Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Deuteronomy 18 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Levite priests—the whole tribe of Levi—get no portion or inheritance with Israel; they eat the food offerings to our Father—his inheritance. Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi, elongo na libota mobimba ya Balevi basengeli te kozwa eteni ya mabele to libula kati na Isalaele ; basengeli kobika kaka na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe mpe na libula na Ye, pamba te yango nde ezali libula na bango.
2 They are to have no inheritance among their brothers; our Father is their inheritance, as he promised them. Basengeli te kozala na libula kati na bandeko na bango ; Yawe nde azali libula na bango ndenge alakaki bango.
3 This is the priests' right from the people: those sacrificing an ox or sheep must give the priest the shoulder, both cheeks, and the stomach. Tala eteni oyo Banganga-Nzambe basengeli kozwa epai na bato oyo bakobonza ngombe to meme lokola mbeka : lipeka, mbanga mpe biloko ya kati. Okopesa yango epai ya Nganga-Nzambe oyo azali kosala mosala.
4 Give him the first of your grain, new wine, and oil, and the first fleece of your sheep. Okopesa ye bambuma na yo ya liboso ya ble, ya vino ya sika, ya mafuta mpe bapwale nyonso ya liboso oyo okolongola na bameme na yo ;
5 For your Father chose him from all your tribes to stand and serve in the name of our Father, him and his sons, always. pamba te Yawe, Nzambe na yo, aponi ye elongo na bakitani na ye kati na bikolo na yo nyonso mpo na kotelema mpe kosala tango nyonso mosala na Kombo na Yawe kati na Tempelo.
6 If a Levite leaves any of your towns in Israel where he lives and comes whenever he desires to the place our Father will choose, Soki moko kati na Balevi alongwe na engumba moko kati na bingumba ya Isalaele epai wapi azalaki kovanda, mpe ayei ndenge motema na ye elingi, na esika oyo Yawe Nzambe akopona ;
7 then he may serve in our Father's name, like all his fellow Levites who stand there before our Father. asengeli kosala na Kombo na Yawe, Nzambe na ye, ndenge bandeko na ye nyonso Balevi bazali kosala kuna na miso ya Yawe.
8 He is to eat equal portions, besides what he receives from the sale of his family possessions. Akozwa eteni ya ndenge moko na bango na oyo etali biloko ya kolia, bakisa mbongo oyo akozwa tango bakoteka biloko ya libota.
9 When you enter the land your Father is giving you, don't learn to imitate those nations' detestable practices. Tango okokota na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo, okomekola te misala ya mbindo ya bikolo oyo ezali kuna.
10 No one among you may sacrifice his son or daughter in the fire, practice divination, tell fortunes, read omens, or cast spells, Moto moko te kati na yo akobonza na moto mwana na ye ya mobali to ya mwasi epai ya moto oyo asalelaka soloka, kindoki, oyo atalaka minzoto mpo na kosakola makambo, oyo asalelaka maji
11 a caster of spells, a medium, a spiritist, or one who consults the dead. to moto oyo asalelaka makambo ya nkuku to moto oyo atunaka milimo to nganga-kisi to moto oyo asololaka na bakufi.
12 For whoever does these things is detestable to our Father; because of these detestable practices, your Father is driving them out before you. Moto nyonso oyo asalaka makambo oyo, azali mbindo na miso ya Yawe ; mpe ezali mpo na makambo nyonso oyo ya nkele nde Yawe, Nzambe na bino, akobengana bikolo wana liboso na bino.
13 You are to be blameless before your Father. Bosengeli kozala bato bazangi pamela liboso ya Yawe, Nzambe na bino.
14 As for these nations you will dispossess—they listen to fortune-tellers and diviners. Your Father has not permitted this to you. Bikolo oyo bokobotola ezali bikolo oyo elandaka bato wana, esalelaka kindoki mpe soloka. Kasi mpo na bino, Yawe, Nzambe na bino, akoki te kopesa bino nzela ya kosala bongo.
15 Your Father will raise up a prophet like me for you, from among you, from your brothers—listen to him. Yawe, Nzambe na bino, akobimisela bino mosakoli moko lokola ngai, oyo akowuta kati na bandeko na bino ; bosengeli koyoka ye.
16 This is what you asked of your Father at Horeb on the day of the assembly: "Let me not hear our Father's voice again, nor see this great fire anymore, or I will die." Yango nde likambo oyo bosengaki epai na Yawe, Nzambe na bino, na ngomba Orebi, na mokolo ya mayangani, tango bolobaki : « Toboyi koyoka lisusu mongongo ya Yawe, Nzambe na biso, to komona lisusu moto makasi oyo, noki te tokokufa. »
17 And our Father said to me, "They are right in what they have spoken. Yawe alobaki na ngai : « Makambo oyo balobi ezali malamu.
18 I will raise up a prophet like you for them, from among their brothers. I'll put my words in his mouth; he will tell them all I command him. Nakobimisa kati na bandeko na bango mosakoli moko lokola yo ; nakotia maloba na Ngai kati na monoko na ye, mpe akoyebisa bango nyonso oyo Ngai nakotinda ye.
19 Whoever doesn't listen to my words he speaks in my name—I myself will hold him accountable. Soki moto aboyi koyoka maloba na Ngai, oyo mosakoli yango akoloba na Kombo na Ngai, Ngai moko nakopesa ye etumbu.
20 But the prophet who dares speak in my name a word I did not command, or speaks in the name of other gods—that prophet must die." Kasi soki mosakoli moko alobi ete azali koloba na Kombo na Ngai, bongo alobi likambo moko oyo Ngai natindi ye te to azali koloba na kombo ya banzambe mosusu, basengeli koboma ye.
21 And if you say in your heart, "How can we know the word our Father hasn't spoken?" Tango mosusu bokoki komituna : ‹ Ndenge nini tokoki koyeba ete maloba oyo azali koloba ewuti solo epai na Yawe te ? ›
22 When a prophet speaks in our Father's name and the word doesn't happen or come true, our Father didn't speak it—the prophet spoke in arrogance. Don't fear him. Soki makambo oyo mosakoli alobi na Kombo na Yawe ekokisami te to esalemi te, wana maloba yango ewutaki na Yawe te. Mosakoli wana alobaki kaka na ndenge na ye moko, bobanga ye te. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]