Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Deuteronomy 29 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
28:69 These are the covenant words our Father commanded Moses to make with the Israelites in Moab, besides the covenant he made with them at Horeb. Tala maloba ya boyokani oyo Yawe atindaki Moyize kosala elongo na bana ya Isalaele na etando ya Moabi, na likolo ya boyokani oyo asalaki na bango na ngomba Orebi.
1 Moses called all Israel and told them: You saw all our Father did before your eyes in Egypt's land—to Pharaoh, all his servants, all his land. Moyize abengisaki bana nyonso ya Isalaele mpe alobaki na bango : « Miso na bino emonaki makambo nyonso oyo Yawe asalaki na Ejipito epai ya Faraon, epai ya basali na ye nyonso mpe kati na mokili na ye mobimba.
2 The great tests you saw with your own eyes, those mighty signs and wonders. Na miso na bino moko, bomonaki komekama monene, bilembo minene mpe bikamwa.
3 But to this day our Father has not given you a heart to know, eyes to see, ears to hear. Kasi kino na mokolo ya lelo, Yawe apesaki bino te mayele mpo na kososola to miso mpo na komona to matoyi mpo na koyoka.
4 "Forty years I led you in the wilderness; your clothes never wore out, nor your sandals on your feet. Na mibu tuku minei oyo Ngai Yawe nakambaki bino na esobe, bilamba na bino enzulukaki te mpe basandale na makolo na bino ekufaki te.
5 You ate no bread, drank no wine or strong drink, so you would know I am your Father." Boliaki mapa te mpe bomelaki vino te to masanga mosusu oyo elangwisaka. Nasalaki yango mpo boyeba ete Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino.
6 When you reached this place, Sihon king of Heshbon and Og king of Bashan marched out against us, and we struck them. Tango bokomaki na esika oyo, Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, mpe Ogi, mokonzi ya Bashani, bayaki kobundisa biso, kasi tolongaki bango.
7 We took their land and gave it as an inheritance to the Reubenites, Gadites, and half-tribe of Manasseh. Tozwaki mokili na bango mpe topesaki yango lokola libula epai ya bato ya libota ya Ribeni, ya Gadi mpe epai ya ndambo ya libota ya Manase.
8 Keep the words of this covenant and do them, so you may prosper in all you do. Bosalela malamu maloba ya boyokani oyo mpo ete bomona bolamu na makambo nyonso oyo bokosala.
9 Today you all stand before your Father: your tribal heads, elders and officers, every man of Israel, Bino nyonso, bokotelema lelo na miso ya Yawe, Nzambe na bino : bakambi na bino, bakonzi na bino ya masanga, bampaka na bino, bakonzi na bino ya basoda mpe bato mosusu kati na Isalaele
10 your little ones, wives, and the foreigner in your camp, from those cutting your wood to those drawing your water, elongo na bana na bino mpe basi na bino mpe bapaya oyo bazali kati na milako na bino mpo na kobukela bino bakoni mpe kotokelaka bino mayi.
11 so you may enter the covenant of your Father, and his oath, which your Father makes with you today, Botelemi awa mpo na kosala boyokani elongo na Yawe, Nzambe na bino ; boyokani oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kosala elongo na bino, na mokolo ya lelo, na kolapa ndayi esangana na bilakeli mabe,
12 to make you his people today, and to be your Father, as he promised you and swore to your ancestors Abraham, Isaac, and Jacob. mpo na koyebisa bino, na mokolo ya lelo, ete bozali bato na Ye, mpe Ye azali Nzambe na bino ndenge alakaki yango, na nzela ya ndayi, epai na bino mpe bakoko na bino —Abrayami, Izaki mpe Jakobi.
13 It is not with you alone that I am making this covenant, sworn with an oath, Yawe azali kosala boyokani oyo, na nzela ya ndayi esangana na bilakeli mabe, elongo na bino kaka te,
14 but with everyone standing here with us today before our Father, and with everyone not here with us today. kasi mpe elongo na ba-oyo bazali awa kati na biso, na mokolo ya lelo, liboso ya Yawe, Nzambe na biso, mpe elongo na ba-oyo bazali awa te elongo na biso.
15 You know how we lived in Egypt and passed through the nations you traveled among. Bino moko boyebi ndenge nini tozalaki na Ejipito mpe ndenge nini tokatisaki bamboka oyo tolekaki.
16 You saw their detestable things and idols of wood, stone, silver, and gold among them. Bomonaki kati na bango biloko na bango ya mbindo, banzambe ya bikeko basala na libaya, na libanga, na palata mpe na wolo.
17 Let no one among you—man, woman, clan, or tribe—turn his heart today from our Father to serve those nations' gods, and let no root among you bear poison and bitter fruit, Bosala keba ete, na mokolo ya lelo, mobali moko te, mwasi moko te, etuka moko te to libota moko te epengwa na nzela ya Yawe, Nzambe na biso, mpo na kokende kogumbamela banzambe wana ya bikeko. Bosala keba ete, kati na bino, ezala na mosisa moko te oyo ekobota ngenge ya bololo ya ndenge wana.
18 who hears the words of this oath yet congratulates himself inwardly, saying, I'll be safe though I follow my stubborn heart—sweeping away the watered land with the dry. Sima na koyoka maloba oyo ya bilakeli, tika ete moto moko te kati na bino amipambola na koloba : ‹ Nakolonga na makambo na ngai nyonso atako natamboli kolanda baposa ya motema na ngai moko. › Pamba te, moto oyo akosala mabe oyo akomema moto oyo ayebi likambo te na libunga na ye.
19 Our Father will refuse to forgive him; instead his anger and jealousy will burn against that man, every curse written in this book will settle on him, and our Father will erase his name from under heaven. Yawe akolimbisa ye te ; kanda makasi na Ye mpe zuwa na Ye ekokweyela moto wana. Bilakeli nyonso ya mabe oyo ekomama kati na buku oyo ekokweyela ye mpe Yawe akolongola kombo na ye kati na mokili.
20 Our Father will single him out for disaster from all the tribes of Israel, matching every covenant curse written in this Book of the Law. Yawe akotia ye pembeni kati na bikolo nyonso ya Isalaele, akokaba ye na pasi ndenge ezali bilakeli mabe nyonso ya boyokani oyo ekomama kati na buku ya Mobeko.
21 The next generation, your children after you, and the foreigner from a distant land, will see that land's plagues and the diseases our Father inflicted on it. Milongo ya bana na bino oyo ekoya sima na bino mpe bapaya oyo bakowuta na mikili ya mosika bakomona bitumbu oyo Yawe akokweyisela mokili wana.
22 Sulfur and salt, the whole land burned, unsown, sprouting nothing, no plant growing there, like the ruin of Sodom, Gomorrah, Admah, and Zeboiim, which our Father ruined in his anger and wrath, Mokili mobimba ekopela na moto ya sofolo mpe ekotonda na mungwa. Bakolona ata eloko moko te, eloko moko te ekobima mpe matiti ekobota te. Mokili yango ekobebisama ndenge Sodome mpe Gomore, Adima mpe Tseboyimi, ebebisamaki : bingumba oyo Yawe abebisaki na kanda na Ye ya makasi.
23 all nations will ask, Why did our Father do this to this land? What is this great burning anger? Bikolo nyonso ekotuna : ‹ Mpo na nini Yawe asali likambo ya boye na mokili oyo ? Mpo na nini kanda makasi boye ? ›
24 They will answer: Because they abandoned the covenant of our Father, the God of their fathers, made with them when he brought them out of Egypt's land, Mpe eyano ekozala : ‹ Esalemaki bongo, pamba te bato oyo babukaki boyokani oyo Yawe, Nzambe ya bakoko na bango, asalaki elongo na bango tango abimisaki bango na Ejipito.
25 and served other gods, bowing to them—gods they never knew, that he never assigned them. Bakendeki kosambela banzambe mosusu mpe bagumbamelaki bango, banzambe oyo bayebaki te mpe oyo Ye apekisaki bango.
26 So our Father's anger burned against that land, bringing on it every curse written in this book. Yango wana, kanda ya Yawe epeli na mokili wana mpe amemi bilakeli mabe nyonso oyo ekomami na buku oyo, kati na mokili wana.
27 And our Father uprooted them from their land in anger, rage, and great outrage, and threw them into another land, as it is today. Yawe apikolaki bango na mokili na bango na kanda na Ye ya makasi mpe na kotomboka na Ye ya makasi. Abwakaki bango na mokili mosusu ndenge ezali komonana lelo. ›
28 The secret things belong to our Father, but the things revealed belong to us and our children forever, to do all the words of this law. Makambo oyo ebombama ezali mpo na Yawe, Nzambe na biso ; mpe makambo oyo emonisami ezali mpo na biso mpe bakitani na biso, mpo na tango nyonso, mpo ete tokoka kosalela maloba nyonso ya mibeko oyo. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]