Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Deuteronomy 16 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Observe the month of Abib and keep Passover to your Father, for in the month of Abib your Father brought you out of Egypt by night. Batela sanza ya Abibi mpe sepela feti ya Pasika mpo na Yawe, Nzambe na yo, pamba te ezalaki na butu moko ya sanza yango nde Yawe abimisaki yo na Ejipito.
2 Sacrifice the Passover to your Father from flock and herd, at the place your Father chooses to settle his name there. Tala biloko oyo okobonza lokola mbeka ya Pasika mpo na Yawe, Nzambe na yo, na esika oyo akopona mpo na kotia Kombo na Ye : ngombe ya mobali, meme ya mobali mpe ntaba ya mwasi.
3 Eat no leavened bread with it. For seven days eat unleavened bread with it—the bread of affliction—because you left the land of Egypt in haste, so you remember the day you left the land of Egypt as long as you live. Okolia yango te na mapa oyo basangisa na levire. Kasi mikolo sambo, okolia mapa ezanga levire, mapa ya pasi, pamba te obimaki na Ejipito na lombangu. Okosalaka bongo na mikolo nyonso ya bomoi na yo mpo ete okanisaka mokolo oyo obimaki na Ejipito.
4 Let no yeast be found in all your territory for seven days; none of the meat you sacrifice on the evening of the first day may remain until morning. Tika ete levire emonana te epai na yo, kati na mokili na yo nyonso mikolo sambo. Kotika te ete nyama oyo babonzi na pokwa ya mokolo ya liboso etikala kino na tongo.
5 You may not sacrifice the Passover within any of your towns that your Father is giving you, Okoki te kobonza mbeka ya Pasika kati na bingumba nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi yo.
6 but at the place your Father will choose to make his name dwell, sacrifice the Passover there—in the evening, at sunset, the time you left Egypt. Ezali kaka na esika oyo Yawe, Nzambe na yo, akopona mpo na kotia Kombo na Ye nde bokobonza mbeka ya Pasika. Bokosala yango na pokwa, tango moyi elalaka, ngonga oyo obimaki na Ejipito.
7 Cook it and eat it where your Father chooses, then turn in the morning and go to your tents. Okolamba mpe okolia yango na esika oyo Yawe, Nzambe na yo, akopona. Bongo na tongo, okozonga na ndako na yo.
8 Eat bread without yeast six more days; on the seventh day, gather in solemn assembly to your Father—do no work. Mikolo motoba, okolia mapa ezanga levire ; bongo na mokolo ya sambo, okosala feti monene mpo na Yawe, Nzambe na yo ; okosala mosala moko te.
9 Count seven weeks for yourself; begin counting seven weeks from when the sickle first enters the standing grain. Okotanga baposo sambo, kobanda na mokolo oyo okotia mbeli na elanga ya ble mpo na kobuka ble yango.
10 Keep the Feast of Weeks to your Father: a voluntary offering from your hand, proportioned to your Father's blessing. Okosala feti ya Baposo mpo na Yawe, Nzambe na yo ; okobonzela Ye makabo wuta na mokano ya motema na yo moko kolanda mapamboli oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo.
11 You are to rejoice before your Father—you, your son, your daughter, your male and female servants, the Levite in your towns, the foreigner, the fatherless, and the widow among you—at the place your Father chooses to settle his name there. Okosepela liboso ya Yawe, Nzambe na yo, na esika oyo akopona mpo na kotia Kombo na Ye : yo, bana na yo ya mibali, bana na yo ya basi, bawumbu na yo ya mibali, basi bawumbu na yo, Balevi oyo bazali kati na bingumba na yo, bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali oyo bazali kovanda kati na yo.
12 Remember you were a slave in Egypt, and carefully keep these statutes. Kobosana te ete ozalaki mowumbu kati na Ejipito mpe salela malamu mitindo oyo.
13 Celebrate the Feast of Booths seven days, when you gather in from your threshing floor and your winepress. Mpo na oyo etali feti ya Bandako ya kapo, okosala yango mikolo sambo sima na yo kosangisa bambuma na yo ya ble mpe kokamola vino na yo.
14 Rejoice at your feast—you, your son, your daughter, your male servant, your female servant, the Levite, the foreigner, the fatherless, and the widow in your towns. Okozala na esengo na feti yango : yo, bana na yo ya mibali mpe ya basi, bawumbu na yo ya mibali, basi bawumbu na yo, Balevi, bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali oyo bazali kati na bingumba na yo.
15 Keep the feast to your Father seven days, at the place he chooses, because he will bless you in all your produce and all your hands' work—so that you will be altogether joyful. Mikolo sambo, okosala yango feti mpo na Yawe, Nzambe na yo, na bisika oyo Yawe akopona ; pamba te Yawe, Nzambe na yo, akopambola milona na yo mpe misala nyonso ya maboko na yo ; bongo esengo na yo ekozala mingi koleka.
16 Three times a year all your men are to appear before your Father at the place he chooses: the Feast of Unleavened Bread, the Feast of Weeks, and the Feast of Booths. And they are not to appear before him empty-handed. Mbala misato na mobu, mibali nyonso basengeli kokende liboso ya Yawe, Nzambe na yo, na esika oyo Ye akopona : na feti ya Mapa ezanga levire, na feti ya Baposo, mpe na feti ya Bandako ya kapo. Moko te akokende liboso ya Yawe, maboko pamba :
17 Each man gives according to his hand's gift, according to the blessing your Father gave you. moko na moko kati na bino asengeli komema likabo kolanda mapamboli oyo Yawe, Nzambe na yo, apesi ye.
18 Appoint judges and officers in every town your Father gives you, tribe by tribe, to judge the people with just judgment. Okopona basambisi mpe bakalaka kati na bikolo na yo nyonso, kati na bingumba nyonso oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo. Bakokata makambo ya bato na bosembo.
19 Do not twist justice, do not show favoritism, do not take a bribe—for a bribe blinds the eyes of the wise and twists the words of the righteous. Okobebisaka bosembo te, okoponaka bilongi te, okondimaka kanyaka te, pamba te ezipaka miso ya bato ya bwanya mpe ebebisaka maloba ya bato ya sembo.
20 Pursue justice, only justice, so you may live and possess the land your Father gives you. Okosalelaka bosembo mpe bosembo kaka, mpo ete owumela mpe okamata mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo.
21 Do not plant for yourself any tree as an Asherah beside the altar of your Father that you build. Okotelemisa te likonzi ya nzambe mwasi Ashera pembeni ya etumbelo oyo okotonga mpo na Yawe, Nzambe na yo.
22 And you shall not set up for yourself a sacred pillar, which your Father hates. Okotelemisa te libanga ya bule, pamba te Yawe, Nzambe na yo, ayinaka nyonso wana.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]