Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Deuteronomy 30 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 When all these things happen to you—the blessing and the curse I have set before you—and you remember them among all the nations where your Father has driven you, Maloba oyo nawuti koloba, mapamboli mpe bilakeli mabe oyo napesi yo mpo ete opona, ekokokisama. Soki obateli yango malamu na motema na yo kati na bikolo nyonso epai wapi Yawe, Nzambe na yo, akobengana yo ;
2 and you return to your Father and obey his voice in all I command you today, you and your children, with all your heart and with all your soul, soki ozongi epai na Yawe, Nzambe na yo ; soki yo mpe bana na yo botosi Ye, na mitema mpe na milimo na bino mobimba, na makambo nyonso oyo natindi yo lelo,
3 then your Father will restore you from captivity, his heart will turn toward you with compassion, and he will gather you again from all the peoples where your Father has scattered you. Yawe, Nzambe na yo, akoyokela yo mawa : akozongisa bato na yo, oyo bakendeki na bowumbu mpe akosangisa bino lisusu wuta na bikolo nyonso epai wapi apanzaki bino.
4 If you're scattered to the ends of the heavens, from there your Father will gather you, from there he will take you. Atako bokendeki na bamboka ya mosika kati na mokili, Yawe, Nzambe na bino, akoluka kosangisa bino longwa kuna mpe akozongisa bino.
5 Your Father will bring you to the land your fathers possessed; you will possess it, and he will bless and multiply you more than your fathers. Yawe, Nzambe na bino, akomema bino na mokili ya bakoko na bino, mpe bokozwa yango ; akosalela bino bolamu mpe akokomisa bino ebele koleka bakoko na bino.
6 Your Father will circumcise your heart and your offspring's heart, to love your Father with all your heart and with all your soul, that you may live. Yawe, Nzambe na bino, akobulisa mitema na bino mpe mitema ya bakitani na bino mpo ete bolinga Ye na mitema mpe na milimo na bino mobimba, mpe mpo ete bozala na bomoi.
7 Your Father will bring all these curses on your enemies and on those who hated and pursued you. Yawe, Nzambe na bino, akotia bilakeli nyonso ya mabe likolo ya banguna na bino, oyo bayinaka bino mpe banyokolaka bino.
8 You will again obey your Father's voice, doing all his commands I command you today. Bokotosa lisusu Yawe mpe bokosalela mitindo na Ye nyonso oyo nazali kopesa bino lelo.
9 Your Father will bless you abundantly in all your handiwork, in the fruit of your womb, the fruit of your livestock, and the fruit of your ground, for good. For your Father will again delight in you for good, as he delighted in your fathers, Bongo Yawe, Nzambe na bino, akosala ete bomona bolamu kati na misala nyonso ya maboko na bino, mpe akopesa bino bana ebele, bibwele ebele mpe bambuma ebele kati na mokili na bino. Yawe akosepela na bino lisusu mpe akosalela bino bolamu, ndenge kaka asepelaki na bakoko na bino,
10 when you obey the voice of your Father, keeping his commands and statutes written in this Book of the Law, and turn to your Father with all your heart and with all your soul. soki botosi Yawe, Nzambe na bino, mpe bobateli mitindo mpe bikateli na Ye, oyo ekomama kati na buku oyo ya Mobeko, mpe soki bozongi epai na Yawe, Nzambe na bino, na mitema mpe na milimo na bino mobimba.
11 This commandment I command you today isn't too hard for you, nor too far away. Makambo oyo nazali kotinda yo lelo, ezali penza pasi te mpe elekeli yo te na makasi.
12 It isn't in heaven, that you'd say, "Who will go up to heaven for us, get it, and bring it to us, so we may hear it and do it?" Ezali te kati na Likolo mpo ete okoka kotuna : « Nani akomata kuna na Likolo mpo na kozwela ngai yango mpe kosakolela ngai yango mpo ete nakoka kotosa yango ? »
13 Nor is it beyond the sea, that you should say, "Who will cross the sea for us, bring it to us, so we may hear it and do it?" Ezali te na ngambo mosusu ya ebale monene mpo ete okoka kotuna : « Nani akokatisa ebale monene mpo na kokamata yango mpe kosakolela ngai yango, mpo ete nakoka kotosa yango ? »
14 For the word is very near you, in your mouth and heart, so that you can do it. Te, liloba yango ezali pene na yo, ezali kati na monoko na yo mpe kati na motema na yo, mpo ete okoka kotosa yango.
15 See, I have set before you today life and good, death and evil. Tala, nasili kotia lelo, liboso na yo, bomoi mpe bolamu, kufa mpe mabe.
16 If you obey your Father's commands today—loving him, walking in his ways, keeping his commands, statutes, and rules—you will live, multiply, and he will bless you in the land you're entering to possess. Tala likambo oyo Ngai natindi yo lelo : linga Yawe, Nzambe na yo, tambola na banzela na Ye mpe batela mitindo na Ye, bikateli na Ye mpe mibeko na Ye. Bongo okozala na bomoi, mpe bokokoma ebele ; mpe Yawe, Nzambe na yo, akopambola yo kati na mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa.
17 But if your heart turns away, refusing to listen, and you are lured into bowing before other gods and serving them, Kasi soki motema na yo epengwi mpe otosi te, soki okosami na kogumbamela banzambe mosusu mpe na kosambela yango,
18 I declare to you today: you will surely perish, not live long in the land you're crossing the Jordan to enter and possess. nalobi na yo, na mokolo ya lelo, ete okobebisama solo, okowumela lisusu te kati na mokili oyo ezali na ngambo mosusu ya Yordani, epai wapi bokokota mpo na kozwa.
19 Today I call the heavens and earth to witness against you: I've set life and death before you, blessing and curse. Choose life, so you and your children may live, Na mokolo ya lelo, nazwi likolo mpe se lokola batatoli mpo na yo : nasili kotia liboso na yo bomoi mpe kufa, mapamboli mpe bilakeli mabe. Sik’oyo, pona bomoi mpo ete yo mpe bana na yo bozala na bomoi.
20 loving your Father, obeying his voice, and holding fast to him, for he is your life and length of your days, so you may live in the land your Father swore to your ancestors, Abraham, Isaac, and Jacob, to give them. Mpe pona kolinga Yawe, Nzambe na yo, koyoka mongongo na Ye mpe kokangama na Ye, pamba te azali bomoi na yo mpe akopesa yo mibu ebele kati na mokili oyo Yawe alakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya bakoko na yo —Abrayami, Izaki mpe Jakobi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]