Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Deuteronomy 26 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 When you enter the land your Father gives you as an inheritance, take possession of it, and settle in it, Tango bokokota na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula, tango bokozwa yango mpe bokovanda kuna,
2 take some firstfruits from all the ground's produce you harvest from the land your Father gives you, put it in a basket, and go to the place your Father chooses to place his name. moko na moko kati na bino akozwa ndambo ya bambuma ya liboso ya biloko nyonso oyo akozwa na mabele ya mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino ; akotia yango na kitunga mpe akokende na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona mpo na kotia Kombo na Ye.
3 Go to the priest serving then and say, "I declare today to your Father that I have entered the land our Father swore to our ancestors to give us." Akoloba na Nganga-Nzambe oyo akozala na mosala na tango wana : « Natatoli lelo liboso ya Yawe, Nzambe na yo, ete nakomi na mokili oyo Yawe alakaki kopesa na bakoko na biso na nzela ya ndayi. »
4 The priest will take the basket from your hand and set it before your Father's altar. Nganga-Nzambe akozwa kitunga na maboko na ye mpe akokitisa yango liboso ya etumbelo ya Yawe, Nzambe na bino.
5 Declare before your Father: "My father was a wandering Aramean who went down to Egypt and lived there as a foreigner, few in number, and there became a great, mighty, numerous nation." Bongo okoloba liboso ya Yawe, Nzambe na yo : « Koko na ngai azalaki moto ya Arami oyo azalaki koyengayenga ; akendeki na Ejipito na bato moke, awumelaki kuna mpe akomaki ekolo monene, ekolo ya nguya mpe ya bato ebele.
6 But the Egyptians mistreated us and afflicted us and forced us into hard labor. Kasi bato ya Ejipito banyokolaki biso, bayokisaki biso pasi mpe bapesaki biso misala makasi.
7 We cried out to our Father; our Father heard our cry and saw our suffering, toil, and oppression. Boye togangaki epai na Yawe, Nzambe ya bakoko na biso. Wana ayokaki mingongo na biso, amonaki mawa, pasi mpe minyoko na biso ;
8 So our Father brought us out of Egypt with a mighty hand, an outstretched arm, great terror, and signs and wonders. Yawe abimisaki biso na Ejipito na somo makasi, na bilembo minene mpe na bikamwa, na nzela ya loboko na Ye ya nguya mpe esembolama.
9 He brought us here and gave us this land, a land flowing with milk and honey. Amemaki biso na esika oyo mpe apesaki biso mokili oyo, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi.
10 "Now I have brought the firstfruits of the ground you, our Father, gave me." Then set it before him and worship before him. Sik’oyo oh Yawe, tala, namemi bambuma ya liboso ya mabele oyo opesaki ngai. » Sima na yango, okotia kitunga liboso ya Yawe, Nzambe na yo, mpe okogumbama liboso na Ye.
11 Rejoice in all the good things your Father has given you and your household—you, the Levite, and the foreigner living among you. Boye, na biloko nyonso ya malamu oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo mpe bandeko na yo ; okosepela na yango elongo na Balevi mpe bapaya oyo bazali kati na bino.
12 When you finish bringing the full tenth of your produce in the third year, the year of the tenth, and have given it to the Levite, the foreigner, the orphan, and the widow, so they eat in your towns and are satisfied, Na mobu nyonso ya misato, mobu ya eteni ya zomi, tango okosilisa kotia pembeni eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo okozwa, okopesa yango epai ya Balevi, epai ya bapaya, epai ya bana bitike mpe epai ya basi bakufisa mibali ; mpo ete balia yango na bingumba na yo mpe batonda.
13 then say before your Father: I have cleared the sacred portion from my house and given it to the Levite, the foreigner, the orphan, and the widow, exactly as you commanded me. I have not disobeyed or forgotten your commands. Bongo okotatola maloba oyo epai na Yawe, Nzambe na yo : « Nalongolaki kati na ndako na ngai eteni ya bule mpe napesi yango epai ya Balevi, bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali, kolanda makambo nyonso oyo otindaki ngai. Napengwaki te na mitindo na Yo mpe nabosanaki yango te.
14 I ate none of it mourning, removed none unclean, gave none to the dead. I obeyed my Father's voice; I did all you commanded me. Naliaki ata eteni moko te ya bule tango nazalaki na matanga, nalongolaki eloko moko te kati na yango tango nazalaki mbindo mpe nabonzaki eloko moko te kati na yango epai ya bakufi. Natosaki Yawe, Nzambe na ngai, mpe nasalaki makambo nyonso oyo otindaki ngai.
15 Look down from your holy home in heaven, bless your people Israel and the land you gave us, as sworn to our fathers—a land flowing with milk and honey. Tala wuta likolo, esika na Yo ya bule epai wapi ovandaka, mpe pambola Isalaele, bato na Yo, mpe mokili oyo opesaki biso ndenge olakaki yango epai ya bakoko na biso na nzela ya ndayi, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. »
16 Today your Father commands you to do these statutes and rules, keep and do them with all your heart and with all your soul. Lelo, Yawe, Nzambe na yo, apesi yo mitindo ete osalela malamu bikateli mpe mibeko oyo ; batela yango malamu na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba.
17 Today you have declared your Father to be your Father—to walk in his ways, keep his statutes, his commandments, and his rules, and obey him. Lelo, ondimi ete Yawe azali Nzambe na yo ; ndenge opesaki elaka ete okotosa Ye, okobatela mibeko na Ye nyonso mpe okosala makambo nyonso oyo Ye akotinda yo.
18 Today your Father has declared you his people, his treasured possession, as he promised you, and that you must keep all his commandments, Lelo mpe, Yawe andimi ete ozala ekolo na Ye penza, ndenge alakaki yo mpe ndenge apesaki yo mitindo ete otosa mibeko na Ye nyonso.
19 and he will set you high above all the nations he made, for praise, fame, and honor, and that you will be a people holy to your Father, as he promised. Na bongo, Yawe, Nzambe na yo, akokomisa yo monene koleka bikolo nyonso oyo Ye akela ; akopesa yo lokumu, nkembo na Kombo na Ye. Okozala libota ya bule mpo na Yawe, Nzambe na yo, ndenge alakaki yango.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]