Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Deuteronomy 34 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then Moses went up from the plains of Moab to Mount Nebo, the top of Pisgah opposite Jericho, and our Father showed him the whole land—Gilead to Dan, Wuta na bitando ya Moabi, Moyize amataki na likolo ya ngomba Nebo kino na songe ya ngomba Pisiga oyo etalana na Jeriko. Kuna, Yawe alakisaki ye mokili mobimba : wuta na Galadi kino na Dani,
2 all Naphtali, the land of Ephraim and Manasseh, all the land of Judah to the western sea, etuka nyonso ya Nefitali, ya Efrayimi mpe ya Manase ; mokili nyonso ya Yuda kino na ebale monene Mediterane,
3 the Negev, the plain—the Valley of Jericho, city of palms—to Zoar. mpe etuka ya Negevi mpe etuka ya lubwaku ya Jeriko, engumba ya banzete ya mbila kino na Tsoari.
4 Then our Father said to him, "This is the land I swore to Abraham, Isaac, and Jacob: 'I will give it to your offspring.' I have let you see it with your eyes, but you will not cross into it." Bongo Yawe alobaki na ye : « Tala mokili oyo nalakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya Abrayami, Izaki mpe Jakobi, tango nalobaki na bango : ‹ Nakopesa yango epai ya bakitani na bino. › Nasali ete omona yango na miso na yo moko, kasi okokota kuna te. »
5 Moses, our Father's servant, died there in the land of Moab, just as our Father had said. Moyize, mosali na Yawe, akufaki kuna na Moabi ndenge Yawe alobaki na ye.
6 Our Father buried him in the Moab valley opposite Beth-peor. No one knows his burial place to this day. Ye moko Nzambe akundaki ye kati na Moabi, na lubwaku oyo etalana na Beti-Peori ; mpe kino lelo, moto moko te ayebi esika oyo kunda na ye ezali.
7 Moses was 120 years old when he died; his eyes hadn't dimmed, and his vigor hadn't faded. Moyize azalaki na mibu nkama moko na tuku mibale ya mbotama tango akufaki. Miso na ye elembaki te mpe makasi na ye esilaki te.
8 Israelites wept for Moses on Moab's plains thirty days, until the days of weeping and mourning ended. Bana ya Isalaele balelaki Moyize mikolo tuku misato, na etando ya Moabi kino tango ya kolela mpe ya matanga esilaki.
9 Joshua son of Nun was full of the spirit of wisdom, for Moses had laid his hands on him. The Israelites listened to him and did as our Father had commanded Moses. Jozue, mwana mobali ya Nuni, atondisamaki na Molimo ya bwanya, pamba te Moyize atielaki ye maboko. Bana ya Isalaele bayokelaki ye mpe batosaki mitindo oyo Yawe apesaki na Moyize.
10 Since then no prophet has risen in Israel like Moses, whom our Father knew face to face, Wuta mokolo wana, mosakoli moko te atikalaki lisusu kobima kati na Isalaele, oyo akokanaki na Moyize oyo Yawe azalaki kosolola na ye miso na miso,
11 for all the signs and wonders our Father sent him to do in Egypt—against Pharaoh, all his servants, and all his land, oyo asalaki bikamwa nyonso mpe bilembo nyonso ya minene oyo Yawe atindaki ye kosala kati na Ejipito liboso ya Faraon, ya bakalaka na ye nyonso mpe ya mokili na ye mobimba ;
12 for all the strong hand and for all the great terrifying deeds Moses did before all Israel's eyes. pamba te moto moko te atikalaki komonisa misala ya nguya mpe ya somo lokola misala oyo Moyize asalaki na miso ya bana nyonso ya Isalaele.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]