Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Deuteronomy 24 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 When a man marries a woman, if she no longer pleases him because he finds something indecent in her, he writes her a certificate of divorce, puts it in her hand, and sends her from his house, Soki mobali abali mwasi mpe, sima na mikolo, asepeli na ye lisusu te mpo ete amoni eloko moko ya mabe kati na ye, tika ete akoma mokanda ya koboma libala mpe apesa ye yango ; bongo na sima, abimisa ye na ndako na ye.
2 and if she leaves his house and goes and becomes another man's wife, Sima na kobima na ndako ya mobali wana, mwasi yango akoki kobala mobali mosusu.
3 and her second husband hates her, writes her a divorce certificate, puts it in her hand, and sends her from his house—or if that second husband who took her as his wife dies, Mpe soki esali ete mobali oyo ya mibale mpe asepeli na ye lisusu te, tika ete ye mpe akokoma mokanda mpo na koboma libala mpe apesa ye yango, bongo na sima, abimisa ye na ndako na ye ; to soki esali ete mobali oyo ya mibale akufi,
4 then her first husband, who sent her away, may not marry her again after she has been made unclean; that is detestable before our Father, and you must not bring guilt on the land your Father gives you as an inheritance. boye mobali na ye ya liboso, oyo abenganaki ye na libala, akoki lisusu te kozongisa ye na libala, pamba te mwasi yango akomi mbindo liboso na ye : kozongisa ye lisusu na libala ezali likambo ya nkele na miso ya Yawe. Boyeisa lisumu te na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula.
5 When a man takes a new wife, he must not join the army or be given any duty; he is free at home one year, to bring joy to the wife he took. Soki mobali abali sika, bakoki te kotinda ye na bitumba to kopesa ye mosala songolo ; akozala na bonsomi mobu mobimba mpo ete avanda na ndako na ye mpo na kosepelisa mwasi oyo asili kobala.
6 No one may take a pair of millstones, or even just the upper one, as security for a debt—that pledges someone's very livelihood. Bokanga te lokola ndanga, mabanga mibale oyo moninga anikaka na yango ble : mingi koleka libanga oyo ya moke, pamba te kosala bongo ezali lokola kokanga ye nzela oyo abikelaka.
7 If a man is found kidnapping a fellow Israelite, enslaving or selling him, that kidnapper must die. So purge the evil from among you. Soki moto moko ya Isalaele ayibi ndeko na ye ya Isalaele mpe akomisi ye mowumbu to ateki ye, basengeli koboma moto wana. Na nzela wana nde bosengeli kolongola mabe kati na bino.
8 About a defiling skin disease, be very careful to do exactly as the Levitical priests teach you, just as I commanded them. Mpo na makambo oyo etali bokono ya maba, bosala keba ete bosalela malamu malako nyonso oyo Banganga-Nzambe, ba-oyo bazali Balevi, bapesaki bino. Bosengeli kotosa malamu makambo oyo natindaki bango.
9 Remember what your Father did to Miriam on the way as you came out of Egypt. Bobosana te makambo oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki epai ya Miriami, na nzela, sima na bino kobima na Ejipito.
10 When you lend your neighbor anything, don't enter his house to take his pledge. Soki odefisi eloko epai ya moninga na yo, kokota te na ndako na ye mpo na kozwa ndanga.
11 You must stand outside, and the borrower must bring the pledge out to you. Vanda kaka na libanda kino moto oyo adefaki epai na yo akomemela yo ndanga.
12 And if he is a poor man, you must not keep his pledge overnight. Soki moto yango azali mobola, kokende kolala te na ndanga oyo asimbisaki yo mpo na niongo.
13 Return his pledge by sunset, so he can sleep in his cloak and bless you; your Father will credit it to you as righteousness. Okozongisela ye ndanga na ye ya kazaka ye, na pokwa, mpo ete alala na yango. Bongo, ye akopambola yo ; mpe ekozala mpo na yo likambo ya sembo na miso ya Yawe, Nzambe na yo.
14 Do not exploit a poor, needy hired worker, whether a brother or a foreigner living in your land, in your towns. Konyokola te moto ya mosala oyo azali mobola to moto akelela : azala ndeko na yo moto ya Isalaele to mopaya oyo azali kovanda kati na moko ya bingumba na yo.
15 Pay his wages the same day, before sunset—he is poor and depends on it. Otherwise he may cry out to our Father against you, and it will be sin for you. Pesa ye lifuti na ye ya mokolo na mokolo na pokwa, pamba te azali mobali mpe atiaka elikya na lifuti yango, noki te akoganga epai na Yawe na tina na yo mpe okosala lisumu.
16 Parents must not be executed for their children, nor children executed for their parents; each is to be executed for his own sin. Bakoboma batata te mpo na bana na bango to mpe bakoboma bana te mpo na batata na bango ; bakoboma moto na moto mpo na masumu na ye moko.
17 You must not deny justice to the foreigner or fatherless, nor take a widow's cloak as pledge. Bokoki te kokata na ndenge ya mabe, makambo mpo na mopaya to mpo na mwana etike ; to kokamata kazaka ya mwasi oyo akufisa mobali lokola ndanga.
18 Remember you were slaves in Egypt; your Father redeemed you from there—so I command you to do this. Bobosana te ete bino mpe bozalaki bawumbu na Ejipito ; mpe Yawe, Nzambe na bino, asikolaki bino kuna.
19 When you harvest your field and forget a sheaf, don't go back for it. Leave it for the foreigner, the fatherless, and the widow, so your Father blesses you in all the work of your hands. Tango bokobuka mbuma na bilanga na bino, soki bobosani liboke ya ble, bozonga te mpo na kozwa yango ; botika yango mpo na mopaya, mpo na mwana etike mpe mpo na mwasi oyo akufisa mobali mpo ete Yawe, Nzambe na bino, apambola bino na misala nyonso oyo maboko na bino ekosala.
20 When you beat your olive tree, do not go over the branches again; leave what remains for the foreigner, the fatherless, and the widow. Tango bokoningisa bambuma ya olive na banzete na yango, bobuka te oyo ekotikala na bitape ; botika yango mpo na bapaya, bana bitike mpe mpo na basi bakufisa mibali.
21 When you gather your vineyard's grapes, don't strip what's left; leave it for the foreigner, the orphan, and the widow. Tango bokobuka bambuma na bilanga na bino ya vino, bokozongela te kobuka na mbala ya mibale. Botika oyo ekotikala mpo na mopaya, mpo na mwana etike mpe mpo na mwasi oyo akufisa mobali.
22 Remember you were slaves in the land of Egypt; that's why I command you to do this. Bokanisa ete bozalaki bawumbu na Ejipito. Yango wana natindi bino kotosa mibeko oyo.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]