Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Deuteronomy 25 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 If men have a dispute and go to court, the judges deciding between them clear the innocent and condemn the guilty, Soki bato bazali kowelana, bakomema likambo na bango na esambiselo, mpe basambisi bakokata likambo yango : bakolongisa moto oyo ayebi likambo te mpe bakokweyisa moto oyo asali mabe.
2 if the guilty man deserves a beating, the judge will make him lie down and be beaten before him, lashes numbered to fit his crime. Bongo soki esengi ete babeta moto oyo asali mabe fimbu, basambisi bakolalisa ye na mabele mpe bakobetisa ye fimbu na miso na bango ; bakobetisa ye motango ya bafimbu oyo ekoki na mabe oyo asali.
3 Forty lashes, no more; if he beats him beyond these, your brother is degraded before your eyes. Kasi bakoki te kobeta ye bafimbu koleka tuku minei. Soki babeti ye fimbu koleka tuku minei, ndeko na bino akosambwa na miso na bino.
4 You shall not muzzle an ox while it treads out the grain. Osengeli te kokanga monoko ya ngombe oyo ezali konika bambuma.
5 If brothers live together and one dies without a son, the dead man's wife must not marry an outsider. Her husband's brother must take her as his wife, sleep with her, and do a brother-in-law's duty to her. Soki bandeko mibali bazali kovanda elongo, mpe moko kati na bango akufi kasi atiki mwana te, mwasi oyo akufisi mobali akoki te kobala na libota mosusu ; semeki na ye asengeli kozwa ye na libala mpo na kokokisa epai na ye mokumba ya kisemeki.
6 The firstborn she bears takes the dead brother's name, so his name is not erased from Israel. Mwana mobali ya liboso oyo mwasi yango akobota akozwa kombo ya ndeko mobali oyo akufa mpo ete kombo na ye ebunga te kati na Isalaele.
7 If the man doesn't want to take his brother's wife, she goes up to the elders at the gate and says, "My husband's brother refuses to raise up his brother's name in Israel; he's unwilling to act as my brother-in-law." Soki mobali yango aboyi kobala semeki na ye ya mwasi, semeki yango ya mwasi akokende epai ya bampaka, na ekuke ya engumba, mpe akoloba na bango : « Semeki na ngai aboyi kobatela kombo ya ndeko na ye kati na Isalaele, aboyi kokokisa mokumba na ye ya kisemeki epai na ngai. »
8 Then his town's elders summon and address him. If he stands firm, saying, "I don't want to take her," Boye, bampaka ya engumba wana bakobengisa mobali yango mpe bakoloba na ye. Soki akobi kaka koboya kobala semeki na ye,
9 his brother's wife will approach him before the elders, pull his sandal off his foot, spit in his face, and say, "So it is done to the man who won't build his brother's house." semeki yango akopusana pembeni na ye na miso ya bampaka, akolongola ye lokolo moko ya sandale, akobwakela ye soyi na elongi, mpe akoloba na ye : « Tala ndenge basengeli kosala moto oyo aboyi kotonga ndako ya ndeko na ye ya mobali. »
10 And his family will be called in Israel "The house of him whose sandal was pulled off." Boye, kati na Isalaele, bakobanda kobenga bakitani ya moto wana « bana ya moto oyo balongola sandale. »
11 If two men fight and one's wife comes to rescue her husband from his attacker, and she reaches out and grabs his private parts, Soki mibali bazali kobunda, bongo mwasi moko apusani mpo na kokangola mobali na ye na loboko ya moto oyo azali kobeta ye, mpe soki mwasi yango asemboli loboko na ye mpe akangi nzoto ya mibali ya moto oyo azali kobeta mobali na ye,
12 then you are to cut off her hand. Show no pity. bokokata loboko na ye. Bokoyokela ye mawa te.
13 You shall not have in your bag two kinds of weights, a large and a small. Okoki te kozala na bimekelo mibale ya kilo ekesana kati na saki na yo : moko eleki kilo mpe mosusu eleki pepele.
14 You shall not have in your house two kinds of measures, a large and a small. Okoki te kozala na ndako na yo na bikolo mibale ekesana mpo na kotanga na yango biloko : moko ya monene mpe mosusu ya moke.
15 Have a full, honest weight; have a full, honest measure, so your days may be long on the land your Father is giving you. Osengeli kozala na bimekelo mpe bikolo ya kotangela ya malamu mpe ya sembo, mpo ete owumela mikolo ebele kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo.
16 For everyone who does such things, everyone who acts dishonestly, is detestable to your Father. Pamba te Yawe, Nzambe na yo, amonaka nkele, moto nyonso oyo asalaka makambo wana, moto nyonso oyo asalaka makambo ya sembo te.
17 Remember what Amalek did to you on the way as you came out of Egypt, Bobosana te makambo oyo bato ya Amaleki basalaki bino tango bobimaki na Ejipito :
18 how he met you on the road, cut down all your stragglers behind you when you were faint and weary, and had no fear of our Father. tango bolembaki nzoto mpe bosilaki makasi, babimelaki bino na pwasa na mobembo na bino mpe babomaki bato nyonso oyo bazalaki na sima ; babangaki Nzambe te.
19 When your Father gives you rest from all your enemies around you, in the land your Father is giving you as an inheritance to possess, wipe out Amalek's memory from under heaven. Don't forget. Tango Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino bopemi liboso ya banguna nyonso oyo bazingeli bino kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo na kozwa lokola libula, bosengeli koboma bato ya Amaleki mpo ete botikala lisusu te kokanisa bango kati na mokili. Bobosana te kosala likambo yango.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]