Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Deuteronomy 23 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
2 No man with crushed testicles or a severed penis may enter the assembly of our Father. Mobali moko te oyo baboma mokongo to balongola nzoto ya mibali akoki kokota na lisanga ya Yawe.
3 No one of illegitimate birth may enter the assembly of our Father; nor may his descendants, even to the tenth generation, enter the assembly of our Father. Mwana makangu moko te to bakitani na ye bakoki kokota na lisanga ya Yawe ata sima na milongo zomi.
4 No Ammonite or Moabite may enter the assembly of our Father; even to the tenth generation none belonging to them may enter the assembly of our Father, ever. Moto moko te ya Amoni to ya Moabi to bakitani na bango bakoki kokota na lisanga ya Yawe ata sima na milongo zomi.
5 For they did not meet you with bread and water on the road out of Egypt, and hired Balaam son of Beor from Pethor of Mesopotamia to curse you. Pamba te bayaki te koyamba bino na mapa mpe na mayi na nzela na bino tango bobimaki na Ejipito ; mpe bazwaki Balami, mwana mobali ya Beori, moto ya Petori, wuta na mokili ya Mezopotami, mpo ete alakela bino mabe.
6 But your Father refused to listen to Balaam, and turned the curse into a blessing for you, because your Father loved you. Kasi Yawe, Nzambe na bino, ayokaki Balami te mpe abongolaki elakeli mabe lipamboli mpo na bino, pamba te Yawe, Nzambe na bino, alingi bino.
7 You must not seek their peace or their prosperity all your days, ever. Tango nyonso bokozala na bomoi, bokoki te kosala boyokani ya kimia elongo na bango.
8 Do not despise an Edomite; he is your brother. Do not despise an Egyptian; you were a foreigner in his land. Bokoki te komona bato ya Edomi lokola bato ya mbindo, pamba te bazali bandeko na bino. Bokoki te komona bato ya Ejipito lokola bato ya mbindo, pamba te bovandaki kati na mokili na bango lokola bapaya.
9 The children born to them in the third generation may enter the assembly of our Father. Bakitani na bango, kobanda na molongo ya misato, nde bakoki kokota na lisanga ya Yawe.
10 When you march out as a camp against your enemies, keep yourself from every evil thing. Tango bokotonga milako mpo na kobundisa banguna na bino, bozala mosika na eloko nyonso oyo ezali mbindo.
11 If any man among you is unclean from a nighttime emission, he must go outside the camp and not enter it again. Soki mobali moko kati na bino azali mbindo, pamba te abimisaki mayi ya mibali na butu, asengeli kokende libanda ya molako mpe kovanda kuna.
12 As evening approaches, he must bathe in water; at sunset he may return to the camp. Kasi na pokwa, na tango moyi elalaka, asengeli komisukola nzoto mpe kozonga na molako.
13 You must have a place outside the camp where you may go out to relieve yourself. Bokopona esika moko na libanda ya molako, mpo na kosala zongo.
14 Keep a spade among your gear. When you sit outside, dig a hole with it and cover your excrement. Moto na moto, kati na bisalelo na ye, asengeli kozala na pawu ya moke mpo na kotimola mabele ; mpe soki akei kosala zongo inene, akotimola mwa libulu mpe akokunda nyei na ye.
15 Your Father walks through your camp to rescue you and hand over your enemies; therefore your camp must be holy, so that he may not see anything indecent among you and turn away from you. Pamba te Yawe, Nzambe na bino, atambolaka kati na molako na bino mpo na kobatela bino mpe kokangola bino na maboko ya banguna na bino. Molako na bino esengeli kozala bule mpo ete akoka komona te eloko moko ya mbindo kati na bino mpe apesa bino mokongo te.
16 Do not hand over to his master a slave who has escaped to you from his master. Soki mowumbu ayei kobombama epai na yo, kozongisa ye te na maboko ya nkolo na ye.
17 He is to live with you, among you, in any of your towns he chooses, wherever pleases him. Do not mistreat him. Tika ete awumela epai na yo, na esika nyonso oyo alingi, mpe na engumba nyonso oyo aponi ; konyokola ye te.
18 No daughter of Israel is to be a temple prostitute, and no son of Israel a temple prostitute. Kati na bana ya Isalaele, azala mobali to mwasi, moko te asengeli komipesa na kindumba ya bule.
19 Do not bring a prostitute's fee or a dog's earnings into your Father's house for any vow—both are detestable to your Father. Bosengeli te kokotisa na Tempelo ya Yawe, Nzambe na bino, lifuti ya mwasi ya ndumba to ya mobali ya ndumba, mpo na kokokisa ndayi ya lolenge nyonso, pamba te Yawe, Nzambe na bino, amonaka bango nyonso mibale nkele.
20 Don't charge your brother interest—on money, food, or anything else lent. Okoki te kozwa mileki epai ya ndeko na yo tango odefisi ye mosolo, bilei to eloko mosusu oyo ekoki kobota mileki.
21 Charge a foreigner interest, but not your brother, so your Father blesses everything you put your hand to in the land you're entering to possess. Okoki kozwa mileki epai ya mopaya, kasi epai ya ndeko na yo moto ya Isalaele te ; mpo ete Yawe, Nzambe na bino, apambola bino na misala nyonso oyo maboko na bino ekosala kati na mokili oyo bokokota mpo na kozwa.
22 When you vow a vow to your Father, do not delay paying it, for your Father will surely require it of you, and it will be sin in you. Soki olapi ndayi epai na Yawe, Nzambe na yo, kowumela te mpo na kokokisa yango ; noki te Yawe, Nzambe na yo, akotuna yo yango mpe ekozala lisumu mpo na yo.
23 But if you refrain from vowing, you will not be guilty of sin. Kasi soki oboyi na yo kolapa ndayi, okomema ngambo te.
24 Keep and do what you vow to your Father; you spoke it voluntarily, with your own mouth. Likambo nyonso oyo bibebu na yo ekobimisa, osengeli kosalela yango, pamba te olapaki ndayi epai na Yawe, Nzambe na yo, na monoko na yo moko mpe wuta na mokano ya motema na yo.
25 When you enter your neighbor's vineyard, you may eat your fill of grapes, as much as you like, but put none in your container. Soki okoti na elanga ya vino ya moninga na yo, okoki kolia bambuma nyonso oyo olingi, kasi kotia eloko moko te na kitunga na yo.
26 When you enter your neighbor's standing grain, you may pick heads of grain by hand, but you must not swing a sickle in your neighbor's standing grain. Soki okoti na elanga ya ble ya moninga na yo, okoki kobuka ble na maboko, kasi kosalela mbeli te.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]