Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Job 39 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 "Do you know when the mountain goats give birth? Do you watch over the does when they give birth? Oyebi tango nini bantaba ya ngomba ebotaka ? Osila komona ndenge mboloko ebotaka ?
2 Can you count the months they carry their young? Do you know the time they give birth? Osila kotanga basanza oyo ewumelaka na zemi ? Oyebi tango oyo ebotaka ?
3 They crouch down and give birth; their birth pangs are over. Ekogumbama, ekobota bana na yango mpe ekolongwa na pasi na yango ya kobota.
4 Their young grow strong in the open field; they leave and do not return. Bana na yango ekozwa makasi, ekokola na libanda, ekokende mosika mpe ekozonga lisusu te.
5 "Who set the wild donkey free? Who untied the ropes of the swift donkey, Nani akangoli ane ya zamba ? Nani apesi yango bonsomi ?
6 to whom I gave the wilderness for a home and the salt flats for a dwelling place? Ngai nde napesi yango esobe lokola ndako, mpe mabele ya mungwa lokola esika ya kovanda.
7 He scorns the noise of the city and never hears a driver's shout. Esekaka makelele ya bingumba mpe eyokaka te mongongo ya motambolisi ya mpunda.
8 He ranges the mountains for his pasture, searching for every green thing. Etambolaka na ngomba mpo na koluka bilei mpe elukaka na bokebi matiti nyonso ya mobesu.
9 "Is the wild ox willing to serve you? Will he spend the night beside your feeding trough? Mpakasa ekoki kondima kosalela yo ? Ekoki kolekisa butu na elielo na yo ya banyama ?
10 Can you bind the wild ox to the furrow with ropes? Will he plow the valleys behind you? Okoki kokanga mpakasa na singa ya ebende oyo ebalolaka mabele ? Ekoki kolanda yo mpo na kotondisa mabwaku na mabele ?
11 Will you rely on him because his strength is great? Will you trust your labor to him? Okotia solo elikya na yo kati na yango, mpo ete makasi na yango ezali monene ? Okotikela yango mosala na yo ?
12 Can you trust him to bring back your grain and gather it to your threshing floor? Okotiela yango solo motema mpo na komemela yo bambuma mpe kosangisa yango na etutelo na yo ?
13 "The wings of the ostrich flap joyfully, but are they the feathers and plumage of a stork? Mapapu ya maligbanga efungwamaka na esengo nyonso, kasi, boni, lipapu mpe nsala na yango ekokani na oyo ya nkongi ?
14 She leaves her eggs on the ground and lets them warm in the dust, Maligbanga ebwakaka maki na yango na mabele mpe etikaka yango ete ezwa moto ya mabele,
15 forgetting that a foot may crush them, or a wild animal may trample them. kasi ebosanaka ete lokolo ekoki kopanza yango mpe banyama ya zamba ekoki konyata-nyata yango.
16 She treats her young harshly, as if they were not her own; she has no fear that her labor was in vain, Enyokolaka bana na yango makasi lokola nde ezali bana na yango te, emonaka na yango motema pasi te lokola nde esali mosala ya mpunda,
17 because I made her forget wisdom and gave her no share in understanding. pamba te Nzambe apimeli yango bwanya mpe apesi yango mayele te.
18 Yet when she takes off running, she laughs at the horse and its rider. Nzokande soki etelemi mpe ebandi kopota mbangu, ekoseka ata mpunda mpe motambolisi na yango.
19 "Do you give the horse his strength? Do you clothe his neck with a flowing mane? Boni, yo nde moto opesa mpunda makasi mpe olatisa kingo na yango pwale ya milayi ?
20 Do you make him leap like a locust? His proud snorting strikes terror. Yo moto opumbwisaka yango lokola libanki ? Lolendo ya mongongo kitoko na yango epesaka somo.
21 He paws in the valley and rejoices in his strength; he charges into battle. Mpunda enyataka na makasi nyonso maboke ya mabele, esepelaka na makasi na yango mpe ekendaka liboso ya bibundeli.
22 He laughs at fear and is not terrified; he does not shrink back from the sword. Eyokaka somo te, ebangaka eloko moko te, ezongaka sima te liboso ya mopanga,
23 The quiver rattles against him, the flashing spear and the javelin. tango saki ya mbanzi eninganaka likolo na yango elongo na likonga oyo ezali kopela moto mpe mopanga.
24 With fierce, raging excitement he devours the ground; he cannot stand still when the trumpet sounds. Epumbwaka na kanda mpe epanzaka mabele, evandaka kimia te soki kelelo ebeti.
25 At the blast of the trumpet he says, 'Aha!' He catches the scent of battle from afar, the thunder of the commanders and the war cry. Soki kelelo ebeti, egangaka : ‹ Ah ! › Na mosika, eyokaka solo ya bitumba, koganga ya bakambi ya basoda mpe makelele ya bitumba.
26 "Is it by your understanding that the hawk takes flight and spreads his wings toward the south? Boni, ezali na mayele na yo nde kombekombe epumbwaka mpe etandaka mapapu na yango na ngambo ya sude ?
27 Is it at your command that the eagle soars and builds his nest on high? Na mitindo na yo nde mpongo emataka likolo mpe esalaka zala na yango na likolo ?
28 He lives on the cliff and makes his home there, on the rocky crag, his stronghold. Evandaka mpe etongaka ndako kati na mabanga, na esika ya kaka, na songe ya libanga.
29 From there he searches out his food; his eyes spot it from far away. Wuta na likolo, emonaka nyama ya kolia, miso na yango emonaka na mosika.
30 His young ones feast on blood, and wherever the slain are, there he is." Bana na yango emelaka makila. Esika ebembe ezali, mpongo ezali wana. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]