Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Job 23 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then Job answered: Yobo azongisaki :
2 "Even today my complaint is bitter; his hand is heavy despite my groaning. « Lelo lisusu, kolela na ngai ezali bololo, loboko oyo ezali likolo na ngai eleki kolela ya motema na ngai na kilo.
3 If only I knew where to find him, so I could come to his dwelling! Soki nayebaki esika nini nakoki komona Nzambe, nalingaki kokoma liboso ya kiti ya bokonzi na Ye,
4 I would lay my case before him and fill my mouth with arguments. nalingaki kotalisa, na bosembo nyonso, likambo na ngai liboso na Ye, mpe kotondisa monoko na ngai na matatoli ya solo,
5 I would learn the words he would answer me and understand what he would say to me. nalingaki koyeba biyano oyo alingaki kopesa ngai, mpe kososola makambo oyo alingaki koloba na ngai.
6 Would he argue with me in the greatness of his power? No—he would surely give me a hearing. Boni, alingaki kosalela nguya na Ye mpo na kosamba na ngai ? Te, alingaki kutu koyokela ngai mawa !
7 There an upright person could reason with him, and I would be acquitted forever by my judge. Kuna, liboso na Ye, moto ya sembo akososolisa Ye likambo na ngai, mpe nakokangolama libela wuta na maboko ya mosambisi na ngai.
8 But if I go east, he is not there; and to the west I cannot find him. Soki nakeyi na ngambo ya este, azali kuna te ; soki nakeyi na ngambo ya weste, nazali komona Ye te.
9 When he works in the north, I cannot see him; when he turns to the south, I cannot find him. Tango azali na mosala na ngambo ya nor, nazali komona Ye te, tango azali kobaluka na ngambo ya sude, nazali komona Ye ata moke te.
10 But he knows the way that I take; when he has tested me, I will come out as gold. Nzokande, Ye ayebi nzela oyo ngai nazali kolanda ; soki ameki ngai, nakokoma lokola wolo ya peto.
11 My foot has held fast to his steps; I have kept his way and not turned aside. Makolo na ngai elandaki matambe na Ye ; natambolaki na nzela na Ye mpe natikalaki kopengwa na yango te.
12 I have not departed from the command of his lips; I have treasured the words of his mouth more than my daily bread. Napengwaki te mosika ya mateya ya bibebu na Ye ; nabatelaki yango lokola bomengo ya kitoko, koleka lipa na ngai ya mokolo na mokolo.
13 But he is unchangeable—who can turn him back? Whatever he desires, he does. Kasi Ye, azwaka Ye moko mokano na Ye ; nani akoki kotelemela Ye ? Asalaka nyonso oyo esepelisaka Ye.
14 For he will carry out what he has appointed for me, and many such things are in his mind. Akokokisa ekateli oyo azwaki na tina na ngai mpe ebele ya mabongisi mosusu oyo akobongisa.
15 That is why I am terrified before him; when I consider it, I am in dread of him. Yango wana, liboso na Ye, nazali koyoka somo makasi ; mpe wana nazali kokanisa makambo oyo nyonso, nazali kobanga Ye.
16 God has made my heart faint; the Almighty has terrified me. Nzambe alembisi ngai, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso abangisi ngai.
17 Yet I am not silenced by the darkness, by the thick gloom that covers my face." Atako bongo, molili to molili makasi oyo ezingeli ngai ekangi ngai monoko te.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]