Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Deuteronomy 32 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Listen, heavens, and I will speak; let the earth hear the words of my mouth. Oh likolo, yoka malamu, pamba te nalingi koloba ! Oh mabele, yoka malamu maloba ya monoko na ngai !
2 May my teaching fall like rain, my speech settle like dew, like gentle showers upon the tender grass, and like rain upon the growing plants. Tika ete mateya na ngai ekweya lokola mvula, mpe maloba na ngai ekita lokola londende, lokola mvula moke na likolo ya matiti, lokola mvula makasi na likolo ya milona !
3 For I will proclaim the name of our Father; ascribe greatness to our Father! Nakosakola Kombo ya Yawe. Bokumisa monene ya Nzambe na biso !
4 The Rock—our Father—his work is perfect, for all his ways are justice. Our Father is faithful and does no wrong; just and upright is he. Yawe azali lokola Libanga ; misala na Ye ezali ya kokoka, mpe banzela na Ye nyonso ezali sembo ; azali Nzambe ya boyengebene, asalaka mabe te ; azali sembo mpe alima.
5 They have acted corruptly toward him; they are no longer his children, but a blemish—a crooked and twisted generation. Kasi bino, bomibebisaki liboso na Ye ; bozali lisusu bana na Ye te, mpo na mabe na bino, bino molongo ya bana mabe mpe ya bapengwi.
6 Is this how you repay our Father, you foolish and senseless people? Is he not your Father, who created you, who made you and established you? Boni, ezali ndenge wana nde bofuti Yawe ? Oh bato ya maboma, bato bazanga bwanya ! Boni, Yawe azali Tata na bino te ? Azali Mokeli na bino te ? Ye nde asalaki bino mpe abongisaki bino.
7 Remember the days of old; consider the years of generation after generation. Ask your father, and he will tell you, your elders, and they will explain. Bokanisa mikolo ya kala, mpe botala milongo oyo eleka kala ! Botuna na batata na bino, mpe bakoyebisa bino. Botuna na bampaka na bino, mpe bakolimbolela bino.
8 When the Most High, our Father, gave the nations their inheritance, when he divided humanity, he fixed the borders of the peoples according to the number of the sons of Israel. Tango Ye-Oyo-Aleki-Likolo apesaki na ekolo moko na moko mabele na yango, tango akabolaki bato nyonso, atiaki bandelo mpo na bato kolanda motango ya ba-anjelu ya Nzambe.
9 For our Father's portion is his people, Jacob his allotted heritage. Pamba te eteni ya Yawe ezali bato na Ye ; Jakobi azali libula na Ye.
10 He found him in a desert land, in the howling waste of the wilderness; he encircled him, he cared for him, he guarded him as the apple of his eye. Amonaki ye na esobe, kati na mokili oyo ekawuka, etonda na koganga ya somo. Azingelaki ye, abatelaki ye, akengelaki ye lokola mbuma ya liso na Ye.
11 Like an eagle that stirs up its nest, that hovers over its young, he spread out his wings and caught them, carrying them on his wings. Azali lokola mpongo oyo ezali kolakisa bana na yango kopumbwa. Epumbwaka pembeni-pembeni ya bana na yango, etandaka mapapu na yango mpo na kokanga bana na yango, mpe ememaka yango likolo ya masala na yango.
12 Our Father alone guided him, and there was no foreign god with him. Ye moko Yawe akambaki bango ; nzambe moko te ya bapaya azalaki elongo na Ye.
13 He set him atop the heights of the land, and he ate the produce of the field; he nourished him with honey from the rock, and oil from the flinty crag. Akambaki bango na bisika oyo eleki likolo kati na mokili, aleisaki bango bambuma ya elanga, amelisaki bango mafuta ya nzoyi oyo ezalaki kobima na libanga, mafuta oyo ezalaki kobima na mabele ya mabanga,
14 Curds from the herd and milk from the flock, with the fat of lambs, rams of Bashan and goats, with the finest of the wheat—and you drank the foaming wine of the blood of grapes. miliki ya bangombe mpe ya bameme ; apesaki bango mafuta ya bameme mpe ya bantaba, ya bana meme mpe ya ntaba ya mafuta ; mpe apesaki bameme ya mibali ya kitoko ya Bashani. Baliaki lisusu ble oyo eleki kitoko, bamelaki vino ya motane oyo ewutaki na bambuma ya vino.
15 But Jeshurun grew fat and kicked—you grew fat, bloated, and sleek—then he abandoned our Father who made him and scorned the Rock of his salvation. Yeshuruni akomaki monene mpe moto makasi ; atondaki na biloko ya kolia, akomaki kilo mpe moselu ; asundolaki Nzambe oyo akelaki ye mpe abwakaki Libanga na ye, Mobikisi na ye.
16 They stirred him to jealousy with foreign gods; they provoked him to anger with abominations. Bapesaki Yawe kanda makasi likolo ya banzambe na bango ya bapaya, mpe bapesaki Ye kanda na nzela ya misala na bango ya mbindo.
17 They sacrificed to demons that were not God, to gods they had never known, new gods who had only recently appeared, whom your fathers had never dreaded. Babonzaki bambeka epai ya milimo mabe oyo ezali Nzambe te ; babonzaki yango epai ya banzambe oyo bango bayebaki te, banzambe oyo ebimaki sika, banzambe oyo bakoko na bino basambelaki te.
18 You neglected the Rock who fathered you, and you forgot our Father who gave you birth. Bobosanaki Libanga oyo ebotaki bino mpe bomonaki pamba Nzambe oyo apesaki bino bomoi.
19 Our Father saw it and spurned them, because of the provocation of his sons and his daughters. Yawe amonaki likambo oyo mpe abwakaki bango, pamba te bana na bango ya mibali mpe ya basi bapesaki Ye kanda.
20 And he said, "I will hide my face from them; I will see what becomes of them, for they are a perverse generation, children in whom there is no faithfulness. Alobaki : « Nakobombela bango elongi na Ngai, mpe nakotala ndenge nini suka na bango ekozala, pamba te bazali molongo ya bato mabe, bana bazanga boyengebene.
21 "They made me jealous with what is no god; they provoked me to anger with their worthless idols. So I will make them jealous with those who are no people; I will provoke them to anger with a foolish nation. Bazwelaki Ngai mbanda oyo azali ata nzambe te, batumbolaki kanda na Ngai likolo ya biloko oyo ekoki kutu kozala ata banzambe ya bikeko te. Boye, Ngai mpe nakosala ete bango mpe bayokela oyo ezali ata ekolo te zuwa ; nakosala ete ekolo moko ya bazoba epesa bango kanda.
22 For my anger has kindled a fire that burns to the depths of the grave; it devours the earth and its produce and sets ablaze the foundations of the mountains. Pamba te kanda na Ngai epeli makasi lokola moto, mpe ekozikisa kino se ya mokili ya bakufi, ekotumba mabele, bambuma na yango mpe miboko ya bangomba.
23 I will heap disasters upon them; I will exhaust my arrows against them. Nakobakisela bango pasi likolo ya pasi, nakobwakela bango makonga na Ngai.
24 Wasted by hunger, consumed by burning plague and bitter destruction; I will send the teeth of beasts against them, with the venom of things that crawl in the dust. Nakotindela bango nzala makasi, bokono oyo esalaka nzoto moto-moto mpo ete esilisa bango, mpe etumbu oyo ekoboma bango. Nakotindela bango minu ya banyama ya zamba, ngenge ya nyoka oyo etambolaka na libumu.
25 Outside, the sword will bring death, and inside, terror—for young man and young woman alike, the nursing infant with the gray-haired elder. Na libanda, mopanga ekokomisa bango bato bazanga bana ; kati na bandako na bango, somo ekokonza ; bilenge mibali mpe bilenge basi, bana mike mpe bampaka, bango nyonso bakokufa.
26 I would have said, 'I will cut them to pieces; I will blot out their memory from among mankind,' Nalobaki : Nakopanza bango mpe nakosala ete bato babosana bango.
27 had I not feared the taunt of the enemy, for fear their adversaries would misjudge and say, 'Our own hand has triumphed; it was not God who did all this.' Kasi nazali kobanga ete banguna bafinga Ngai mpe bayini na bango bamikosa te na koloba : ‹ Tolongaki na makasi na biso moko, Yawe asalaki eloko moko te. › »
28 For they are a nation without wisdom, and there is no understanding in them. Bato oyo bazali ekolo ezanga mayele, bazali na bososoli te kati na bango.
29 If only they were wise, they would understand this; they would see their final fate. Soki kaka bazalaki bato ya bwanya, balingaki kososola likambo oyo mpe koyeba ndenge nini suka na bango ekozala !
30 How could one chase 1,000, and two put 10,000 to flight, unless their Rock had sold them, and our Father had given them up? Ndenge nini moto moko akoki kobengana bato nkoto moko, to bato mibale, kobundisa bato nkoto zomi soki Libanga na bango atekaki bango te to soki Yawe asundolaki bango te ?
31 For their rock is not like our Rock; even our enemies concede it. Pamba te Libanga na bango azali lokola libanga na biso te ; bango moko banguna na biso bayebi yango.
32 For their vine comes from the vine of Sodom and from the fields of Gomorrah; their grapes are grapes of poison, their clusters are bitter. Bilanga na bango ya vino ewuti na bilanga ya vino ya Sodome mpe na bilanga ya Gomore. Bambuma na bango etondi na ngenge, mpe maboke ya bambuma na bango ezali bololo.
33 Their wine is the venom of serpents, the cruel poison of cobras. Vino na bango ezali ngenge ya banyoka, ngenge ya etupa, ngenge oyo ebomaka.
34 "Is this not stored up with me, sealed within my treasuries? « Boni, ebombami epai na Ngai te ? Ekangami te lokola elembo na bomengo na Ngai ?
35 Justice and recompense are mine, for the time when their foot will slip; for the day of their calamity is near, and their doom rushes upon them. Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto. Tango lokolo na bango ekobeta libaku, na tango wana nde pasi na bango ekoya na lombangu, mpe nyonso oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo na bango ekowumela te. »
36 For our Father will vindicate his people and have compassion on his servants, when he sees that their strength is gone and no one remains, neither slave nor free. Yawe akosambisa bato na Ye, mpe akoyokela basali na Ye mawa ; tango akomona ete makasi na bango esili, mpe akomona ete ezali lisusu na moto moko te oyo bakoki kokanga to kokangola.
37 Then he will say, 'Where are their gods, the rock in which they took refuge, Bongo akoloba : « Wapi banzambe na bango ? Wapi libanga epai wapi babombamaki ?
38 who ate the fat of their sacrifices and drank the wine of their drink offering? Let them rise and help you; let them be your shelter!' Wapi banzambe oyo ezalaki kolia mafuta ya bambeka na bango mpe komela makabo na bango ya vino ? Tika ete etelema mpo na kosalisa bino mpe kopesa bino ebombamelo !
39 Look—I myself am he, and there is no god beside me. I put to death and I give life; I wound and I heal, and no one can deliver from my hand. Botala sik’oyo, Ngai kaka nde nazali Nzambe ; mosusu azali te ! Nabomaka mpe napesaka bomoi ; nazokisaka mpe nabikisaka. Mpe moto moko te akoki kokangola oyo ezali na maboko na Ngai.
40 For I lift my hand to heaven and declare: As surely as I live forever, Natomboli loboko na Ngai na likolo, mpe nalobi : Na Kombo na Ngai,
41 when I sharpen my flashing sword and my hand grasps judgment, I will bring justice on my adversaries and repay those who hate me. tango nakopelisa minu ya mopanga na Ngai, mpe loboko na Ngai ekosimba yango mpo na kosambisa, nakozongisa mabe na mabe epai ya bayini na Ngai, mpe nakofuta ba-oyo balingaka Ngai te.
42 I will make my arrows drunk with blood, and my sword will devour flesh—with the blood of the slain and the captives, from the long-haired heads of the enemy." Tango mopanga na Ngai ekozala kosasa misuni ya bato, nakolangwisa makonga na Ngai na makila ya bato oyo babomi, ya bakangami mpe ya mito ya bakonzi ya banguna. »
43 Rejoice, nations, with his people, for he will avenge the blood of his children and bring justice on his adversaries; he will make atonement for his land and his people. Oh bikolo, bosepela elongo na bato na Ye ! Bino ba-anjelu nyonso, bogumbamela Nzambe ; pamba te akozongisa mabe na mabe mpo na makila ya basali na Ye, akozongisa mabe na mabe epai ya banguna na Ye mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mokili na Ye mpe bato na Ye.
44 Moses came and spoke all the words of this song to the people, he and Joshua son of Nun. Moyize ayaki mpe alobaki maloba nyonso ya nzembo oyo, mpe bato nyonso bazalaki koyoka ye ; azalaki elongo na Oze, mwana mobali ya Nuni.
45 And when Moses had finished speaking all these words to all Israel, Tango Moyize asilisaki koloba maloba oyo nyonso epai ya bana nyonso ya Isalaele,
46 he told them, "Set your heart to all these words I testify to you today, that you command your children to keep and do all the words of this law. alobaki na bango lisusu : « Bobatela malamu kati na mitema na bino maloba nyonso oyo nalobi na bino lelo, mpo ete bopesa mitindo epai ya bana na bino ete batosa penza maloba nyonso ya mibeko oyo.
47 This is no empty word for you—it is your life. Through this word you will live long in the land you are crossing the Jordan to possess." Ezali maloba ya pamba te epai na bino, kasi ezali nde bomoi na bino. Ezali na nzela na yango nde bokozala na bomoi molayi kati na mokili oyo bokozwa sima na kokatisa Yordani. »
48 That very day our Father spoke to Moses, saying, Na mokolo wana kaka, Yawe alobaki na Moyize :
49 "Go up this Abarim mountain, Mount Nebo, in Moab facing Jericho, and view Canaan, which I'm giving Israel's people as their possession. « Mata na ngomba Abarimi, ngomba Nebo oyo ezali kati na Moabi mpe etalana na Jeriko ; mpe tala mokili ya Kanana, mokili oyo nazali kopesa epai ya bana ya Isalaele lokola libula na bango.
50 Then die on the mountain you are climbing, and be gathered to your people, as Aaron your brother died on Mount Hor and was gathered to his people, Okokufa na ngomba oyo okomata ; mpe kuna, okokende kokutana na bakoko na yo, oyo bakufa ndenge Aron, ndeko na yo ya mobali, akufaki na ngomba Ori mpe akutanaki na bakoko na ye,
51 because you broke faith with me among the Israelites at the waters of Meribah-kadesh in the Wilderness of Zin, because you did not treat me as holy among the Israelites. pamba te bino mibale botambolaki te na boyengebene liboso na Ngai, na miso ya bana ya Isalaele, na mayi ya Meriba, pembeni ya Kadeshi, kati na esobe ya Tsini, mpe bobatelaki te bosantu na Ngai kati na bana ya Isalaele.
52 For you will see the land from a distance, but not enter it—the land I'm giving Israel's people." Yango wana okomona mokili yango kaka na mosika, okokota te na mokili oyo nalingi kopesa na bana ya Isalaele. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]