Naarata, etutanaki na Jeriko mpe ekendeki kobima kino na Yordani.
8 From Tappuah the border went west to the Brook of Kanah, ending at the sea. This is the inheritance of the tribe of Ephraim's descendants, by their clans. Longwa na Tapua, ekendeki na ngambo ya weste kino na moluka ya Kana mpe ekendeki kosuka na Ebale monene. Yango nde ezalaki eteni ya libula ya bakitani ya libota ya Efrayimi, kolanda bituka na bango.
9 Ephraim's descendants also had towns set apart within the inheritance of Manasseh's descendants—all the towns with their villages. Ebakisamaki mpe bingumba nyonso elongo na bamboka na yango ya mike-mike oyo epesamelaki bato ya libota ya Efrayimi kati na libula ya bato ya libota ya Manase.
10 But they did not drive out the Canaanites in Gezer; the Canaanites still live among Ephraim to this day, forced into labor. Kasi babenganaki te bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na Gezeri. Yango wana, bato ya Kanana bazali kovanda kati na bato ya Efrayimi kino na mokolo ya lelo. Kasi bakomaki kosalisa bango misala makasi oyo ekoki na bawumbu.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]