Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Deuteronomy 28 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 If you faithfully listen to the voice of your Father, being careful to do all his commandments I give you today, your Father will set you high above all the nations of the earth. Soki botosi penza Yawe, Nzambe na bino, mpe bosaleli penza mitindo na Ye oyo nazali kopesa bino lelo ; Yawe, Nzambe na bino, akotombola bino likolo ya bikolo nyonso ya mokili.
2 All these blessings will come on you and overtake you, if you listen to the voice of your Father: Tala mapamboli oyo ekopesamela bino mpe ekolanda bino tango bokotosa Yawe, Nzambe na bino :
3 Blessed will you be in the city, and blessed will you be in the field. Bokopambolama na engumba mpe bokopambolama na bilanga.
4 Blessed will be the fruit of your womb, the fruit of your ground, the fruit of your livestock—the young of your herds and flocks. Mabota na bino ekopambolama ; milona na bino mpe bibwele na bino : bangombe na bino, bameme mpe bantaba na bino ekopambolama.
5 Blessed will be your basket and your kneading bowl. Bitunga na bino mpe mesa na bino oyo bosalelaka mapa ekopambolama.
6 Blessed will you be when you come in, and blessed will you be when you go out. Bokopambolama tango bokokota mpe bokopambolama tango bokobima.
7 Your Father will strike down before you the enemies who rise against you. They will come at you one way and flee from you seven ways. Yawe akosala ete banguna oyo bakotelemela bino bakokweyisama liboso na bino ; bakoya epai na bino na nzela moko, kasi bakokima bino na banzela sambo.
8 Your Father will command the blessing on you in your barns and everything you put your hand to, and bless you in the land your Father is giving you. Yawe Nzambe akopambola bibombelo na bino ya biloko mpe akopambola misala nyonso ya maboko na bino. Yawe Nzambe akopambola bino na mokili oyo azali kopesa bino.
9 Your Father will establish you as a holy people to himself, as he swore to you, if you keep your Father's commands and walk in his ways. Yawe akokomisa bino libota na Ye ya bule ndenge alakaki bino tango alapaki ndayi, pamba te bokobatela mitindo ya Yawe, Nzambe na bino, mpe bokotambola na banzela na Ye.
10 Then all the peoples of the earth will see that you are called by the name of our Father, and they will fear you. Bongo bato nyonso ya mokili bakomona ete bozali penza bato ya Yawe mpe bakobanga bino.
11 Your Father will make you overflow with prosperity—the fruit of your womb, the fruit of your livestock, the fruit of your ground—in the land your Father swore to your fathers to give you. Yawe akotondisa bino na bozwi ebele : mabota, bibwele, milona kati na mokili oyo alapaki ndayi epai ya bakoko na bino ete akopesa bino.
12 Your Father will open for you his good treasury, the heavens, to give your land's rain in its season and to bless all the work of your hands. You will lend to many nations but not borrow. Mpo na bolamu na yo, Yawe akofungola likolo, ebombelo ya bamvula na Ye, mpo na konokisa mvula na mokili na bino na eleko ya malamu ; mpe akopambola misala nyonso ya maboko na bino. Bikolo ebele ekodefa epai na bino, kasi bino bokodefa ata na ekolo moko te.
13 Your Father will make you the head, not the tail, always rising, never falling, if you listen to the commandments of your Father I command you today, carefully doing them. Yawe akokomisa bino mito, kasi mikila te ; pamba te bokobatela penza mitindo ya Yawe, Nzambe na bino, oyo nazali kopesa bino lelo mpe bokosalela yango penza. Lokumu na bino ekozala kaka likolo, ekokita te.
14 Do not turn from any of the words I command you today, right or left, to follow other gods and serve them. Kati na mitindo oyo nazali kopesa bino lelo, bopengwa ata na moko te, mpo na kolanda banzambe mosusu mpe kosalela yango.
15 But if you will not listen to your Father's voice, carefully doing all his commandments and statutes I am commanding you today, all these curses will come upon you and overtake you: Kasi soki botosi te Yawe, Nzambe na bino, mpe bosaleli te mitindo mpe bikateli na Ye, oyo nazali kopesa bino lelo, tala bilakeli mabe oyo ekokomela bino mpe ekokanga bino :
16 Cursed will you be in the city, and cursed will you be in the field. Bokolakelama mabe kati na engumba mpe bokolakelama mabe kati na bilanga.
17 Cursed will be your basket and your kneading bowl. Bitunga na bino mpe mesa na bino oyo bosalelaka mapa ekolakelama mabe.
18 Cursed be the fruit of your womb and of your ground, the increase of your herds and the young of your flock. Mabota na bino, milona na bino, bibwele na bino : bangombe, bameme mpe bantaba ekolakelama mabe.
19 Cursed will you be when you come in, and cursed will you be when you go out. Bokolakelama mabe tango bokokota mpe bokolakelama mabe tango bokobima.
20 Your Father will send on you cursing, confusion, and rebuke in all you put your hand to, until you are destroyed and quickly perish, for the evil of your deeds in abandoning me. Kati na nyonso oyo bokosala, Yawe akotindela bino bilakeli mabe, minyoko mpe mikakatano ; bongo bokowumela te mpo na kobebisama nye likolo ya mabe oyo bosalaki ya kosundola Yawe.
21 Your Father will make the plague cling to you until he has destroyed you from the land you are entering to possess. Yawe akotindela bino bokono oyo ebomaka kino akobebisa bino kati na mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa.
22 Your Father will strike you with wasting disease, fever, inflammation, burning heat, drought, blight, and mildew; they will pursue you until you perish. Yawe akosilisa koboma bino na bokono ya ndenge na ndenge oyo akotindela bino : fievele, kosila nzoto, mpese. Akotinda lisusu bokono oyo ekobebisa bilanga na bino : kozanga mvula, banyama mike oyo ebebisaka milona mpe bibende. Bokono nyonso oyo ekolanda bino kino bokosila kokufa.
23 The heavens over your head will be bronze, and the earth beneath you iron. Mapata oyo ezali likolo ya mito na bino ekokoma lokola bronze mpe ekolekisa lisusu mvula te, mpe mabele oyo ezali na se ya makolo na bino ekokoma makasi lokola libende mpe ekobotisa lisusu mabele te.
24 Your Father will turn your land's rain to powder and dust; it will fall from the heavens on you until you are destroyed. Kati na mokili na bino, Yawe akobongola mvula mpo ete ekoma putulu mpe zelo ; yango ekokweya wuta na likolo kino ekobebisa bino.
25 Your Father will have you struck down before your enemies. You will go out one way against them but flee seven ways, and become a horror to all the kingdoms of the earth. Yawe akosala ete banguna na bino balonga bino. Bakoya epai na bino na nzela moko mpe bino bokokima liboso na bango na banzela sambo. Bokokoma eloko ya somo na miso ya bikolo nyonso ya mokili.
26 Your corpses will be food for all the birds of the sky and beasts of the earth, with no one to scare them away. Bibembe na bino ekokoma bilei ya bandeke nyonso mpe ya banyama ya zamba, bongo moto moko te akoya wana mpo na kobengana yango.
27 Your Father will strike you with the boils of Egypt, tumors, festering sores, and the itch, none of which can be healed. Yawe akotindela bino bokono oyo esilaka te lokola oyo atindaki na Ejipito : pota ya libumu, makwanza mpe mikusa ya nzoto.
28 Your Father will strike you with madness, with blindness, and with confusion of mind. Yawe akotindela bino bokono ya liboma, ya kokufa miso mpe ya mobulu na makanisi.
29 At noon you will grope like the blind in the dark, and not succeed in your ways. You will be only oppressed and robbed continually, with no one to save you. Na moyi makasi, bokotenga-tenga lokola bakufi miso na molili. Bokolonga te na makambo nyonso oyo bokosala. Mokolo na mokolo, bakonyokola bino mpe bakoyiba bino, mpe moto moko te akomonana mpo na kokangola bino.
30 You will be engaged to a woman, but another man will sleep with her. You will build a house, but not live in it. You will plant a vineyard, but not enjoy its fruit. Soki moko kati na bino azwi mwasi lokola mobandami na libala, mobali mosusu nde akosangisa na ye nzoto. Mosusu akotonga ndako, kasi akovanda yango te. Mosusu akolona elanga ya vino, kasi okobuka bambuma na yango te.
31 Your ox will be slaughtered before your eyes, but you won't eat from it. Your donkey will be seized from you and not returned. Your flock will be given to your enemies, with no one to rescue you. Bakokata bakingo ya bangombe na bino na miso na bino, kasi bokolia yango te. Bakokamata ba-ane na bino na makasi, na miso na bino, kasi ekozonga epai na bino te ; bakokaba epai ya banguna na bino, bameme mpe bantaba na bino ; mpe moto moko te akosunga bino.
32 Your sons and your daughters will be given to another people as your eyes watch, longing for them all day, but your hand will be powerless. Bakokaba bana na bino ya mibali mpe ya basi na ekolo mosusu, mpe bokofungola miso na bino mpo na kotala mokolo na mokolo bozongi na bango, kasi bokokoka kosala ata eloko moko te.
33 A people you do not know will eat your land's produce and all your labor; you will only be oppressed and crushed continually. Bato oyo boyebi te bakolia bambuma ya mabele na bino mpe ya misala na bino nyonso.
34 And you will be driven mad by what your eyes will see. Bokobela liboma likolo ya makambo oyo miso na bino ekobanda komona.
35 Your Father will strike you with severe, incurable boils on your knees and legs, from the sole of your foot to the top of your head. Yawe akotindela bino bokono oyo ekobuka bino mabolongo, makolo ; bokono oyo ekoki kobika te mpe ekopanzana banda na se ya matambe kino na mito.
36 Your Father will drive you and the king you set over you to a nation neither you nor your fathers have known, and there you will serve other gods of wood and stone. Yawe akomema bino mpe mokonzi oyo bokopona mpo na koyangela bino, na ekolo oyo bino mpe bakoko na bino botikala nanu koyeba te. Kuna bokogumbamela banzambe mosusu : banzambe ya banzete mpe ya mabanga.
37 You will become a horror, a proverb, and a taunt among all peoples where your Father drives you. Bikolo nyonso epai wapi Yawe akomema bino, bakomona bakokima bino lokola eloko ya somo mpe bakobeta masapo mpo na kotiola bino.
38 You will carry much seed to the field but harvest little, for the locust will consume it. Bokolona bankona ebele na bilanga, kasi bokobuka moke ; pamba te mabanki ekolia bankona wana.
39 You'll plant and tend vineyards, but not drink the wine or gather grapes—the worm will eat them. Bokosala mpe bokobongisa bilanga ya vino, kasi bokotikala te komela vino yango mpe kobuka bambuma na yango, pamba te banyama mike oyo eliaka nzete ekobebisa yango.
40 You will have olive trees throughout your territory, but never anoint yourself with oil, because your olives drop off. Bokozala na banzete ya olive na mokili na bino mobimba, kasi bokopakola mafuta na yango te, pamba te bambuma ya olive ekokweya liboso ete ekomela.
41 You will father sons and daughters, but they will not remain yours, for they will go into captivity. Bokozala na bana ya mibali mpe ya basi, kasi bokobatela bango te, pamba te bakokende na bowumbu.
42 The whirring locust will take possession of all your trees and the fruit of your ground. Mabanki ekolia banzete na bino nyonso mpe bambuma ya mabele na bino.
43 The foreigner among you will rise higher and higher above you; you sink lower and lower. Mopaya oyo avandi kati na bino akoleka bino na lokumu tango nyonso, kasi bino bokokita se kokita ;
44 He will lend to you, but you will not lend to him. He will be the head; you the tail. akodefisa bino, kasi bino bokokoka kodefisa ye te ; akozala moto, kasi bino bokozala mokila.
45 All these curses will come on you, pursuing and overtaking you until you are destroyed, because you did not listen to the voice of your Father, to keep his commandments and statutes that he commanded you. Tala bilakeli mabe nyonso oyo ekokomela bino, ekolanda bino mpe ekozwa bino, ekokanga bino kino bokobebisama ; pamba te botosaki te Yawe, Nzambe na bino, mpe bobatelaki te mitindo mpe bikateli oyo apesaki bino.
46 They will be a sign and a wonder against you and your offspring forever. Bilakeli mabe oyo ekozala elembo mpe makambo ya kokamwa epai na bino mpe epai ya bakitani na bino mpo na libela.
47 Because you did not serve your Father with joy and a glad heart when you had everything in abundance, Mpo ete bosalelaki te Yawe, Nzambe na bino, na esengo mpe na kosepela na tango ya bofuluki ;
48 you will serve the enemies your Father sends against you, in hunger, thirst, nakedness, and dire poverty. He will put an iron yoke on your neck until he destroys you. tango bokozala na nzala mpe na posa ya komela, mpe tango bokozanga bilamba mpe bokokelela, bokosalela banguna oyo Yawe Nzambe akotindela bino. Akotia bino ekangiseli ya ebende na kingo kino akobebisa bino.
49 Your Father will bring a nation against you from far away, from the ends of the earth, swooping down like an eagle—a nation whose language you will not understand, Yawe akotindela bino na mosika, wuta na suka ya mokili, ekolo moko oyo ezali lokola mpongo oyo ezali kopumbwa, ekolo oyo bokososola monoko na yango te ; ekobundisa bino.
50 a fierce-faced nation that will show no respect to the old or mercy to the young. Bato ya ekolo yango bazali na bilongi ya kanda-kanda, batosaka te bato oyo bazali mikolo mpe bayokelaka bilenge mawa te.
51 They will devour your livestock's offspring and your ground's fruit until you are destroyed, leaving you no grain, new wine, or oil, no young of your herds or young of your flocks, until they make you perish. Bakolia bana ya bibwele na bino mpe bambuma ya mabele na bino, kino bakobebisa bino. Bakotikela bino ata ble te, vino ya sika te, mafuta te, ata bana ngombe na bino te, ata bana meme na bino te mpe ata bantaba na bino te kino bokobebisama.
52 They will besiege you in all your towns until your high, fortified walls you trust in come down throughout your land. They will besiege you within all the towns throughout the land your Father has given you. Bakozingela bingumba na bino nyonso kati na mokili na bino kino bamir na bino ya milayi mpe ya makasi oyo botielaka mitema ekokweya. Bakozingela bingumba nyonso kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bino.
53 Then, in the siege and distress your enemy inflicts on you, you will eat the fruit of your womb, the flesh of the sons and daughters your Father gave you. Mpo na pasi oyo banguna na bino bakomonisa bino tango bakozingela bino, bokolia bana na bino, bokolia misuni ya bana na bino ya mibali mpe ya basi oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bino.
54 The gentlest, most refined man among you will begrudge his brother, the wife he embraces, and his surviving children, Mobali ya malamu koleka kati na bino, oyo ayokelaka bato mawa, akoyokela lisusu moto mawa te : ezala ndeko na ye to mwasi oyo ye alingaka to bana na ye oyo batikali.
55 refusing to share with any of them his children's flesh that he is eating, since nothing else is left him in the siege and distress your enemy inflicts on you within all your towns. Akopesa na moto moko te kati na bango mosuni ya bana na ye oyo akozala kolia. Yango kaka nde bilei akotikala na yango mpo na pasi oyo banguna na bino bakomonisa bino na tango bakozingela bino na bingumba na bino nyonso.
56 The gentlest, most refined woman among you, so refined she'd never so much as set the sole of her foot on the ground, will begrudge the husband she embraces, and her own son and daughter, Mwasi ya malamu koleka kati na bino, oyo ayokelaka bato mawa, oyo aleki kitoko mpe amonanaka lokola nde matambe na ye enyataka mabele te, akotala na etaleli ya mabe mobali oyo ye alingaka, mwana na ye ya mobali to ya mwasi,
57 even the afterbirth from between her feet and the children she bears, for she will secretly eat them for lack of anything else, during the siege and distress your enemy inflicts on you within your towns. mwana oyo awuti kobima na libumu na ye, mpe bana oyo ye moko aboti ; pamba te akoluka kolia bango na nkuku, na tango oyo banguna na bino bakozingela bino, mpe na tango ya pasi oyo banguna na bino bakomonisa bino kati na bingumba na bino.
58 If you are not careful to obey all the words of this law written in this book, to fear this glorious and awesome name—the Father, Tango bosaleli te maloba nyonso ya mibeko oyo ekomami na buku oyo mpe botosi te Kombo ya lokumu mpe ya somo, Yawe, Nzambe na bino ;
59 then your Father will bring extraordinary plagues on you and your offspring—severe and lasting plagues, severe and lasting sicknesses. Yawe akotindela bino mpe bakitani na bino bitumbu ya somo : bapota minene oyo esilaka te mpe bokono ya makasi oyo esilaka te.
60 He will bring back on you all the diseases of Egypt you dreaded, and they will cling to you. Akotindela bino bitumbu nyonso ya Ejipito, oyo bozalaki kobanga mpe yango ekotingama na bino.
61 Every sickness and plague not written in this book of the law, your Father will also bring on you until you are destroyed. Yawe akotindela bino lisusu lolenge nyonso ya bokono mpe bapota oyo ekomami te kati na buku oyo ya Mobeko, kino bokobebisama.
62 You who were as numerous as the sky's stars will be left few, because you did not listen to your Father's voice. Bino oyo bozalaki ebele lokola minzoto na likolo, bokotikala kaka moke ; pamba te botosaki te Yawe, Nzambe na bino.
63 Just as your Father delighted to do you good and multiply you, so your Father will delight to ruin and destroy you, and you will be torn from the land you are entering to possess. Ndenge kaka Yawe asepelaki kosalela bino bolamu mpe mpo na kokomisa bino ebele, ndenge wana mpe akosepela koboma bino mpe kobebisa bino ; akopikola bino na mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa yango.
64 Your Father will scatter you among all peoples, from one end of the earth to the other, and there you will serve other gods of wood and stone, unknown to you and your fathers. Boye, Yawe akopanza bino kati na bikolo nyonso ya mokili mobimba. Kuna bokogumbamela banzambe mosusu : banzambe ya nzete mpe ya mabanga oyo bino mpe bakoko na bino boyebaki te.
65 Among those nations you will find no rest, no resting place for the sole of your foot. There your Father will give you a trembling heart, failing eyes, and a despairing soul. Kati na bikolo wana, bokozala na kimia te, bokozala na esika te ya kopemisa matambe ya makolo na bino. Kuna Yawe akokomisa bino motema likolo-likolo, miso elemba mpe nzoto elemba.
66 Your life will hang in doubt before you. Night and day you will dread, never sure of your life. Bokowumela na bomoi oyo ezanga elikya, oyo etonda na kobanga, butu mpe moyi, mpe bokoyeba te ndenge nini bomoi na bino ekosuka.
67 In the morning you'll say, "If only it were evening!" and in the evening, "If only it were morning!"—from the dread filling your heart and the sights your eyes will see. Na tongo, bokoloba : « Pokwa ekokoma tango nini ? » Mpe na pokwa, bokoloba : « Tongo ekotana tango nini ? » Pamba te somo ekotonda na mitema na bino mpo na makambo nyonso oyo miso ekomona.
68 Your Father will bring you back to Egypt in ships, by the way I said you would never see again. There you will offer yourselves for sale to your enemies as male and female slaves, but no one will buy you. Yawe Nzambe akozongisa bino na bamasuwa na Ejipito, na mokili oyo nalobaki na bino ete bokomona yango lisusu te. Mpe kuna, bokomiteka bino moko epai ya banguna na bino lokola bawumbu ya mibali mpe ya basi, kasi moto moko te akosomba bino.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]