Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Job 21 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then Job answered: Yobo azongisaki :
2 "Listen carefully to my words, and let this be the comfort you offer me. « Yoka na bokebi maloba na ngai, mpe tika ete yango ezala kobondisama mpo na ngai.
3 Bear with me while I speak, and after I have spoken, you may go on mocking. Bokanga nanu mitema, wana nazali koloba ; soki nasilisi koloba nde bokoba na bino koseka ngai.
4 As for me, is my complaint against a mere man? Why should I not lose my patience? Boni, nazali kolela epai ya moto ? Ndenge nini nalemba te kokanga motema ?
5 Look at me and be appalled, and put your hand over your mouth. Botala ngai, bokokamwa, bokozanga ata likambo ya koloba.
6 When I remember it, I am terrified, and shuddering grips my flesh. Soki kaka nakanisi yango, nabangi, mpe nzoto na ngai ekomi kolenga na somo.
7 Why do the wicked go on living, growing old and increasing in power? Mpo na nini bato mabe bazali kowumela na bomoi ? Mpo na nini bakomaka mibange mpe babakisaka nguya na bango ?
8 Their children are settled and secure with them before their eyes, and their offspring before their sight. Bana na bango bazali kolendisama pembeni na bango, mpe bakitani na bango bazali kofuluka na miso na bango.
9 Their houses are safe and free from fear, and no rod of God falls upon them. Bandako na bango ebatelami mpe ezangi kobanga, fimbu na Nzambe ezali likolo na bango te.
10 Their bull breeds and never fails; their cow calves and does not miscarry. Bangombe na bango ya mibali elembaka te kobotisa, bangombe na bango ya basi ebotaka kaka mpe esopaka zemi te.
11 They let their little ones run free like a flock, and their children skip about. Lokola kati na etonga ya bameme, bazali kotika bana na bango : bamoko kokima-kima, mpe bamosusu kosakana.
12 They sing to the tambourine and the lyre and celebrate to the sound of the pipe. Bazali kobeta mbonda mpe lindanda, bazali kosepela na lokito ya flite ;
13 They spend their days in prosperity, and in peace they go down to the grave. bazali kolekisa mikolo na bango na bomengo, mpe bazali kokende na mboka ya bakufi na kimia.
14 Yet they say to God, 'Leave us alone! We have no desire to know your ways. Nzokande, balobaka na Nzambe : ‹ Longwa mosika na biso ! Tozali na posa te ya koyeba nzela na yo.
15 What is the Almighty, that we should serve him? And what would we gain by praying to him?' Nkolo-Na-Nguya-Nyonso nde nani mpo ete tosalela ye ? Tokozwa litomba nini na kosambela ye ? ›
16 But their prosperity is not in their own hands; I want nothing to do with the counsel of the wicked. Boni, bozwi na bango ezali kati na maboko na bango moko te ? Kasi mosika na ngai, likanisi ya kolanda toli ya bato mabe !
17 How often is the lamp of the wicked snuffed out? How often does their disaster fall upon them? How often does God deal out pains in his anger? Mbala boni bazali koboma mwinda ya bato mabe ? Mbala boni pasi ezali kokitela bango ? Boni, Nzambe abombeli bango kanda na Ye ?
18 How often are they like straw before the wind, like chaff that a storm sweeps away? Mokolo nini mopepe makasi ekomema bango lokola makasa to matiti ya kokawuka ?
19 You say, 'God stores up a man's punishment for his children.' Let him repay the man himself, so that he learns it. Balobaka : ‹ Nzambe apesaka etumbu ya moto mabe epai ya bana na ye. › Tika ete apesa etumbu yango epai na ye moko moto mabe, mpo ete ayeba yango !
20 Let his own eyes see his ruin, and let him drink the wrath of the Almighty. Tika ete miso na ye moko emona kobebisama na ye, mpe amela kopo ya kanda ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
21 For what does he care about his household after him, when his months are cut short? Pasi ya libota oyo etikali sima na ye ekosala ye nini tango basanza oyo bakatela ye ekomi na suka ?
22 Can anyone teach God knowledge, since it is he who judges those on high? Bakoki solo koyekolisa Nzambe mayele, Ye oyo asambisaka ezala bato oyo baleki kotombolama ?
23 One person dies in full vigor, wholly at ease and secure, Moko azali kokufa na makasi na ye nyonso, na kimia nyonso mpe na pasi ata moko te,
24 his body well nourished and the marrow of his bones still moist. na nzoto sembesembe, mpe na mikuwa etonda na mafuta ;
25 Another dies with a bitter soul, never having tasted any good. mosusu azali kokufa na mawa na motema, atikali ata komeka kosepela na bomengo te.
26 Together they lie down in the dust, and the worms cover them both. Nzokande, bango mibale bakolala ndenge moko na se ya mabele, mpe bankusu ekozipa bango.
27 Look, I know your thoughts, and your schemes to wrong me. Solo, nayebi malamu makanisi mpe mabongisi na bino, mpo na kotelemela ngai ;
28 For you say, 'Where now is the house of the noble? Where is the tent where the wicked lived?' bolobaka : ‹ Wapi ndako ya mozwi ? Wapi bandako oyo bato mabe bazalaki kovanda ? ›
29 Have you never asked those who travel the roads? Will you not accept the proof they give, Botunaki mituna wana te epai ya baleki nzela ? Bobosani makambo oyo bayebisaki bino,
30 that the evil man is spared in the day of disaster, that he is delivered in the day of wrath? ete moto mabe abikaka mpe na mokolo ya pasi, akangolamaka mpe na mokolo ya kanda.
31 Who confronts him to his face for his conduct, and who repays him for what he has done? Nani, na miso ya moto mabe, apamelaka etamboli na ye ? Nani azongiselaka ye makambo oyo asalaka ?
32 He is carried to the grave, and a watch is kept over his tomb. Bamemaka ye na lilita, mpe bakengelaka kunda na ye.
33 The soil of the valley is sweet to him; everyone follows after him, and those before him are beyond counting. Mabele ya lubwaku ezalaka malamu mpo na ye ; bato nyonso batambolaka sima na ye na molongo, mpe bato ebele penza batambolaka liboso na ye.
34 So how can you comfort me with empty words? Your answers are nothing but falsehood." Boye, mpo na nini bozali komitungisa mpo na kobondisa ngai ? Pamba te kati na biyano na bino, etikali kaka lokuta. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]