Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Deuteronomy 31 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then Moses went and spoke these words to all Israel. Moyize akobaki koloba maloba oyo epai ya bana nyonso ya Isalaele :
2 He said to them, "Today I am 120 years old; I can no longer go out and come in, and our Father has told me, 'You will not cross this Jordan.' « Nakokisi sik’oyo mibu nkama moko na tuku mibale ya mbotama mpe nazali lisusu na makasi te ya kokamba bino. Yawe alobaki na ngai : ‹ Okokatisa Yordani te oyo ozali komona. ›
3 Your Father himself will cross over ahead of you; he will destroy these nations before you, and you will drive them out. Joshua will cross over ahead of you, as our Father has said. Yawe, Nzambe na bino, akotambola Ye moko liboso na bino, akobebisa bikolo oyo ezali liboso na bino mpo ete bokamata mokili na bango ; Jozue nde akotambola liboso na bino ndenge Yawe alobaki.
4 Our Father will do to them as he did to Sihon and Og, kings of the Amorites, and their land, when he destroyed them. Yawe akobebisa bango ndenge kaka asalaki Sikoni mpe Ogi, bakonzi ya bato ya Amori, oyo abebisaki elongo na bamboka na bango.
5 Our Father will give them to you, and you must do to them exactly as I commanded you. Yawe akokaba bango na maboko na bino mpe bokosala bango makambo nyonso oyo natindaki bino.
6 Be strong and courageous. Don't fear or dread them, for your Father goes with you; he will never leave you nor forsake you." Boyika mpiko mpe bozala na molende, bobanga bango te mpe bozala na somo te liboso na bango ; pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino, akotika bino te mpe akobwaka bino te. »
7 Moses summoned Joshua and told him before all Israel, "Be strong and courageous—you will go with this people into the land our Father swore to their ancestors to give them, and you will hand it to them as their inheritance. Bongo Moyize abengisaki Jozue mpe alobaki na ye na miso ya bana nyonso ya Isalaele : « Yika mpiko mpe zala na molende, pamba te okokende elongo na bato oyo kino na mokili oyo Yawe alakaki kopesa epai ya bakoko na bango na nzela ya ndayi, mpe okokabola yango mpo na bango lokola libula na bango.
8 Our Father himself goes before you; he will be with you. He will never leave you nor forsake you. Don't fear; don't be discouraged." Ye moko Yawe akotambola liboso na yo mpe akozala elongo na yo. Kobanga te mpe yika mpiko. »
9 Moses wrote this law and gave it to the priests, sons of Levi, who carried the ark of our Father's covenant, and to all Israel's elders. Boye Moyize akomaki mibeko oyo mpe apesaki yango epai ya Banganga-Nzambe, bana mibali ya Levi, oyo bazalaki komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe, mpe epai ya bampaka nyonso ya Isalaele.
10 Then Moses commanded them: "At the end of every seven years, at the set time of the release year, during the Festival of Booths, Moyize atindaki bango : « Na suka ya mibu sambo nyonso, na mobu ya kotika baniongo, na tango ya feti ya Bandako ya kapo,
11 when all Israel comes before your Father in the place he chooses, read this law aloud to all Israel. tango bana nyonso ya Isalaele bakopusana liboso ya Yawe, Nzambe na bino, na esika oyo akopona, bokotanga mibeko oyo liboso na bango mpo ete matoyi na bango ekoka koyoka.
12 Assemble the people—men, women, children, and the foreigner living in your towns—to hear, learn, and fear your Father, and keep and do all the words of this law. Bosangisa bato : mibali, basi, bana mpe bapaya oyo bazali kati na bingumba na bino mpo ete bakoka koyoka mpe koyekola kotosa Yawe, Nzambe na bino, mpe kosalela malamu maloba nyonso ya mibeko oyo.
13 Then their children, who don't know this law, will hear it and learn to fear your Father all the days you live in the land you are crossing the Jordan to possess." Bana na bango oyo bayebi mibeko oyo te basengeli koyoka yango malamu mpe koyekola kotosa Yawe, Nzambe na bino, tango nyonso oyo bokovanda kati na mokili oyo bokozwa sima na kokatisa Yordani. »
14 Our Father told Moses, "Your death is near. Call Joshua and present yourselves at the tent of meeting; I will commission him." So Moses and Joshua went and presented themselves at the tent of meeting. Yawe alobaki na Moyize : « Tala sik’oyo, mokolo ya kufa na yo ekomi pene. Benga Jozue, mpe bokota na Ndako ya kapo ya Bokutani epai wapi nakopesa ye mitindo na Ngai. » Boye Moyize mpe Jozue bakendeki mpe bakotaki na Ndako ya kapo ya Bokutani.
15 Then our Father appeared in the tent in a pillar of cloud, and the pillar of cloud stood at the tent's entrance. Yawe amimonisaki epai na bango lokola likonzi ya lipata kati na Ndako ya kapo ya Bokutani ; mpe likonzi yango ya lipata etelemaki na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
16 And our Father said to Moses, "You are about to lie down with your ancestors. This people will then rise and prostitute themselves after the foreign gods of the land they are entering, forsaking me and breaking the covenant I made with them. Yawe alobaki na Moyize : « Ozali kokende kopema elongo na bakoko na yo ; mpe, kala mingi te, bato oyo bakopengwa mpo na kosalela banzambe ya bapaya kati na mokili oyo bozali kokota, bakobosana Ngai mpe bakobuka boyokani na Ngai, oyo nasalaki elongo na bango.
17 On that day my anger will burn against them. I will abandon them, hide my face from them, and they will be devoured. Many disasters and troubles will come on them. On that day they will say, 'Haven't these disasters come on us because our God isn't with us?' Na mokolo wana, nakosilikela bango mpe nakobosana bango. Boye, nakobombela bango elongi na Ngai, mpe bakobebisama. Bokono ebele mpe pasi mingi ekokomela bango. Mpe na mokolo wana, bakomituna : ‹ Ezali te mpo ete Nzambe na biso azali lisusu elongo na biso te nde bokono oyo ekomeli biso te ? ›
18 I will surely hide my face that day, for all the evil they've done, turning to other gods. Solo, na mokolo wana, nakobombela bango elongi na Ngai mpo na mabe nyonso oyo basalaki, wana bakendeki epai ya banzambe mosusu.
19 Now write this song for yourselves, teach it to the Israelites, put it in their mouths, so this song may witness for me against the Israelites. Sik’oyo, koma nzembo oyo mpe lakisa yango yo moko epai ya bana ya Isalaele, mpe sala ete bayemba yango mpo ete ezala litatoli mpo na Ngai, liboso na bango.
20 When I bring them into the land flowing with milk and honey, sworn to their ancestors, they will eat, grow full and fat, turn to other gods and serve them, despise me, and break my covenant. Pamba te nakokotisa bango na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo nalakaki kopesa epai ya bakoko na bango na nzela ya ndayi : bakolia, bakotonda mpe bakoya minene ; bongo bakokende epai ya banzambe mosusu mpe bakosambela yango, bakobwaka Ngai mpe bakobuka boyokani na Ngai.
21 When many disasters and troubles overtake them, this song will confront them as a witness, for it won't be forgotten from their descendants' mouths. For I know what they're forming today, before I bring them into the land I swore to give them." Tango bokono ebele mpe pasi mingi ekokomela bango, nzembo oyo ekotatola mpo na kofunda bango, pamba te bakitani na bango bakobosana yango te. Nayebi makambo oyo bazali kokana kosala atako nakotisi bango nanu te kati na mokili oyo nalakaki kopesa bango na nzela ya ndayi. »
22 So Moses wrote down this song that same day and taught it to the Israelites. Boye, Moyize akomaki nzembo yango kaka na mokolo wana mpe alakisaki yango bana ya Isalaele.
23 Then our Father commissioned Joshua son of Nun: "Be strong and courageous—you will bring the Israelites into the land I swore to give them, and I myself will be with you." Yawe apesaki mitindo oyo epai ya Jozue, mwana mobali ya Nuni : « Yika mpiko mpe zala na molende, pamba te okokotisa bana ya Isalaele kati na mokili oyo nalakaki kopesa bango na nzela ya ndayi, mpe Ngai moko nakozala elongo na yo. »
24 When Moses had finished writing the words of this law in a book, from beginning to end, Moyize asilisaki kokoma kati na buku maloba nyonso ya mobeko oyo.
25 he commanded the Levites who carried the ark of the covenant of our Father: Bongo Moyize apesaki mitindo oyo epai ya Balevi oyo bazalaki komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe :
26 "Take this Book of the Law and put it beside the ark of the covenant of your Father, to remain there as a witness against you. « Bokamata buku oyo ya Mobeko mpe botia yango pembeni ya Sanduku ya Boyokani ya Yawe, Nzambe na bino ; ekozala kuna lokola litatoli mpo na bino.
27 For I know your rebellion and stubbornness. Even now, while I'm alive with you today, you've rebelled against our Father—how much more after my death! Pamba te nayebi ndenge nini bozali batomboki mpe mito makasi. Soki, wana nazali nanu na bomoi kati na bino, bozali batomboki liboso ya Yawe, ekozala boni sima na kufa na ngai ?
28 Gather to me all your tribal elders and officers, so I may speak these words to them and call heaven and earth to witness against them. Bosangisa liboso na ngai bakambi nyonso ya mabota na bino mpe bakalaka na bino, mpo ete naloba maloba oyo na matoyi na bango mpe nazwa likolo mpe se lokola batatoli mpo na kofunda bango.
29 For I know that after my death you will become utterly corrupt and turn aside from the way I have commanded you. And in the days to come disaster will fall upon you, because you will do what is evil in the sight of our Father, provoking him to anger through the work of your hands." Pamba te nayebi solo ete sima na kufa na ngai, bokomibebisa mpe bokopengwa mosika na nzela oyo natindaki bino. Na mikolo oyo ezali koya, bokono ekokweyela bino, pamba te bokosala mabe na miso ya Yawe mpe bokotumbola kanda na Ye na nzela ya misala ya maboko na bino. »
30 Moses recited the words of this song, start to finish, to Israel's whole assembly. Moyize alobaki maloba ya nzembo yango, banda na ebandeli kino na suka, wana lisanga mobimba ya bana ya Isalaele ezalaki koyoka :
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]