Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Deuteronomy 21 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 If a slain man is found lying in the field in the land your Father gives you to possess, and no one knows who killed him, Soki kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo na kozwa, bakuti moto akufa alali na elanga, bongo moto oyo abomaki ye ayebani te,
2 then your elders and judges must go out and measure to the towns around the body. bampaka mpe basambisi na bino basengeli kobima mpo na komeka molayi, kobanda na esika oyo ebembe ezali kino na bingumba ya zingazinga,
3 The elders of the city nearest the body must take a heifer never worked, never yoked, mpo na koyeba engumba oyo eleki pene. Bongo bampaka ya engumba yango bakozwa mwana ngombe ya mwasi oyo nanu basaleli mosala te mpe nanu bakangi ekangiseli na kingo te ;
4 and that town's elders must bring the heifer down to a valley with running water, never plowed or sown, and break its neck there in the valley. bakomema mwana ngombe yango ya mwasi na lubwaku oyo, kati na yango, basala nanu mosala ya bilanga te mpe balona nanu ata eloko moko te, na esika oyo mayi ezali kotiola. Ezali kuna nde bampaka bakobuka yango kingo.
5 The priests, Levi's sons, must come forward, for your Father chose them to serve him and bless in the name of our Father; by their word every dispute and every assault is settled. Banganga-Nzambe, bana mibali ya Levi, bakopusana ; pamba te ezali bango nde Yawe, Nzambe na bino, apona mpo na kosala mosala na Ye, mpo na kopambola bato na Kombo na Yawe mpe mpo na kokata makambo tango nyonso kowelana mpe kozokisana ezali.
6 All the elders of that city nearest the body must wash their hands over the broken-necked heifer in the valley, Bongo bampaka ya engumba yango bakosukola maboko na bango na likolo ya mwana ngombe ya mwasi oyo bakobuka kingo na lubwaku
7 and they must declare, "Our hands did not shed this blood, nor did our eyes see it. mpe bakoloba : « Maboko na biso esopaki makila oyo te, mpe miso na biso emonaki te tango likambo yango esalemaki.
8 Atone for your people Israel, our Father, whom you redeemed; don't place innocent blood among your people Israel. Then the blood will be atoned for them." Eh Yawe, ndima kolimbisa masumu ya Isalaele, bato na Yo, oyo osikolaki. Kotangela bango ngambo te ya makila ya moto oyo ayebi likambo te. » Boye, Yawe akolimbisa bango mpo na makila oyo etangaki.
9 So you will purge the guilt of innocent blood from among you, when you do what is right in the eyes of our Father. Na nzela wana nde bokolongola, kati na bino, ngambo ya kosopa makila ya moto oyo ayebi likambo te wana bokosala likambo ya bosembo na miso ya Yawe.
10 When you march out against your enemies and our Father hands them to you and you take captives, Tango bokokende kobundisa banguna na bino, bongo Yawe, Nzambe na bino, akabi bango na maboko na bino mpe bokangi ndambo ya bato ;
11 and among the captives you see a beautiful woman, desire her, and want to take her as your wife, soki bomoni mwasi ya kitoko kati na bango mpe moko kati na bino asepeli na ye, akoki solo kobala ye.
12 then bring her into your home, and she must shave her head and cut her nails. Boye mobali oyo asepeli kobala mwasi yango akokotisa ye kati na ndako na ye, mpe mwasi yango akomikokola suki ya moto na ye, akomikata manzaka na ye ;
13 Have her take off her captive's clothes, stay in your house, mourn her father and mother a full month. Then you may go to her as husband, and she becomes your wife. akotia pembeni bilamba oyo alataki tango bakangaki ye mpe akovanda na ndako ya mobali yango. Sima na ye kolela tata mpe mama na ye sanza mobimba, mobali yango akosangisa na ye nzoto mpe akokoma mobali na ye ; bongo ye akokoma mwasi ya mobali yango.
14 If you no longer want her, let her go where she wishes. Do not sell her for silver or treat her as a slave, since you humiliated her. Soki mobali asepeli lisusu na mwasi yango te, akotika ye kokende na esika nyonso oyo alingi ; akoki te koteka ye to kokomisa ye lokola mowumbu, pamba te asambwisaki ye.
15 If a man has two wives, one loved, one unloved, and both bear him sons, but the firstborn is the unloved wife's, Soki mobali azali na basi mibale, bongo alingaka moko koleka mosusu, mpe bango mibale baboteli ye bana, kasi mwana ya liboso azali mwana mobali ya mwasi oyo ye alingaka mingi te ;
16 when he wills his estate to his sons, he may not make the loved wife's son firstborn over the unloved wife's son, the real firstborn. tango akokabola bozwi na ye lokola libula epai ya bana na ye ya mibali ; akoki te kokomisa mwana ya liboso, mwana mobali ya mwasi oyo ye alingaka koleka na esika ya mwana mobali ya mwasi oyo ye alingaka mingi te.
17 Instead he must recognize as firstborn the son of his unloved wife, giving him a double share of all he has; for he is the first of his strength—the birthright is his. Kasi akozwa mwana mobali ya mwasi oyo ye alingaka mingi te lokola mwana ya liboso mpe akopesa ye biteni mibale ya biloko nyonso oyo azali na yango. Mwana mobali wana azali elembo ya liboso ya bokasi ya tata na ye, boye asengeli kozwa makoki nyonso oyo ebongi na mwana ya liboso.
18 If a man has a stubborn, rebellious son who won't obey his father or mother, and won't listen when they discipline him, Soki moto azali na mwana oyo azali moto makasi mpe motomboki, oyo atosaka te ezala tata to mpe mama na ye, mpe ayokelaka bango te ata soki bapesi ye etumbu,
19 then his father and mother must take hold of him and bring him to the elders at his city's gate, tata mpe mama na ye bakokanga ye mpe bakomema ye epai ya bampaka na ekuke ya engumba na bango.
20 and tell his city's elders, "This son of ours is stubborn and rebellious; he won't listen to us—a glutton and a drunk." Bakoloba na bampaka ya engumba : « Mwana na biso oyo azali moto makasi mpe motomboki, atosaka biso te, azali lokoso mpe molangwi masanga. »
21 All his city's men must stone him to death. Clear the evil out from among you, and all Israel will hear and be afraid. Boye bato nyonso ya engumba na ye bakobamba ye mabanga kino akokufa. Na nzela wana nde bokolongola mabe kati na bino. Tango bana nyonso ya Isalaele bakoyoka yango, bakobanga.
22 If a man's sin deserves death and he is executed, and you hang him on a tree, Soki moto asali mabe oyo esengi ete bapesa ye etumbu ya kufa, bongo badiembiki nzoto na ye na nzete,
23 don't leave his body on the tree overnight; bury him that day, for anyone hung on a tree is under our Father's curse. Don't make your land unclean, the land your Father gives you to inherit. ebembe na ye ekowumela te butu mobimba na nzete wana ; bosengeli kokunda yango kaka na mokolo wana, pamba te moto nyonso oyo badiembiki na nzete azali na se ya bilakeli mabe ya Nzambe. Bosengeli te kokomisa mbindo mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bino lokola libula.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]