Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Job 40 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then our Father said to Job: Yawe ayanolaki Yobo :
2 "Will the one who disputes with the Almighty correct him? Let my accuser answer it." « Boni, moto oyo atiaka tembe na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki koteya Ye ? Tika ete oyo azali koswanisa Nzambe ayanola Ye ! »
3 Then Job answered our Father: Yobo azongiselaki Yawe :
4 "See, I am unworthy—how can I answer you? I put my hand over my mouth. « Tala ngai, nazali se ekelamu ya pamba, eyano nini nakoki kopesa Yo ? Natie loboko na ngai na monoko.
5 I have spoken once—I will not reply; twice—I will say no more." Nalobaki mbala moko, kasi nakoyanola lisusu te ; na mbala ya mibale, nakobakisa lisusu eloko te. »
6 Then our Father answered Job out of the storm: Yawe alobaki na Yobo wuta na mopepe makasi :
7 "Brace yourself like a man; I will question you, and you will answer me. « Kanga mokaba na loketo na yo lokola elombe mobali ; nakotuna yo mituna, mpe okoyanola ngai.
8 Would you really annul my justice? Would you condemn me so that you may be right? Olingi kotiola bosembo na ngai ? Okani kokweyisa ngai mpo ete yo moko omilongisa ?
9 Do you have an arm like mine? Can you thunder with a voice like mine? Ozali na loboko lokola oyo ya Nzambe ? Mongongo na yo ekoki konguluma makasi lokola oyo ya Ye ?
10 Adorn yourself with majesty and dignity; clothe yourself with honor and splendor. Lata nkembo mpe kongenga, milatisa lokumu mpe monene !
11 Pour out the fury of your anger; look on everyone who is proud and bring him low. Sopa nguya ya kanda na yo likolo ya bato, tala bato nyonso ya lolendo liboso na yo mpe kitisa bango !
12 Look on everyone who is proud and humble him; crush the wicked where they stand. Tala bato nyonso ya lolendo, yokisa bango soni ! Nyata-nyata bato mabe na esika oyo bazali.
13 Bury them all in the dust together; shroud their faces in the grave. Kunda bango nyonso kati na putulu, zipa bilongi na bango na esika ya kobombama.
14 Then even I would praise you, for your own right hand could save you. Boye, ngai moko nakopesa yo lokumu, pamba te loboko na yo ya mobali ekoki mpo na kobikisa yo.
15 Look at Behemoth, which I made just as I made you; he eats grass like an ox. Tala ngubu : nakelaki yango ndenge nakelaki yo, kasi eliaka kaka matiti lokola ngombe.
16 Look—his strength is in his loins, and his power in the muscles of his belly. Tala makasi oyo ezali kati na loketo na yango, nguya oyo ezali kati na misuni ya libumu na yango !
17 He stiffens his tail like a cedar; the tendons of his thighs are tightly knit together. Ekembisaka mokila na yango lokola nzete ya sedele ; misisa ya mipende na yango elingama-lingama ;
18 His bones are tubes of bronze, his limbs like bars of iron. mikuwa na yango ezali lokola bibende ya bronze ; mipanzi na yango ezali lokola biteni ya bibende.
19 He is the first of my works; only his Maker can approach him with the sword. Ezali ekelamu ya liboso ya Nzambe, kasi Mokeli na yango atieli yango mopanga pene.
20 The mountains yield their produce for him, where all the wild animals play. Ngomba ezali kopesa yango matiti ya kolia, esika oyo banyama nyonso ya zamba esakanaka.
21 Under the lotus plants he lies down, in the cover of the reeds and the marsh. Elalaka na se ya banzete ya mike-mike, na se ya matiti oyo ezalaka pembeni ya mayi mpe na potopoto.
22 The lotus plants cover him with their shade; the willows of the brook surround him. Banzete ya mike-mike ebombaka yango na se ya elili na yango, banzete ya pepiliye ezingeli yango.
23 If the river rages, he is not alarmed; he is confident though the Jordan surges against his mouth. Soki mayi ya ebale etomboki, yango ebangaka te ; ata mayi ya Yordani esopaneli yango na monoko, evandaka kaka kimia.
24 Can anyone capture him while he watches, or pierce his nose with a snare?" Boni, moto akoki kokanga yango na motambo na tango ezali kotala to kotobola yango zolo na ndobo, mpo na kobenda yango ?
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]