Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Deuteronomy 17 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Do not sacrifice to your Father an ox or sheep with any defect or serious flaw; that is detestable to your Father. Okobonza te epai na Yawe, Nzambe na yo, ngombe to meme oyo ezali na mbeba to oyo ezali mabe, pamba te yango ezali likambo ya nkele liboso ya Yawe, Nzambe na yo.
2 If a man or woman is found among you, in any town your Father gives you, doing evil in your Father's eyes by breaking his covenant, Soki kati na moko ya bingumba oyo Yawe, Nzambe na yo, apesi yo ; emonani na mobali to mwasi oyo asali mabe na miso ya Yawe, Nzambe na yo, wana abuki boyokani elongo na Ye
3 and served other gods, bowing to them—the sun, moon, or any of heaven's host—which I did not command, mpe akei kosalela banzambe mosusu mpe kofukamela yango : moyi, sanza to minzoto nyonso ya likolo, nzokande natindaki bango bongo te ;
4 and you are told of it and hear it, investigate carefully. If it is true, the matter certain, that this detestable thing was done in Israel, bongo bamemeli yo sango ya ndenge wana, yekola yango malamu. Soki emonani solo ete likambo ya nkele esalemi kati na Isalaele ;
5 then bring out to your gates that man or woman who did this evil thing—that man or woman—and stone them to death. kamata mobali to mwasi oyo asali likambo wana ya nkele, mema ye na ekuke ya engumba na yo mpe bamba ye mabanga kino akokufa.
6 On the word of two witnesses or three, the condemned must die; he must not die on one witness's word. Ezali kaka na litatoli ya bato mibale to misato nde okoki koboma moto, kasi na litatoli ya moto moko te.
7 The witnesses' hand must be on him first to kill him, then the hand of all the people. So you remove the evil from among you. Maboko ya motatoli nde ekozala maboko ya liboso ya koboma moto yango, mpe na sima, maboko ya bato nyonso. Na nzela wana nde okolongola mabe kati na yo.
8 If a case is too hard for you to judge—between bloodshed and bloodshed, claim and claim, assault and assault, disputes in your towns—go up to the place your Father will choose. Soki makambo oyo eleki yo makasi mpo na kosambisa ekomi na bisambiselo na yo, makambo lokola koboma bato, kowelana, kozokisa bato, mema yango na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona.
9 Go to the Levitical priests and the judge serving then; ask, and they will tell you the verdict. Okokende epai ya Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi mpe epai ya mosambisi oyo azali kosala mosala na tango wana. Okotalisa bango likambo yango mpe bango nde bakokata likambo.
10 Act on what they tell you from the place our Father chooses; be careful to do all they teach you. Bongo yo okosala kolanda mikano oyo bango bakopesa yo na esika oyo Yawe akopona. Sala keba ete osala makambo nyonso oyo bakotinda yo.
11 Follow the instruction they teach and the ruling they give you; don't turn from the word they declare, right or left. Okosala kolanda mobeko oyo bakoteya yo mpe bikateli oyo bakopesa yo. Kokende libanda te ya bikateli oyo bakopesa yo.
12 Anyone who acts arrogantly, refusing to listen to the priest standing to serve there before your Father, or to the judge, must die. You must purge the evil from Israel. Moto oyo akosala lolendo mpe akoboya kotosa Nganga-Nzambe to mosambisi oyo atelemi mpo kosala mosala na esika oyo Yawe aponaki mpo na ye, basengeli koboma ye. Na nzela wana nde okolongola mabe kati na Isalaele.
13 And all the people will hear and be afraid, and act arrogantly no longer. Bato nyonso bakoyoka likambo yango, bakokoma na somo mpe bakosala lisusu lolendo te.
14 When you enter the land your Father is giving you, possess it, settle there, and say, "Let me set a king over me, like all the nations around me," Tango okokota na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo ; tango okozwa yango mpe okovanda kati na yango, tango mosusu okoki koloba : « Tika ete toluka mokonzi oyo akokonza biso ndenge ezali na bikolo nyonso oyo ezingeli biso, »
15 you may indeed set over you the king your Father chooses; set over you a king from among your brothers. You may not put a foreigner over you, who is not your brother. sala keba ete opona kaka mokonzi oyo Yawe, Nzambe na yo, akopona. Asengeli kowuta kati na bandeko na bino. Kotia mopaya te oyo azali ndeko na bino te kati na Isalaele mpo na kokonza bino.
16 He must not acquire many horses for himself, or send the people back to Egypt for more, since our Father told you, "Never go back that way." Nzokande mokonzi yango asengeli te kozala na bampunda ebele mpo na ye moko mpe kozongisa bato na Ejipito mpo na kobakisa motango ya bampunda, pamba te Yawe alobaki na bino : « Botikala kozonga lisusu te na nzela oyo. »
17 He must not take many wives, or his heart will turn away; nor amass much silver and gold for himself. Asengeli te kozala na basi ebele noki te motema na ye ekopengwa. Asengeli te kozala na palata mpe wolo ebele koleka.
18 When he sits on his royal throne, he must write himself a copy of this law on a scroll, before the levitical priests. Tango mokonzi yango akovanda na kiti na ye ya bokonzi, akozwa buku ya Mobeko epai ya Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi mpe akokoma makambo oyo ezali na buku yango mpo na ye moko.
19 It must stay with him, and he must read from it all his life, so he learns to fear his Father, keeping all the words of this law and these decrees, doing them, Akozala na buku yango tango nyonso mpe akotanga yango mikolo nyonso ya bomoi na ye mpo ete ayekola kokumisa Yawe, Nzambe na ye, mpe asalela malamu maloba nyonso ya Mobeko oyo mpe bikateli na yango ;
20 so his heart won't rise above his brothers, and he won't turn from the command right or left, so he and his children reign long over his kingdom in Israel. mpo ete atombola te na lolendo liboso ya bandeko na ye to abima te libanda ya mibeko na yango. Boye, ye elongo na bakitani na ye bakowumela tango molayi na bokonzi kati na Isalaele.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]