Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Deuteronomy 15 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 At the end of every seven years you are to grant a release of debts. Na suka ya mibu sambo nyonso, bosengeli kosundola baniongo.
2 This is the release: every creditor cancels the loan to his neighbor. He must not collect from his neighbor or brother, because your Father has proclaimed a release. Tala ndenge esengeli kosalema : moto nyonso oyo adefisaki ndeko na ye, mwana ya Isalaele, mbongo, asengeli kotikela ye yango. Asengeli te kosenga eloko epai ya ndeko to moninga na ye, moto ya Isalaele, pamba te tango ya kotika baniongo mpo na lokumu na Yawe esili kokoka.
3 You may require payment from a foreigner, but release your brother from what he owes you. Bokoki kosenga niongo epai ya mopaya, kasi bosengeli kosundola baniongo nyonso oyo bandeko na bino badefaki epai na bino.
4 Yet there need be no poor among you, for your Father will surely bless you in the land your Father gives you to possess as an inheritance. Nzokande, ebongaki te ete mobola azala kati na bino ; pamba te kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo ete bokamata yango lokola libula, akopambola bino koleka,
5 Only if you truly listen to your Father's voice, carefully keeping this whole command I give you today. soki botosi malamu Yawe, Nzambe na bino, mpe bosaleli malamu mitindo oyo nazali kopesa bino lelo.
6 For your Father will bless you as he promised you. You will lend to many nations, borrow from none; rule over many nations, none will rule you. Pamba te Yawe, Nzambe na bino, akopambola bino ndenge alakaki ; mpe bino bokodefisa na bikolo ebele, kasi bokodefa te. Bokokonza bikolo ebele, kasi ekolo moko te ekokonza bino.
7 If one of your brothers is poor in any town in the land your Father is giving you, do not harden your heart or shut your hand against your poor brother. Soki mobola moko amonani kati na bandeko na yo na bingumba ya mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa yo ; okokangela ye motema te mpe okoboya te kosunga ndeko na yo mobola.
8 Rather, open your hand wide to him and freely lend him enough for whatever he needs. Nzokande, okofungolela ye maboko mpe okodefisa ye na motema moko, nyonso oyo akozala na yango na bosenga.
9 Be careful not to let a wicked thought fill your heart—'The seventh year, the release year, is near'—turning your eye evil against your poor brother, giving him nothing. He'll cry out to your Father against you, and you'll bear the sin. Keba ete motema na yo ezala na makanisi ya mabe te mpe eloba na yo te : « Mobu ya sambo ekomi pene, mobu ya kotika baniongo, » mpo ete otala ndeko na yo mobola na ndenge ya mabe mpe ozanga kopesa ye eloko. Mpe wana ye akolelalela epai na Yawe na tina na yo, okomema ngambo ya masumu na yo.
10 Give to him generously, and do not let your heart be grieved when you give to him, because of this your Father will bless you in all your work, everything your hand attempts. Osengeli kopesa ye na motema ya esengo kasi na mitema mibale te ; bongo Yawe, Nzambe na yo, akopambola yo na misala na yo nyonso mpe na eloko nyonso oyo maboko na yo ekosimba.
11 Since the poor will never leave the land, I command you: open your hand wide to your brother, poor and needy, in your land. Nzokande lokola babola bakozala kaka kati na mokili, ngai nazali kotinda bino ete bofungola maboko na bino epai ya bandeko na bino, epai ya babola mpe epai bato nyonso oyo bakelela kati na mokili na bino.
12 If your brother, a Hebrew man or woman, is sold to you and serves you six years, in the seventh year send him away free from you. Soki moko kati na bandeko na yo, Mo-Ebre, azala mobali to mwasi, amiteki ye moko epai na yo, akosalela yo mibu motoba ; na mobu ya sambo, okotika ye kokende na bonsomi.
13 And when you set him free, you shall not send him away empty-handed. Mpe tango okotika ye, okozongisa ye maboko pamba te ;
14 Supply him freely from your flock, threshing floor, and winepress, as your Father has blessed you. okopesa ye na motema ya esengo ndambo na yo ya bibwele, ya ble mpe ya vino ; okopesa ye ndenge kaka Yawe, Nzambe na yo, apambolaki yo.
15 Remember you were a slave in the land of Egypt; your Father redeemed you—that's why I command you this today. Bokanisa ete bino mpe bozalaki bawumbu na Ejipito ; mpe Yawe, Nzambe na bino, asikolaki bino. Yango wana, napesi bino mobeko oyo na mokolo ya lelo.
16 But if he says to you, 'I won't leave you,' because he loves you and your household, thriving with you, Kasi soki alobi na yo : « Naboyi kotika yo, » mpo ete alingaka yo elongo na libota na yo mpe azalaka na esengo ya kovanda elongo na yo,
17 then take an awl and pierce it through his ear into the door; he becomes your servant forever. Do the same for your female servant. wana okozwa motonga, okotia litoyi na ye na ezipelo ya ekuke mpe okotobola yango. Na bongo, akokoma mowumbu na yo mpo na libela. Okosala mpe ndenge moko mpo na mwasi mowumbu.
18 Don't think it hard to free him—his six years were worth double a hired hand's wages. Your Father will bless you in all you do. Komona yango likambo ya pasi te kotika mowumbu na yo na bonsomi, pamba te mosala oyo asaleli yo na mibu motoba ezali na litomba mbala mibale koleka litomba ya moto oyo ozwa na mosala. Mpe Yawe, Nzambe na yo, akopambola yo na nyonso oyo okosala.
19 Dedicate every firstborn male of your herd and flock to your Father. Don't work the herd's firstborn or shear the flock's firstborn. Bokotia pembeni mpo na Yawe, Nzambe na bino, mwana mobali nyonso ya liboso oyo akobotama kati na bangombe, bameme mpe bantaba na bino. Kati na bitonga na bino, bokotia na mosala te bana ya liboso ya bangombe na bino mpe bokolongola te bapwale ya bana ya liboso.
20 Each year you and your household will eat it before your Father where your Father chooses. Mibu nyonso, bino elongo na mabota na bino, bokolia bibwele yango na miso ya Yawe, Nzambe na bino, na esika oyo akopona.
21 But if it has a defect, lame or blind, any serious flaw, don't sacrifice it to your Father. Soki ebwele yango ezali na mbeba to ezali tengu-tengu to ekufa miso to soki ezali na mbeba mosusu ya makasi, bokoki kobonza yango te epai na Yawe, Nzambe na bino.
22 Eat it in your towns, unclean and clean together, like gazelle or deer. Bokolia yango kati na bingumba na bino : moto nyonso, azala mbindo to peto, akolia yango ndenge baliaka mboloko to mbuli.
23 Only you must not eat its blood; pour it out on the ground like water. Kasi bokolia makila te, bosopa yango na mabele lokola mayi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]