Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Deuteronomy 14 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 You are children of your Father—don't cut yourselves or shave your forehead bald for the dead. Bozali bana ya Yawe, Nzambe na bino : Bokoki te komikata nzoloko mpe kokokola suki ya mito na bino soki moto akufi,
2 For you are a holy people, belonging to your Father—your Father chose you to be his treasured possession out of all the peoples on the face of the earth. pamba te bozali libota ya bule mpo na Yawe, Nzambe na bino. Yawe aponaki bino kati na bato nyonso oyo bazali kati na mokili mpo ete bozala libota ya motuya mpo na Ye.
3 You shall not eat anything detestable. Bokoki te kolia ata eloko moko ya mbindo.
4 These are the animals you may eat: the ox, the sheep, and the goat, Tala banyama oyo bokoki kolia : ngombe, meme, ntaba,
5 deer, gazelle, roe deer, wild goat, ibex, antelope, and mountain sheep. mbuli, mboloko, pambi, ntaba ya zamba, meme ya zamba, mbita mpe mpakasa.
6 You may eat any animal that has a completely divided hoof and that chews the cud. Bokoki lisusu kolia nyama nyonso oyo ezali na litindi epasuka na kati-kati mpe ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu.
7 But among those that chew the cud or have a split hoof, you may not eat the camel, the hare, or the rock badger—they chew the cud but their hoof isn't split; they are unclean for you. Kasi, kati na banyama oyo ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu kasi litindi na yango epasuka te na kati-kati, tala banyama oyo bosengeli te kolia : shamo, mpanya ya matoyi milayi mpe mpanya ya zamba ; pamba te ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu, kasi litindi na yango epasuka te na kati-kati : ezali mbindo mpo na bino.
8 The pig has a split hoof but doesn't chew the cud, so it is unclean for you. Don't eat their meat or touch their carcasses. Nzokande ngulu ezali na litindi epasuka na kati-kati kasi ezongisaka te na monoko biloko oyo ewuti na libumu. Boye, ngulu ezali mbindo ; bosengeli te kolia mosuni na yango to kosimba ebembe na yango.
9 Of all that live in the water, you may eat anything that has fins and scales. Kati na bikelamu nyonso oyo evandaka na mayi, bokoki kolia nyonso oyo ezali na binyanyeli mpe biteku.
10 But anything without fins and scales you must not eat—it is unclean for you. Kasi bokolia te nyonso oyo ezangi binyanyeli mpe biteku : ezali mbindo mpo na bino.
11 You may eat any clean bird. Bokolia ndeke nyonso oyo ezangi mbindo.
12 But these are the ones you shall not eat: the eagle, the vulture, the black vulture, Kasi tala bandeke oyo bokolia te : mpongo, engondo, mpongo ya ebale monene,
13 the kite, the falcon, the buzzard of any kind, kombekombe ya mwindo, bandeke ya lolenge nyonso oyo eliaka misuni, nzengo ya lolenge nyonso,
14 every raven of any kind, bayanganga ya lolenge nyonso :
15 the ostrich, the nighthawk, the seagull, the hawk of any kind, maligbanga, kumu, ndeke ya ebale monene mpe bakombekombe ya lolenge nyonso.
16 the little owl, the great owl, the white owl, Esulungutu, esulungutu ya monene, esulungutu ya pembe,
17 the desert owl, the scavenger bird, the cormorant, libeke, ndeke oyo eliaka misuni ya kopola, libata ya mayi,
18 the stork, the heron of any kind, the hoopoe, and the bat. nkoko, mokwela ya lolenge nyonso, kengele mpe lolema.
19 All winged insects are unclean for you; do not eat them. Bokoki kolia te banyama nyonso ya mike-mike oyo ezali na mapapu, ezali mbindo mpo na bino.
20 But any clean winged creature you may eat. Nzokande, bokoki kolia nyonso oyo ezali na mapapu mpe ezangi mbindo.
21 Do not eat anything that died on its own. You may give it to the stranger in your towns to eat, or sell it to a foreigner—you are a holy people to your Father. Do not boil a young goat in its mother's milk. Bokoki kolia te nyama oyo bokuti ya kokufa ; bokopesa yango epai ya mopaya oyo azali kovanda kati na engumba na bino ; ye akoki na ye kolia yango ; soki te bokoki na bino koteka yango epai ya moleki nzela, pamba te bozali libota ya bule mpo na Yawe, Nzambe na bino. Bokoki te kolamba mwana ntaba oyo ezali nanu komela mabele.
22 Bring the tenth of all your field's yearly produce, without fail. Mibu nyonso, bokotia pembeni eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo bilanga na bino ekobota.
23 Eat before your Father, in the place he chooses to make his name live there: the tenth of your grain, new wine, and oil, and the firstborn of your herd and flock—so you learn to always revere your Father. Na miso ya Yawe, Nzambe na bino, mpe na esika oyo akopona mpo na kotia Kombo na Ye, bokolia eteni ya zomi ya ble na bino, ya vino ya sika mpe ya mafuta, bana nyonso ya liboso ya bangombe na bino, ya bantaba na bino mpe ya bameme na bino. Na bongo, bokoyekola kotosa Yawe, Nzambe na bino.
24 But if the journey is too long for you to carry the tenth—since the place your Father chooses for his name is too far from you—once your Father has blessed you, Kasi soki esika yango ezali mosika mingi mpo na yo komema eteni na yo ya zomi epai na Yawe, Nzambe na yo, pamba te esika oyo Yawe aponaki mpo na kotia Kombo na Ye ezali mosika mingi, wana Nzambe na yo apamboli yo,
25 turn it into money, carry it with you, and go to the place your Father will choose. okoteka eteni na yo ya zomi ; bongo mbongo oyo okozwa, okokende na yango na esika oyo Yawe, Nzambe na yo, akopona.
26 Spend the money on whatever you crave—cattle, sheep, wine, or strong drink, whatever you desire—eat there before your Father, rejoice, you and your household. Okosalela mbongo yango mpo na kosomba eloko nyonso oyo olingi : ngombe, meme, ntaba, vino to masanga nyonso oyo elangwisaka to eloko nyonso oyo olingi. Bongo yo elongo na ndako na yo mobimba, bokoki kolia yango na esika wana, liboso ya Yawe, Nzambe na yo, mpe okosepela elongo na libota na yo.
27 Do not abandon the Levite in your towns, since he has no portion or inheritance with you. Kobosana te Balevi oyo bazali kati na bingumba na bino mpo ete bazali ata na eteni ya mabele te to libula mpo na bango moko.
28 At the end of every three years, bring out the full tenth of that year's produce and store it in your towns. Na suka ya mibu misato nyonso, bokomema biteni ya zomi nyonso ya mibu wana mpe bokobomba yango na bingumba na bino.
29 The Levite—since he has no portion or inheritance with you—and the foreigner, orphan, and widow in your towns are to come, eat, and be satisfied, so that your Father may bless you in all your hands' work. Na bongo, Balevi oyo bazali na eteni ya mabele te to na libula te mpo na bango moko elongo na bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali oyo bavandaka na bingumba na bino, bakoya kolia mpe kotonda mpo ete Yawe, Nzambe na bino, akoka kopambola bino na misala na bino nyonso ya maboko.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]