Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Deuteronomy 27 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Moses and Israel's elders commanded the people: "Keep every command I give you today. Moyize mpe bampaka ya Isalaele bapesaki mitindo oyo epai ya bato : « Bobatela mitindo nyonso oyo nalingi kopesa bino lelo.
2 When you cross the Jordan into the land your Father is giving you, set up large stones and coat them with plaster. Tango bokokatisa Yordani mpo na kokota na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino, bokotelemisa ndambo ya mabanga minene mpe bokopakola yango pembe.
3 Write on them all the words of this law when you cross over, to enter the land your Father gives you—a land flowing with milk and honey, as our Father promised you. Bokokoma na likolo na yango, maloba nyonso ya mobeko tango bokosilisa kokatisa Yordani mpo na kokota na mokili oyo Nzambe na bino akopesa bino, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, ndenge kaka Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, alakaki bino.
4 When you cross the Jordan, set up these stones on Mount Ebal, as I command you today, and coat them with plaster. Mpe tango bokosilisa kokatisa Yordani, bokotelemisa mabanga yango na ngomba Ebali ndenge natindi bino yango lelo, mpe bokopakola yango pembe.
5 There, build an altar to your Father, an altar of stones; let no iron tool touch them. Kuna, bokotonga etumbelo ya mabanga mpo na Yawe, Nzambe na bino. Bokosalela ata esalelo moko te ya ebende.
6 Build your Father's altar with uncut stones, and offer burnt offerings on it to your Father. Bokotonga na mabanga balokota na bilanga etumbelo mpo na Yawe, Nzambe na bino, mpe bokobonza na likolo na yango bambeka ya kotumba.
7 You are to sacrifice peace offerings and eat them there, and rejoice before your Father. Na likolo ya etumbelo yango, bokobonza bambeka ya boyokani ; bokolia yango kaka na esika wana mpe bokosepela na miso ya Yawe, Nzambe na bino.
8 And you are to write on the stones all the words of this law very clearly." Bokokoma na konguluta maloba nyonso ya mobeko oyo na likolo ya mabanga oyo botelemisi. »
9 Moses and the Levitical priests told all Israel: "Quiet, Israel, and listen. Today you became the people of your Father. Sima na yango, Moyize mpe Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi balobaki na lisanga mobimba ya Isalaele : « Oh Isalaele, bovanda kimia mpe boyoka ! Bokomi lelo libota ya Yawe, Nzambe na bino.
10 Obey your Father, keeping his commandments and his statutes that I command you today." Botosa Yawe, Nzambe na bino, mpe bosalela mitindo mpe bikateli na Ye oyo nalingi kopesa bino lelo. »
11 That same day Moses commanded the people: Kaka na mokolo wana, Moyize apesaki mitindo oyo epai na bato :
12 "After crossing the Jordan, these will stand on Mount Gerizim to bless the people: Simeon, Levi, Judah, Issachar, Joseph, and Benjamin. « Tala mabota oyo ekotelema na ngomba Garizimi mpo na kopambola bato tango bokokatisa Yordani : libota ya Simeoni, ya Levi, ya Yuda, ya Isakari, ya Jozefi, mpe ya Benjame.
13 And these are to stand on Mount Ebal for the curse: Reuben, Gad, Asher, Zebulun, Dan, and Naphtali. Mpe tala mabota oyo ekotelema na ngomba Ebali mpo na kolakela bato mabe : libota ya Ribeni, ya Gadi, ya Aseri, ya Zabuloni, ya Dani mpe ya Nefitali. »
14 And the Levites will call out to all the people of Israel in a loud voice: Balevi bakoloba epai ya bana nyonso ya Isalaele maloba oyo na mongongo makasi :
15 'Cursed is anyone who carves or casts an idol—detestable to our Father, made by a craftsman's hands—and sets it up in secret.' All the people must answer, 'Amen.'" « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosala nzambe ya ekeko na libanga, na nzete to na ebende banyangwisa na moto, mpo na kotia yango na esika ya sekele ! Yawe amonaka lokola biloko ya nkele, banzambe ya bikeko oyo bato ya misala ya maboko basalaka ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »
16 'Cursed is anyone who dishonors father or mother.' All the people say, 'Amen.' « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosambwisa tata na ye to mama na ye ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »
17 'Cursed is anyone who moves his neighbor's boundary marker.' And all the people are to say, 'Amen.' « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akopusa libanga oyo batie lokola mondelo na mabele ya moninga na ye ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »
18 'Cursed is anyone who misleads a blind person on the road.' All the people are to say, 'Amen.' « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akokamba mokufi miso na nzela ya mabe. » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »
19 'Cursed is anyone who denies justice to the foreigner, the fatherless, or the widow.' All the people will say, 'Amen.' « Alakelama mabe moto nyonso oyo akokata makambo na ndenge ya mabe mpo na mopaya, mpo na mwana etike mpe mpo na mwasi oyo akufisa mobali ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »
20 Cursed is anyone who sleeps with his father's wife, for he violated his father's marriage. All the people must say, 'Amen.' « Alakelama mabe moto nyonso oyo akosangisa nzoto na mwasi ya tata na ye, pamba te asambwisi mbeto ya tata na ye ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »
21 'Cursed is anyone who sleeps with any animal.' And all the people are to say, 'Amen.' « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosangisa nzoto na nyama ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »
22 'Cursed is anyone who sleeps with his sister, his father's daughter or his mother's daughter.' All the people are to say, 'Amen.' « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosangisa nzoto na ndeko na ye ya mwasi, mwana ya tata na ye to mwana ya mama na ye ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »
23 'Cursed is anyone who sleeps with his mother-in-law.' And all the people are to say, 'Amen.' « Alakelama mabe moto nyonso oyo akosangisa nzoto na mama ya mwasi na ye ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »
24 'Cursed is anyone who strikes down his neighbor in secret.' And all the people are to say, 'Amen.' « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akoboma moninga na ye na nkuku ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »
25 'Cursed is anyone who takes a bribe to kill an innocent person.' All the people say, 'Amen.' « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akozwa kanyaka mpo na koboma moto oyo ayebi likambo te ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »
26 'Cursed is anyone who does not uphold and obey the words of this law.' All the people are to say, 'Amen.' « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akokokisa te mpe akotia te na misala, maloba ya mibeko oyo ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]