Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Deuteronomy 20 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 When you go to war against your enemies and see horses, chariots, and an army larger than yours, do not fear them, for your Father is with you—the one who brought you up from the land of Egypt. Tango bokokende kobundisa banguna na bino mpe bokomona bampunda, bashar mpe mampinga ya basoda ebele koleka oyo ya bino, bobanga bango te, pamba te Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito, akozala elongo na bino.
2 When you are about to go into battle, the priest is to come forward and speak to the people. Tango bokobongama mpo na kokende na bitumba, Nganga-Nzambe asengeli koleka liboso ya mampinga mpe koloba na bango
3 He is to tell them, "Hear, Israel: today you go to battle against your enemies. Do not lose heart, do not fear, do not panic, do not be terrified of them, maloba oyo : « Oh Isalaele, boyoka, awa bobongami lelo mpo na kokende na bitumba mpo na kobundisa banguna na bino ; boyika mpiko ! Bobanga te ! Bolenga te ! Bozala na somo te liboso ya banguna na bino.
4 for your Father goes with you, to fight your enemies for you and give you victory." Pamba te Yawe, Nzambe na bino, akotambola elongo na bino mpo na kobundela bino liboso ya banguna na bino mpe kopesa bino elonga. »
5 Then the officers will tell the people: "Has anyone built a new house but not dedicated it? Let him go home, or he may die in battle and another dedicate it. Bakonzi ya basoda basengeli koloba na mampinga : « Ezali na moko kati na bino oyo awuti kotonga ndako ya sika mpe avandi nanu kuna te ? Tika ete azonga na ndako na ye noki te akoki kokufa na bitumba, bongo moto mosusu akoya kovanda moto ya liboso na ndako yango.
6 Has anyone planted a vineyard but not yet enjoyed its fruit? Let him go home, or he may die in battle and another enjoy it. Ezali na moto oyo awuti kolona elanga ya vino mpe nanu abuki bambuma ya liboso te ? Tika ete azonga na ndako na ye noki te akoki kokufa na bitumba, bongo moto mosusu akoya kozala moto ya liboso mpo na kobuka mbuma ya liboso na elanga na ye.
7 Has anyone become engaged to a woman but not married her? He may go home, or he might die in battle and another man marry her." Ezali na moto oyo awuti kotuna mwasi na libala mpe abali nanu te ? Tika ete azonga na ndako, noki te akoki kokufa na bitumba mpe moto mosusu akoya kobala mwasi oyo ye atunaki na libala. »
8 The officers are to say further to the people, "Is there anyone who is afraid and has lost his nerve? He may go home, so his brothers' hearts do not melt like his own." Bakonzi ya basoda bakoloba lisusu : « Ezali na moto oyo azali kobanga to alembi nzoto ? Tika ete azonga na ndako mpo ete alembisa te baninga na ye na bitumba. »
9 When the officers finish speaking to the people, they will appoint army commanders to lead them. Bongo tango bakonzi ya basoda bakosilisa koloba na mampinga, bakopona bakonzi mpo na kokamba mampinga.
10 When you draw near to a city to fight against it, offer it peace. Tango bokokende kobundisa engumba moko, boyebisa bato ya engumba yango ete bamipesa bango moko na maboko na bino na kimia.
11 If it answers you peaceably and opens to you, all its people will serve you as forced laborers. Soki bandimi mpe bafungoli bikuke na bango, bokosalisa bato nyonso ya engumba wana misala makasi mpe bakosalela bino.
12 But if it refuses peace and makes war on you, then lay siege to it. Kasi soki baboyi kosala kimia elongo na bino mpe babundisi bino, bobundisa engumba wana.
13 When your Father hands it over to you, put all its males to the sword. Tango Yawe, Nzambe na yo, akokaba engumba wana na maboko na yo, okoboma na mopanga bato nyonso oyo bazali kati na yango.
14 But the women, children, livestock, and all else in the city—all its spoil—you may plunder for yourselves, and enjoy the spoil of your enemies, which your Father has given you. Kasi bokoki kozwa mpo na bino lokola bomengo ya bitumba : basi, bana, bibwele mpe biloko nyonso oyo ezali kati na engumba. Boye bokosalela bomengo ya bitumba oyo ekowuta epai ya banguna na bino oyo Yawe, Nzambe na bino, akokaba na maboko na bino.
15 Treat every city far away, not among these nations' cities, this way. Ezali ndenge wana nde bokosala bingumba nyonso oyo ezali mosika na bino, bingumba oyo ezali te kati na mokili oyo bokozwa.
16 But in the cities of these peoples your Father gives you as an inheritance, leave alive nothing that breathes. Kasi mpo na bingumba ya bikolo oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo lokola libula, kotika ata eloko moko te na bomoi.
17 Rather, devote them to complete destruction—the Hittites, Amorites, Canaanites, Perizzites, Hivites, and Jebusites—as your Father has commanded you, Bebisa bango nyonso : bato ya Iti, bato ya Amori, bato ya Kanana, bato ya Perizi, bato ya Evi mpe bato ya Yebusi, ndenge Yawe, Nzambe na yo, atindaki yo
18 so they won't teach you to imitate all the detestable things they do for their gods, making you sin against your Father. mpo ete bateya yo te kosala makambo nyonso ya nkele oyo bango basalaka mpo na lokumu ya banzambe na bango ; noki te okosala masumu liboso ya Yawe, Nzambe na yo.
19 When you besiege a city a long time, waging war to capture it, do not destroy its trees by swinging an axe against them. You may eat from them, but do not cut them down. For the trees of the field are not human, that they should be treated as your enemy. Tango okobundisa engumba moko tango molayi mpo na kobotola yango, okoki kosimba epasola te mpo na kokata banzete ya engumba yango, pamba te okoki kolia bambuma na yango ; kokata yango te. Boni, banzete ekomi bato mpo ete obundisa yango ?
20 You may cut down only trees you know are not for food, so that you may build siege works against the city at war with you until it falls. Kasi okoki nde kokata banzete oyo oyebi ete ebotaka mbuma te mpo na kosala na yango bibundeli kino engumba yango ekokweya.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]