Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Deuteronomy 33 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 This is the blessing Moses, the man of our Father, gave the Israelites before his death. Tala lipamboli oyo Moyize, moto na Nzambe, asakolaki mpo na bana ya Isalaele liboso ete akufa.
2 He said: Our Father came from Sinai, dawned on us from Seir, shone from Mount Paran. He came with myriads of holy ones, fire flashing from his right hand. Alobaki : « Yawe awutaki na Sinai ; wuta na Seiri, abimelaki bango lokola moyi na tongo, angengaki epai na bango wuta na ngomba Parani, ayaki elongo na ebele ya bankoto ya ba-anjelu na Ye mpe asimbaki na loboko na Ye kongenga ya Mobeko.
3 Truly he loves the peoples; all his holy ones are in your hand. They followed at your feet, each receiving direction from you. Solo, olingaka bato, basantu nyonso basimbami na loboko na Yo. Na makolo na Yo, bango nyonso bagumbamaka. Ezali epai na Yo nde bazwaka mateya.
4 Moses commanded us a law, a possession for the assembly of Jacob. Moyize apesa biso Mobeko oyo ezali bozwi ya lisanga ya Jakobi.
5 So he became King in Jeshurun, when the leaders of the people gathered, the tribes of Israel together. Azalaki mokonzi ya Yeshuruni tango bakambi ya bato basanganaki elongo na mabota ya Isalaele.
6 Let Reuben live and not die, nor let his people be few. Tika ete Ribeni awumela na bomoi mpe akufa te, mpe tika ete bato na ye bazala moke te ! »
7 Of Judah he said: Hear, our Father, Judah's voice; bring him to his people. His hands fight for him; be his help against his foes. Tala mapomboli oyo alobaki mpo na Yuda : « Oh Yawe, yoka koganga ya Yuda ; zongisa ye epai ya bato na ye ! Tika ete maboko na ye elongisa banzela na ye, mpe tika ete osunga ye liboso ya banguna na ye ! »
8 Of Levi he said: Your Thummim and Urim to your faithful man, whom you tested at Massah, quarreled with at Meribah's waters, Mpo na Levi, alobaki : « Urimi mpe Tumimi na Yo ezali mpo na moyengebene oyo omekaki ye motema na Masa, mpe oyo owelanaki na ye na mayi ya Meriba,
9 who said of his father and mother, 'I do not regard them'; he did not acknowledge his brothers or know his own children. For they kept your word and guarded your covenant. oyo atalisaki bolingo epai na Yo koleka, bolingo epai ya baboti na ye, bandeko na ye mpe bana na ye moko, mpo na kotosa maloba na Yo mpe kobatela boyokani na Yo.
10 They teach your judgments to Jacob and your law to Israel; they place incense before you and whole burnt offerings on your altar. Ateyaka makebisi na Yo epai ya Jakobi, mpe mibeko na Yo epai ya Isalaele ; abonzaka ansa liboso na Yo, mpe mbeka ya kotumba na likolo ya etumbelo na Yo.
11 Bless, our Father, his strength, and accept the work of his hands. Crush the loins of those who rise against him, of those who hate him, that they rise no more. Oh Yawe, pambola makasi na ye na mosala, mpe sepela na mosala ya maboko na ye. Buka loketo ya bato oyo bazali kotelemela ye, mpe loketo ya bayini na ye kino bakoka lisusu te kotelema. »
12 Of Benjamin he said: our Father's beloved settles safely beside him; our Father shelters Benjamin all day, and Benjamin rests between his shoulders. Mpo na Benjame, alobaki : « Tika ete molingami ya Yawe azala na kimia pembeni na Ye, pamba te Ye nde abatelaka ye mokolo mobimba ; mpe moto oyo Yawe alingaka apemaka na kati-kati ya mapeka na Ye ! »
13 Of Joseph he said: May our Father bless his land with heaven's best gifts above, with dew, and the deep crouching below, Mpo na Jozefi, alobaki : « Tika ete Yawe apambola mokili na ye na nzela ya mamwe ya motuya, oyo ewutaka na likolo, mpe na nzela ya mayi ya mozindo oyo etiolaka na se ya mabele
14 with the choicest fruits ripened by the sun, and the rich yield of the months, elongo na biloko oyo eleki motuya, oyo mayi ekolisaka mpe oyo eleki kitoko, oyo ebimaka sanza na sanza ;
15 with the finest produce of the ancient mountains and the abundance of the everlasting hills, na nzela ya bakado ya kitoko ya bangomba ya kala, mpe na nzela ya bambuma oyo eleki kitoko ya bangomba mike oyo ewumelaka mobu na mobu ;
16 with the best gifts of the earth and its fullness, and the favor of him who dwelt in the bush. May these rest on the head of Joseph, on the crown of the one set apart from his brothers. na nzela ya bambuma oyo eleki kitoko, bambuma oyo etondi kati na mokili ! Tika ete Nzambe oyo avandaka kati na nzete moke oyo ezali kopela moto apambola moto ya Jozefi mpe elongi ya moto oyo babulisi kati na bandeko na ye !
17 His firstborn bull—majesty is his; his horns are the horns of a wild ox. With them he gores the peoples, all of them, to the ends of the earth. Such are the myriads of Ephraim, and such are the thousands of Manasseh. Na lokumu, azali lokola mwana liboso ya ngombe ; maseke na ye ezali lokola ya mpakasa. Na nzela na yango nde ebetaka bikolo, ata bikolo oyo ezali na suka ya mokili. Tala ndenge nini bato ya Efrayimi bazali ebele penza, tala ndenge nini bato ya Manase bazali penza ebele ! »
18 Of Zebulun he said: Rejoice, Zebulun, as you go out, and Issachar, in your tents. Mpo na Zabuloni, alobaki : « Oh Zabuloni, sepela na kobima na yo ! Mpe yo Isakari, tika ete osepela kati na bandako na yo ya kapo.
19 They call peoples to the mountain; there they offer right sacrifices, for they draw out the abundance of the seas and the hidden treasures of the sand. Bakobengisa bato na likolo ya ngomba, mpe bakobonza kuna bambeka ya bosembo, bakosala feti mpo na bomengo ya bibale minene, mpe mpo na bozwi oyo ebombama na zelo ya libongo. »
20 Of Gad he said: Blessed is he who enlarges Gad! He crouches like a lion, tearing arm and scalp. Mpo na Gadi, alobaki : « Tika ete apambolama, moto oyo akoyeisa mokili ya Gadi monene ! Gadi akowumela kuna lokola nkosi oyo ezali kopasola banda na lokolo kino na moto.
21 He chose the best for himself, for there a commander's portion was reserved. He came with the leaders of the people; he carried out the justice of our Father and his judgments for Israel. Aponaki mabele ya kitoko mpo na ye moko, bapesaki ye eteni oyo ebongi na mokambi. Atambolaki liboso ya bato ; mpe asalaki mosala kolanda bosembo ya Yawe mpe bikateli na Ye liboso ya Isalaele. »
22 Of Dan he said: Dan is a lion's cub that leaps out from Bashan. Mpo na Dani, alobaki : « Dani azali mwana ya nkosi oyo epumbwaka wuta na Bashani. »
23 Of Naphtali he said: Naphtali, satisfied with favor, full of our Father's blessing—inherit the sea and south. Mpo na Nefitali alobaki : « Nefitali atondi na bolamu mpe na mapamboli na Yawe, akozwa libula ya weste mpe ya sude. »
24 Of Asher he said: Most blessed of sons be Asher—may he be favored by his brothers, dipping his foot in oil. Mpo na Aseri, alobaki : « Aseri azali mwana mobali oyo aleki na mapamboli. Tika ete bandeko na ye basalela ye mpe tika ete makolo na ye ezinda na mafuta.
25 Your bars will be iron and bronze, and as your days, so will your strength be. Bikangelo ya bikuke na yo ekozala ya bibende mpe ya bronze. Mpe tika ete makasi na yo ewumela ndenge mikolo na yo ezali.
26 There is none like our Father, Jeshurun, who rides through the heavens to help you, and in his majesty through the skies. Moko te akokani na Nzambe ya Yeshuruni, Nzambe oyo atambolaka na likolo lokola mpunda mpo na kosunga yo, mpe na mapata, kati na nkembo na Ye.
27 The eternal Father is your dwelling place, and underneath are the everlasting arms. He drove out the enemy before you and said, 'Destroy!' Nzambe ya tango nyonso azali ekimelo na yo, azali tango nyonso Mosungi awa na se. Ezali Ye nde abenganaka banguna na yo liboso na yo mpe apesaka yo mitindo ya koboma bango.
28 So Israel dwells in safety; the fountain of Jacob is set apart in a land of grain and new wine, where the heavens drop down dew. Boye Isalaele akowumela na kimia, mpe etima ya Jakobi ezali kotiola kati na mokili ya ble mpe ya vino ya sika, epai wapi likolo ezali kokitisa mamwe.
29 Blessed are you, Israel! Who is like you, a people saved by our Father, the shield of your help and the sword of your majesty! Your enemies will come cringing to you, and you will tread on their high places. Oh Isalaele, ozali solo libota ya esengo ! Libota nini ekokani na yo, yo libota oyo Yawe abikisi ? Ye azali nde nguba na yo mpe mosungi na yo ya nkembo. Banguna na yo bakokima liboso na yo, mpe okonyata bisika na bango, oyo eleki likolo. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]