Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Job 22 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then Eliphaz the Temanite answered: Elifazi, moto ya Temani, azwaki maloba mpe alobaki :
2 "Can a man be of any benefit to God? Surely the wise man benefits only himself. « Boni, litomba nini Nzambe akoki kozwa epai ya moto ? Ezala ata moto ya bwanya, azalaka na litomba kaka mpo na ye moko.
3 Is it any pleasure to the Almighty if you are righteous, or any gain to him if you live blamelessly? Ezala soki ozali moyengebene, litomba nini Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki kozwa, ata ozali kobongisa nzela na yo ya bosembo ?
4 Is it for your reverence that he rebukes you and brings you to judgment? Boni, okanisi ete ezali mpo na boyengebene na yo nde azali kopamela yo mpe kosambisa yo ?
5 Is not your wickedness great? Are not your sins endless? Mabe na yo ezali monene te ? Masumu na yo eleki ndelo te ?
6 For you demanded collateral from your brothers for no reason and stripped the clothing from the naked. Ozalaki koluka na pamba ndanga epai ya bandeko na yo ya mibali, ozalaki kolongola bato bilamba mpe kotika bango bolumbu,
7 You gave no water to the weary to drink, and you withheld bread from the hungry. ozalaki kopesa mayi te na moto oyo azalaki na posa ya mayi, mpe ozalaki kopimela moto oyo azalaki na nzala bilei,
8 The man of power owned the land, and the favored one lived in it. atako ozalaki moto monene, nkolo mabele, mpe ozalaki kovanda na mabele yango lokola moto ya lokumu ;
9 You sent widows away empty-handed and crushed the arms of orphans. ozalaki kozongisa basi bakufisa mibali maboko pamba, mpe ozalaki kosilisa makasi ya bana bitike.
10 That is why snares surround you, and sudden terror overwhelms you; Yango wana, mitambo ezingeli yo, kobebisama ya mbalakata ekomi kopesa yo somo,
11 or darkness, so that you cannot see, and a flood of water covers you. molili makasi ezwi yo mpe ozali kokoka komona te, mpe mpela ezipi yo.
12 Is not God in the heights of heaven? See how high the highest stars are! Boni, Nzambe azali te kuna na likolo, kati na Lola ? Tala ndenge nini etando ya minzoto ezali likolo koleka !
13 Yet you say, 'What does God know? Can he judge through such deep darkness? Nzokande, ozali koloba : ‹ Nzambe ayebi nini ? Akoki kosambisa kati na mapata ya molili ya boye ? ›
14 Thick clouds veil him so that he cannot see, and he walks on the vault of heaven.' Mapata minene ezipi Ye, yango wana azali komona biso te, wana azali kotambola-tambola na etando ya Lola ?
15 Will you keep to the ancient path that wicked men have walked? Olingi solo kotikala kaka na nzela ya kala, nzela oyo bato mabe balekelaki ?
16 They were snatched away before their time, their foundation washed away by a flood. Kufa ememaki bango na mbalakata, mpe miboko na bango etiolaki na mpela.
17 They said to God, 'Leave us alone! What can the Almighty do to us?' Bazalaki koloba na Nzambe : ‹ Tika biso, biso moko ! Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akosala biso nini ? ›
18 Yet it was he who filled their houses with good things—so I want nothing to do with the plans of the wicked. Nzokande, Ye nde atondisaki bandako na bango na biloko ya kitoko. Yango wana, ngai, naboyaka toli ya bato mabe.
19 The righteous see it and are glad; the innocent mock the wicked, saying, Bato ya sembo bazali komona kobebisama na bango mpe bazali kosepela, bayengebene bazali koseka bango mpe bazali koloba :
20 'Surely our enemies are destroyed, and the fire has consumed what they left behind.' ‹ Solo, banguna na biso babebi, moto ezikisi bomengo na bango. ›
21 Submit to God now and be at peace with him; in this way good will come to you. Zongisa boyokani na yo elongo na Ye mpe luka kimia. Na nzela wana, bomengo ekoya lisusu epai na yo.
22 Receive instruction from his mouth, and store up his words in your heart. Ndima malako oyo ekowuta na monoko na Ye, mpe batela maloba na Ye kati na motema na yo.
23 If you return to the Almighty you will be restored; if you drive injustice far from your home, Soki ozongi epai na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, soki obengani mabe mosika ya ndako na yo, bomengo na yo ekozongela yo.
24 and lay your gold in the dust, the gold of Ophir among the stones of the streambed, Bwaka wolo na yo kati na putulu, wolo na yo ya Ofiri kati na mabanga ya lubwaku ;
25 then the Almighty himself will be your gold, your precious silver. bongo Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akozala wolo na yo, mpe palata oyo eleki kitoko mpo na yo.
26 Then you will delight in the Almighty and lift up your face to God. Solo, okozwa esengo epai ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe okotombola elongi na yo epai ya Nzambe.
27 You will pray to him, and he will hear you, and you will fulfill your vows. Okosambela Ye, Ye akoyoka yo, mpe okokokisa ndayi na yo.
28 What you decide will be done, and light will shine on your ways. Makambo oyo okokana, ekosalema, mpe pole ekongenga na nzela na yo.
29 When others are brought low and you say, 'Lift them up!', he will save the downcast. Soki bato balembi, mpe yo olobi : ‹ Telema ! › Nzambe akobikisa bango,
30 He will deliver even the one who is not innocent, who will be delivered through the cleanness of your hands." akokangola ata moto oyo asali mabe, akokangola ye penza mpo na bopeto ya maboko na yo. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]