Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Deuteronomy 19 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 When your Father cuts off the nations whose land your Father gives you, and you drive them out, settling in their cities and houses, Tango Yawe, Nzambe na bino, akobebisa bikolo oyo Ye akopesa bino mokili na bango, tango bokobengana bango mpe bokovanda na bamboka mpe na bandako na bango ;
2 set apart three cities in the land your Father is giving you to possess. bokotia pembeni mpo na bino, bingumba misato oyo ezali na kati-kati ya mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo na kozwa.
3 Prepare roads and divide into three the land your Father gives you to inherit, so whoever kills someone can flee there. Bokosala kuna banzela mpe bokokabola na biteni misato, mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula mpo ete moto nyonso oyo akoboma moto akoka kokima kuna.
4 This is the case of the killer who flees there to live: one who strikes his neighbor unintentionally, without prior hatred, Tala makambo oyo ekoki kosala ete moto oyo abomi moninga na ye akoka kokima kuna mpo na kobikisa bomoi na ye : ezali tango abomi moninga na ye na nko te, moto oyo ayinaki te liboso.
5 as when a man goes to the forest with his neighbor to cut wood, his hand swings the axe to fell a tree, the iron head slips off the handle and strikes his neighbor dead—he may flee to one of these cities and live. Ndakisa : moto oyo akei na zamba elongo na moninga na ye mpo na kokata banzete ; bongo na tango atomboli loboko na ye mpo na kokata nzete, ebende ya epasola elongwe na esimbelo na yango, ekweyeli moninga wana mpe ebomi ye : moto wana akoki kokima kati na moko ya bingumba wana mpo na kobikisa bomoi na ye.
6 Otherwise the avenger of blood, burning with anger, might chase the killer down the long road, overtake, and kill him, though he didn't deserve death, having not hated his neighbor before. Soki bongo te, mobukanisi makila akolanda ye na kanda, akokanga ye mpe akoboma ye soki engumba ya kokimela ezali mosika mingi. Nzokande asengelaki kokufa te, pamba te ayinaki te liboso moto oyo asilaki koboma.
7 Therefore I command you: set apart three cities for yourself. Yango wana, napesi bino mitindo ete botia pembeni bingumba misato mpo na bino.
8 If your Father enlarges your territory, as he swore to your ancestors, giving you all the land he promised them. Soki Yawe, Nzambe na bino, ayeisi monene mokili na bino ndenge alakaki epai na bakoko na bino na nzela ya ndayi mpe apesi bino mokili mobimba ndenge alakaki bango,
9 If you carefully keep all this command I give you today—love your Father and always walk in his ways—add three more cities to these three, mpo ete bosili kotosa mibeko nyonso oyo napesi bino lelo, mibeko ya kolinga Yawe, Nzambe na bino, mpe ya kotambola na banzela na Ye, wana bokobakisa lisusu bingumba misato na bingumba misato ya liboso.
10 so innocent blood isn't shed in the land your Father gives you as inheritance, and no bloodguilt falls on you. Bosala bongo mpo ete makila ya moto oyo ayebi likambo te esopana te kati na mokili na bino oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula, soki te bokomema ngambo ya makila.
11 But if a man hates his neighbor, ambushes, attacks, and strikes him dead, then flees to one of these cities, Kasi soki moto ayini moninga na ye mpe atieli ye motambo, abundisi ye mpe abomi ye na nko, bongo akimi kati na moko ya bingumba wana,
12 his city's elders will send, bring him back, and hand him to the blood-avenger to die. bampaka ya engumba na ye bakolukisa ye, bakozongisa ye na engumba na ye mpe bakotika ye na maboko ya mobukanisi makila mpo ete aboma ye.
13 Show him no pity; purge the guilt of innocent blood from Israel, so it goes well with you. Boyokela ye mawa te. Na nzela wana nde bokolongola kati na Isalaele mabe ya kosopa makila ya moto oyo ayebi likambo te, mpo ete bozala malamu.
14 Do not move your neighbor's boundary marker, set by earlier generations, in the inheritance you inherit in the land your Father gives you to possess. Okoki te kopusa mondelo ya moninga na yo, mondelo oyo bato oyo bayaki liboso na yo na mabele na yo bakataki kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo ete bokamata yango.
15 One witness can't convict anyone of any sin or wrongdoing, whatever the offense. A matter stands only on the testimony of two or three witnesses. Litatoli ya moto moko ekoki te mpo na kotalisa ete moto songolo abomaki moto to asalaki mabe. Bosolo ya likambo nyonso endimamaka na litatoli ya bato mibale to misato.
16 If a malicious witness comes forward against someone to accuse him of wrongdoing, Soki motatoli ya lokuta atelemi mpo na kofunda moto mosusu ete moto wana abomi moto ;
17 both men in the dispute must stand before your Father, before the priests and judges serving in those days. bato nyonso mibale oyo bazali kowelana bakotelema na miso ya Yawe liboso ya Banganga-Nzambe mpe basambisi oyo bazali kosala mosala kati na bino na tango wana.
18 The judges must investigate thoroughly. If the witness is false, testifying falsely against his brother, Basambisi basengeli koyekola likambo yango malamu penza. Mpe soki emonani ete motatoli akosi, apesi litatoli ya lokuta mpo na ndeko na ye ;
19 do to him what he planned for his brother; purge the evil from among you. bosala ye ndenge akanaki kosala ndeko na ye. Na nzela wana nde bokolongola mabe kati na bino.
20 The rest will hear and be afraid, and never again do such an evil thing among you. Tango bato oyo batikali bakoyoka yango, bakobanga mpe mabe ya lolenge oyo ekotikala lisusu kosalema te kati na bino.
21 Don't pity: life for life, eye for eye, tooth for tooth, hand for hand, foot for foot. Boyokela moto ya ndenge wana mawa te ! Mobeko ezali : bomoi mpo na bomoi, liso mpo na liso, linu mpo na linu, loboko mpo na loboko, lokolo mpo na lokolo.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]