Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Job 41 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
40:25 "Can you draw out Leviathan with a fishhook, or press down his tongue with a cord? Boni, okoki koloba ngando na ndobo ? Okoki kokanga lolemo na yango na singa ?
40:26 Can you put a rope in his nose, or pierce his jaw with a hook? Okoki kokanga yango singa ya kekele na zolo ? Okoki kotobola mbanga na yango na ndobo ?
40:27 Will he make many pleas to you? Will he speak soft words to you? Boni, ekobondela yo mingi ? Ekoloba na yo maloba ya boboto ?
40:28 Will he make a covenant with you, that you should take him as your servant forever? Ekoki kosala boyokani elongo na yo mpo ete ekoma mowumbu na yo mpo na libela ?
40:29 Will you play with him like a bird, or put him on a leash for your girls? Okoki kosakana na yango lokola ndeke ? Okoki kokanga yango na singa mpo na kosepelisa bana na yo ya basi ?
40:30 Will traders bargain over him? Will they divide him up among the merchants? Boni, lisanga ya balobi mbisi bakoki kosala na yango mombongo ? Bakoki kokabola yango epai ya bateki ?
40:31 Can you fill his hide with harpoons, or his head with fishing spears? Okoki kotobola mokongo na yango na makonga ? Okoki kotobola moto na yango na ndobo oyo bakangelaka bambisi ?
40:32 Lay your hand on him; remember the battle—you will not do it again. Tia loboko na yo na likolo na yango : soki okanisi etumba oyo okutani na yango, okozongela lisusu te kotia loboko na yo na likolo na yango.
1 Any hope of subduing him is false; the mere sight of him will lay you low. Liboso ya ngando yango, elikya nyonso ya kolonga ekomaka pamba ; soki kaka omoni yango, okweyi na somo.
2 No one is fierce enough to rouse him. Who then is able to stand before me? Moto moko te ya tembe akoki kotungisa yango ; boye nani akoki kotelemela ngai ?
3 Who has confronted me, that I must repay him? Everything under the whole heaven is mine. Nani adefisaki ngai eloko mpo ete nafuta niongo na ye ? Nyonso oyo ezali na se ya Lola ezali ya ngai.
4 "I will not keep silent about his limbs, his mighty strength, or his graceful frame. Nakoki kokanga monoko te mpo na kozanga kolobela biteni na yango ya nzoto, makasi na yango mpe kitoko ya nzoto na yango.
5 Who can strip off his outer covering, or come at him with a double bridle? Nani asila kolongola ngando poso na yango ya nzoto ? Nani asila kokatisa kati-kati ya milongo mibale ya minu na yango ?
6 Who can open the doors of his face? His ringed teeth are surrounded by terror. Nani asila kofungola bibebu ya monoko na yango ? Minu na yango etonda na somo.
7 His back is rows of shields, shut up tightly as with a seal. Mokongo na yango esalema na milongo mibale ya nguba, ekangama elongo na ezipelo ya mabanga.
8 One is so near to another that no air can pass between them. Ekangama moko na mosusu, mpe mopepe ekoki koleka kati na yango te.
9 They are joined one to another; they clasp each other and cannot be parted. Ekangama moko na mosusu, esimbama elongo mpe ekoki kokabwana te.
10 His sneezes flash with light, and his eyes are like the eyelids of the dawn. Soki ekosoli, zolo na yango ekobimisa pole ; mbuma ya miso na yango ezali lokola moyi ya tongo.
11 Out of his mouth go flaming torches; sparks of fire leap out. Moto makasi mpe moto mike-mike ebimaka na monoko na yango.
12 Out of his nostrils comes smoke, as from a boiling pot over burning reeds. Milinga ebimaka na zolo na yango lokola na mbeki oyo ezali kotoka to lokola nzungu ya ebende ya moto.
13 His breath sets coals ablaze, and a flame leaps from his mouth. Pema na yango epelisaka makala ya moto, lolemo ya moto ebimaka na monoko na yango.
14 Strength dwells in his neck, and terror dances before him. Makasi na yango evandi na kingo na yango, mpe somo ebimaka liboso na yango.
15 The folds of his flesh stick together, firmly cast upon him and immovable. Masusa ya poso ya nzoto na yango ekangama elongo, elendisama makasi mpe eninganaka te.
16 His heart is hard as stone, hard as the lower millstone. Motema na yango ezali makasi lokola libanga, makasi lokola libanga oyo banikelaka bambuma.
17 When he rises up, the mighty are afraid; at the crashing they are beside themselves. Soki etelemi, bato ya makasi babangaka, mpe somo ekimisaka bango.
18 Though a sword reaches him, it does not hold, nor does the spear, the dart, or the javelin. Soki obeti yango ezala mopanga, likonga to mbeli, ekosala yango eloko te.
19 He counts iron as straw, and bronze as rotten wood. Emonaka ebende lokola lititi, bronze lokola nzete epola.
20 The arrow cannot make him flee; for him, sling stones turn to stubble. Mbanzi ekimisaka yango te, mpe mabanga oyo babwakaka na nzela ya ebambelo mabanga ezali lokola poso ya loso mpo na yango.
21 Clubs are counted as stubble; he laughs at the rattle of the javelin. Makonga ezali lokola matiti mpo na yango, mpe esekaka makelele ya makonga mike-mike.
22 His underside is like sharp pottery shards; he spreads out like a threshing sledge on the mire. Se ya libumu na yango etonda na banzube, etambolaka lokola ebende oyo ebalolaka mabele.
23 He makes the deep boil like a pot; he stirs the sea like a churning kettle of ointment. Eningisaka mayi ya mozindo lokola mayi oyo ezali kotoka na nzungu, ekomisaka ebale monene lokola nzungu oyo batokiselaka malasi.
24 Behind him he leaves a shining wake; one would think the deep had grown white hair. Engengisaka nzela na sima na yango lokola suki ya pembe likolo ya mayi.
25 On earth there is nothing like him, a creature made without fear. Na mokili, nyama moko te ekokani na yango ; mpe ebangaka te.
26 He looks down on all that is lofty; he is king over all the proud." Ebangaka te kobundisa banyama minene, ezali mokonzi ya banyama nyonso ya lolendo. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]