Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Hosea 2 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
3 Say to your brothers, "My People," and to your sisters, "Shown Mercy." — Loba na bandeko na yo ya mibali : « Bozali bato na ngai, » mpe na bandeko na yo ya basi : « Bozali balingami na ngai. »
4 Plead with your mother, plead—for she is not my wife, and I am not her husband—that she put away her whoring from her face and her unfaithfulness from between her breasts, Bopamela mama na bino, bopamela ye ; pamba te azali lisusu mwasi na ngai te, mpe ngai nazali lisusu mobali na ye te. Tika ete alongola bilembo ya kindumba na elongi na ye mpe bilembo ya ekobo na mabele na ye.
5 or I will strip her bare and leave her as naked as the day she was born; I will make her like a wilderness, turn her into a parched land, and let her die of thirst. Soki te, nakolongola ye bilamba mpe nakotika ye bolumbu ndenge babotela ye, nakokomisa ye lokola esobe, lokola mokili oyo ekawuka ; mpe akokufa na posa ya mayi.
6 I will show her children no compassion, for they are the children of whoring. Nakolinga bana na ye te, pamba te bazali bana oyo babotami na nzela ya kindumba.
7 Their mother has prostituted herself; she who carried them acted in shame. She said, "I will chase after my lovers, who give me my bread and my water, my wool and my flax, my oil and my drink." Mama na bango atambolaki na kindumba, mpe ye oyo abotaki bango azali mwasi ya lokumu te. Alobaki : « Nakolanda bamakangu na ngai, oyo bapesaka ngai bilei mpe mayi, bilamba ya lino mpe bilamba basala na bapwale ya meme, mafuta mpe masanga. »
8 Therefore I am about to block her path with thorns; I will wall her in so she cannot find her paths. Yango wana, nakokangela ye nzela na banzube, nakotongela ye mir mpo ete akoka lisusu komona nzela te.
9 She will chase her lovers but not catch them; she will look for them but not find them. Then she will say, "I will go back to my first husband, for it was better for me then than now." Akolanda bamakangu na ye, kasi akozwa bango te ; akoluka bango, kasi akomona bango te. Bongo akoloba : « Tika nazongela mobali na ngai ya liboso ; pamba te elongo na mobali ya liboso, nazalaki na esengo koleka sik’oyo ! »
10 She has not realized that it was I who gave her the grain, the new wine, and the oil, I who lavished silver and gold on her—which they spent on Baal. Asosolaki te ete ngai nde nazalaki kopesa ye ble, vino ya sika mpe mafuta ; ete ngai nde nasopelaki ye palata mpe wolo oyo basaleli bikeko ya Bala.
11 Therefore I will take back my grain when it ripens and my new wine in its season; I will reclaim my wool and my flax, given to cover her nakedness. Yango wana, nakobotola ble na ngai na tango ya kobuka, vino na ngai ya sika na tango ya kokamola yango ; nakobotola bilamba na ngai oyo basala na bapwale ya meme, mpe bilamba na ngai ya lino oyo azalaki kozipa na yango bolumbu na ye.
12 Now I will expose her shame before the eyes of her lovers, and no one will rescue her from my hand. Boye, nakosambwisa ye na miso ya bamakangu na ye, mpe moto moko te akobikisa ye na maboko na ngai.
13 I will put an end to all her rejoicing—her festivals, her New Moons, her Sabbaths, all her appointed festivals. Nakosukisa bisengo na ye nyonso : bafeti na ye ya mobu na mobu mpe ya ebandeli ya sanza, mikolo na ye ya Saba mpe bafeti nyonso oyo ekatama.
14 I will lay waste her vines and fig trees, of which she said, "These are my wages that my lovers gave me." I will turn them into a thicket, and the wild animals will devour them. Nakobebisa bilanga na ye ya vino mpe banzete na ye ya figi oyo azalaki koloba na tina na yango : « Ezali bakado oyo bamakangu na ngai bapesaki ngai ; » nakokomisa yango matiti ya zamba, mpe banyama ya zamba ekolia yango.
15 I will hold her accountable for the days she burned offerings to the Baals, when she decked herself with rings and jewelry and chased after her lovers—but me she forgot, declares our Father. Nakopesa ye etumbu mpo na mikolo nyonso oyo atumbelaki nzambe ya Bala malasi ya ansa. Azalaki kolata babiju mpe mayaka ya talo mpo na kokende epai ya bamakangu na ye ; kasi ngai, abosanaki Ngai, elobi Yawe.
16 "Therefore, look, I am going to win her back: I will lead her into the wilderness and speak tenderly to her heart. Yango wana, nakobuka ye motema, nakomema ye na esobe ; mpe kuna, nakoloba na motema na ye maloba na bolingo.
17 There I will give her back her vineyards and make the Valley of Achor a doorway of hope. There she will respond as in the days of her youth, as on the day she came up out of Egypt." Kuna nde nakozongisela ye bilanga na ye ya vino mpe nakokomisa Lubwaku ya Akori ekuke ya elikya. Kuna, akoyanola na esengo lokola na tango ya bolenge na ye, lokola na mokolo oyo abimaki na Ejipito.
18 On that day, declares our Father, you will call me "my husband," and no longer will you call me "my Baal." Na mokolo wana, elobi Yawe, okobenga ngai : « Mobali na ngai ya libala ; » okobenga ngai lisusu te : « Nkolo na ngai. »
19 I will remove the names of the Baals from her mouth; never again will they be invoked by name. Nakolongola na bibebu na ye bakombo ya banzambe ya Bala ; bakobelela lisusu bakombo na yango te.
20 On that day I will make a covenant for them with the wild animals, the birds of the sky, and the creatures that move along the ground; I will banish bow and sword and war from the land, so that all may lie down in safety. Na mokolo wana, nakosala boyokani mpo na bango elongo na banyama ya zamba, bandeke ya likolo, mpe bikelamu oyo etambolaka na libumu. Nakobuka tolotolo mpe mopanga, mpe nakosilisa bitumba : nyonso wana ekosila na mokili mpo ete bato nyonso bavanda na kimia.
21 I will betroth you to me forever; I will betroth you to me in righteousness and justice, in covenant love and compassion. Nakolinga yo lokola mwasi na ngai mpo na libela, nakolinga yo lokola mwasi na ngai na solo mpe na bosembo, na bolingo mpe na esengo.
22 I will betroth you to me in faithfulness, and you will know your Father. Nakolinga yo lokola mwasi na ngai na solo ; mpe na bongo, okoyeba Yawe malamu.
23 On that day I will respond, declares our Father—I will respond to the heavens, and they will respond to the earth; Na mokolo wana, nakoyanola, elobi Yawe, nakoyanola Lola, mpe Lola ekoyanola mabele.
24 and the earth will respond to the grain, the new wine, and the oil, and they will respond to Jezreel. Mabele ekoyanola ble, vino ya sika mpe mafuta. Bongo, yango nyonso ekoyanola Jizireyeli.
25 I will plant her for myself in the land. I will show mercy to "No Mercy," and I will say to "Not My People," "You are my children"; and they will say, "You are my Father." Nakolona ye mpo na Ngai moko kati na mokili mpo ete azala lokola nzete ya elanga na Ngai ; nakotalisa bolingo na Ngai epai na ye oyo nazalaki kobenga Lo-Rukama. Nakoloba na bato oyo nazalaki kobenga Lo-Ami : « Bozali bato na Ngai, » mpe bango bakoloba : « Ozali Nzambe na biso. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]