Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Deuteronomy 22 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Don't see your brother's ox or sheep wandering off and ignore them; be sure to return them to your brother. Soki omoni meme to ngombe ya ndeko na yo ezali koyengayenga, kotala yango pamba te, kasi kanga yango mpe zongisa yango epai ya nkolo na yango.
2 If your brother isn't nearby, or you don't know him, bring it home and keep it until he asks for it, then return it to him. Soki ndeko yango avandaka pembeni na yo te to oyebi ye te, mema yango na ndako na yo mpe bomba yango kino akoya koluka yango, bongo okozongisela ye yango.
3 Do the same for his donkey, the same for his garment, the same for anything your brother loses and you find; you must not ignore it. Okosala ndenge moko soki omoni ane ya ndeko na yo to kazaka na ye to eloko mosusu oyo ye abungisi. Kotala yango na pamba te.
4 You must not see your brother's donkey or ox collapsed on the road and ignore them; be sure to help him get it up. Soki omoni ane ya ndeko na yo to ngombe na ye ekweyi na nzela, kotala yango na pamba te ; osalisa ndeko na yo mpo na kotelemisa yango.
5 A woman must not wear men's clothing, nor a man a woman's, for whoever does these things is detestable to your Father. Mwasi akoki kolata bilamba ya mibali te to mpe mobali akoki te kolata bilamba ya basi, pamba te Yawe, Nzambe na bino, ayinaka moto nyonso oyo asalaka makambo ya ndenge wana.
6 If you come upon a bird's nest on the way, in any tree or on the ground, with chicks or eggs, and the mother sitting on the chicks or the eggs, do not take the mother with the young. Soki omoni zala ya ndeke pembeni ya nzela, ezala likolo ya nzete to na mabele, mpe mama ya ndeke evandeli bana to maki, kozwa te mama elongo na bana.
7 You must send the mother away, but take the young for yourself, so it goes well for you and your days are long. Osengeli kozwa bana, kasi kotika mama ete ekende mpo ete ozala moto ya esengo mpe ozala na bomoi molayi.
8 When you build a new house, put a railing on the roof, so your house doesn't bear bloodguilt if someone falls from it. Tango okotonga ndako ya sika, kozanga te kotonga mir ya mokuse zingazinga ya motondo mpo ete omema ngambo ya makila te na ndako na yo soki moto akweyi likolo ya motondo.
9 Don't plant your vineyard with mixed seed, or the entire yield—the seed sown and the vineyard's fruit—will be forfeited. Kolona te lolenge mibale ya nkona na elanga na yo ya vino ; noki te nyonso ekokoma bule : oyo okolona mpe bambuma ya elanga na yo ya vino.
10 You must not plow with an ox and a donkey yoked together. Okoki kosangisa te na libaya moko, ngombe mpe ane mpo na kobalola mabele.
11 You must not wear cloth of wool and linen woven together. Okoki kolata te bilamba oyo basala na bapwale ya meme mpe na lino.
12 Put tassels on the four corners of the cloak you wear. Okotia basinga na basonge minei ya elamba oyo okolata.
13 If a man marries a woman, and after sleeping with her he comes to hate her, Soki mobali abali mwasi mpe, sima na kosangisa na ye nzoto, asepeli na ye lisusu te,
14 and charges her with shameful behavior, giving her a bad name, saying, "I took this woman, but when I approached her I found no proof of her virginity," alobi ete ezaleli ya mwasi yango ezali mabe, bongo apanzi ye sango ya mabe na koloba : « Nabalaki mwasi oyo, kasi tango nasangisi na ye nzoto, namoni ete ayebaki nzoto ya mibali, »
15 then the young woman's father and mother is to take and bring out evidence of her virginity to the city elders at the gate. wana tata mpe mama ya mwana mwasi, basengeli kolakisa epai na bampaka, na bikuke ya engumba, bilembo oyo ezali kolakisa ete mwana na bango ya mwasi ayebaki nzoto nanu ya mibali te.
16 The young woman's father will tell the elders, "I gave my daughter to this man as a wife, and he hates her. Tata ya mwana mwasi akoloba na bampaka : « Nabalisaki mwana na ngai ya mwasi na mobali oyo, kasi asepeli na ye lisusu te ;
17 Now he has charged her with shameful conduct, saying, 'I found no proof of your daughter's virginity.' But here is the proof of my daughter's virginity.' They are to spread the cloth before the elders of the city." amoni ete ezaleli ya mwana na ngai ya mwasi ezali malamu te, yango wana alobi : ‹ Mwana mwasi oyo ayebaki nzoto ya mibali. › Kasi tala bilembo oyo ezali kolakisa ete mwana na ngai ya mwasi ayebaki nanu nzoto ya mibali te. » Boye baboti ya mwana mwasi bakofungola elamba liboso ya bampaka ya engumba,
18 Then the elders of that city is to take the man and discipline him, mpe bampaka ya engumba bakozwa mobali yango mpe bakopesa ye etumbu :
19 and they are to fine him about a year's wages in silver and give it to the young woman's father, because he has given a bad name to a virgin of Israel. She is to remain his wife; he may not divorce her as long as he lives. bakofutisa ye lomande ya mbongo ya bibende ya palata, nkama moko, mpe bakopesa yango epai ya tata ya mwana mwasi, pamba te mobali oyo asambwisi elenge mwasi ya Isalaele oyo ayebaki nanu nzoto ya mibali te mpe akokoba kozala mwasi na ye : akoki kokabwana na ye te mikolo nyonso ya bomoi na ye.
20 But if the charge is true, and no evidence of the young woman's virginity is found, Kasi soki makambo oyo bafundeli ye ezali ya solo, mpe ezali ata na elamba moko te oyo ezali kotalisa ete ayebaki nanu nzoto ya mibali te,
21 they must bring the young woman to her father's house entrance, and the men of her city will stone her to death for doing a disgraceful thing in Israel—being promiscuous in her father's house. Remove the evil from among you. esengeli bamema ye libanda ya ndako ya tata na ye, mpe kuna bato ya engumba na ye bakobamba ye mabanga kino akokufa : asalaki likambo ya soni kati na Isalaele na kosalaka kindumba tango azalaki na ndako ya tata na ye. Na nzela wana nde bosengeli kolongola mabe kati na bino.
22 If a man is found lying with someone else's wife, both must die—the man who lay with her, and the woman. Remove the evil from Israel. Soki bakangi mobali azali kosangisa nzoto na mwasi ya mobali mosusu, bango nyonso mibale basengeli kokufa. Na nzela wana nde bosengeli kolongola mabe kati na Isalaele.
23 If a young woman, a virgin engaged to a man, and another man finds her in the city and sleeps with her, Soki kati na engumba mobali moko akutani na elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te bongo asangisi na ye nzoto, nzokande elenge mwasi yango azali na mobali oyo alingi kobala ye,
24 bring both to that city's gate and stone them to death: the young woman, because she didn't scream for help in the city; the man, because he violated his neighbor's wife. Purge the evil from among you. bokomema bango mibale na ekuke ya engumba wana mpe kobamba bango mabanga kino bakokufa. Bokoboma mwana mwasi, pamba te azalaki kati na engumba kasi agangaki te mpo ete baya kosunga ye ; bokoboma mobali, pamba te asangisaki nzoto na makasi na mwasi ya mobali mosusu. Na nzela wana nde bosengeli kolongola mabe kati na bino.
25 But if the man finds the engaged young woman in a field, seizes her, and lies with her, he alone dies. Soki mobali akoti na zamba na mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe asangisi na ye nzoto na makasi, nzokande mwasi yango azali na mobali oyo alingi kobala ye, kaka mobali oyo asali likambo wana nde asengeli kokufa.
26 Do nothing to the young woman; she has no death-worthy sin. This case is like a man attacking his neighbor and killing him: Bokosala likambo moko te epai ya mwana mwasi, pamba te asali lisumu moko te oyo ekoki komema ye na kufa. Likambo oyo ekokani na moto oyo abundisi moninga na ye mpe abomi ye.
27 for he found her in the field; the engaged young woman cried out, but no one rescued her. Pamba te mobali wana akutanaki na mwasi wana na zamba, mpe mwana mwasi wana akokaki koganga na ndenge nyonso alingi, kasi moto moko te akokaki komonana kuna mpo na kosunga ye.
28 If a man finds an unpledged young virgin, seizes her, lies with her, and they are found out, Soki mobali akutani na elenge mwasi, oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe azali te na mobali oyo alingi kobala ye, asangisi na ye nzoto na makasi, mpe bomoni bango ;
29 the man who slept with her must give the young woman's father about half a year's wages in silver; she becomes his wife because he violated her, and he may not divorce her his whole life. mobali wana asengeli kofuta mbongo ya bibende ya palata, tuku mitano epai ya tata ya elenge mwasi, asengeli kobala elenge mwasi yango ; pamba te asangisi na ye nzoto na makasi : akoki kokabwana na ye te mikolo nyonso ya bomoi na ye.
23:1 A man must not marry his father's wife; he must not dishonor his father's marriage bed. Mwana mobali moko te akoki kobala mwasi ya tata na ye, noki te akosambwisa mbeto ya tata na ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]