Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Deuteronomy 13 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
2 If a prophet or dreamer of dreams arises among you and gives you a sign or wonder, Soki mosakoli moko to moto moko oyo amonaka makambo abimi kati na bino mpe asakoleli bino bilembo minene mpe bikamwa,
3 and the sign or wonder he spoke of comes true, saying, 'Let's follow other gods you have not known, and let's serve them,' mpe soki bilembo minene mpe bikamwa oyo asakolaki ekokisami mpe alobi na bino : « Tika ete tosalela mpe togumbamela banzambe mosusu, » nzokande bino boyebi banzambe yango te,
4 do not listen to the words of that prophet or dreamer of dreams. Your Father is testing you, to know whether you love your Father with all your heart and all your soul. bosengeli te koyoka maloba ya mosakoli wana to ya moto wana oyo amonaka makambo. Yawe, Nzambe na bino, akomeka bino mpo na kotala soki bolingi Ye na motema na bino mobimba mpe na molimo na bino mobimba.
5 Follow your Father, fear him, keep his commands, obey his voice, serve him, cling to him. Bosengeli kosambela mpe kokumisa kaka Yawe, Nzambe na bino ; bobatela mitindo na Ye, botosa Ye mpe bokangama na Ye.
6 That prophet or dreamer of dreams must be put to death, because he spoke rebellion against your Father, who brought you out of Egypt and rescued you from the slave house, to drive you off the way your Father commanded you to walk. So purge the evil from among you. Mosakoli to moto wana oyo amonaka makambo, esengeli baboma ye, pamba te azali koteya mpo ete botombokela Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito mpe asikolaki bino na mokili ya bowumbu. Moto wana azalaki nde na posa ya kopengwisa bino na nzela oyo Yawe, Nzambe na bino, atindaki bino kolanda. Boye, bosengeli kolongola mabe kati na bino.
7 If your brother, your mother's son, or your son or daughter, or the wife you hold close, or your friend dear as your life, secretly lures you, saying, 'Let's go and serve other gods'—gods you and your ancestors never knew, Soki ndeko na yo moko ya mobali to ya mwasi, mwana na yo ya mobali to ya mwasi, mwasi oyo yo olingaka to moninga na yo ya motema alingi kokosa yo na nkuku na koloba : « Tokende kogumbamela banzambe mosusu, » banzambe oyo bino mpe bakoko na bino botikalaki koyeba te,
8 from the gods of the peoples around you, near or far, from earth's one end to the other.' banzambe ya bato oyo bazingeli bino, oyo bazali pembeni to mosika, wuta na suka moko ya mokili kino na suka mosusu),
9 Don't consent or listen to him; don't pity, spare, or hide him. koyoka ye te mpe kondima ye te. Koyokela ye mawa te, kobikisa ye te mpe kobomba ye te.
10 No—you must put him to death. Your hand strikes first, then all the people's. Ya solo, osengeli koboma ye na mabanga. Loboko na yo ekozala loboko ya liboso mpo na kobamba ye mabanga mpe sima maboko ya bato nyonso.
11 Stone him to death, for he tried to turn you from your Father, who brought you out of Egypt, out of the slave house. Boboma ye na mabanga, pamba te alingaki kopengwisa bino mosika na Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito, mokili ya bowumbu.
12 All Israel will hear and be afraid, and never again do such an evil thing among you. Boye, Isalaele nyonso ekoyoka mpe ekobanga, bongo moto moko te kati na bino akosala lisusu makambo mabe ya lolenge oyo.
13 If you hear it said of one of your cities your Father gives you to live in, Soki oyoki bato koloba na tina na moko kati na bingumba oyo Yawe, Nzambe na yo, apesi yo mpo na kovanda
14 worthless men have gone out from among you and led their city's people astray, saying, 'Let's go and serve other gods you haven't known,' ete bato mabe bamonani kati na yango, batindiki bato ya engumba na bango mpe balobi na bango : « Tika ete tokende kogumbamela banzambe mosusu, » banzambe oyo oyebaki te,
15 then search, examine, and ask carefully. If it's true and confirmed that this detestable thing was done among you, wana osengeli koluka koyeba, kotuna mpe kotala malamu-malamu. Soki ezali ya solo mpe emonani ete likambo yango ya mbindo esalemaki penza kati na yo,
16 you must strike down that city's residents with the edge of the sword, destroying it completely—everything in it and its livestock—with the edge of the sword. osengeli solo koboma na mopanga bavandi nyonso ya engumba yango. Osengeli kobebisa yango nyonso : bato na yango mpe bibwele na yango.
17 Gather all its plunder into the middle of its square, burn the city and all its plunder in fire as a whole burnt offering to your Father. It stays a ruin forever, never rebuilt. Okosangisa biloko nyonso ya engumba yango oyo bobotoli na esika oyo bato nyonso bakutanaka mpe okotumba engumba nyonso mpe biloko na yango nyonso oyo bobotolaki lokola mbeka ya kotumba mpo na Yawe, Nzambe na bino. Ekotikala mopiku ya mabanga mpo na libela, ekoki kotongama lisusu te.
18 Let nothing devoted to destruction cling to your hand, so your Father turns from his burning anger, gives you compassion, has mercy on you, and multiplies you, as he swore to your ancestors, Eloko moko te kati na biloko oyo epesama lokola ekila ekoki komonana na maboko na yo, mpo ete Yawe Nzambe apelisela yo lisusu te kanda na Ye ya makasi, kasi atalisa yo ngolu na Ye, ayokela yo mawa mpe akomisa yo ebele ndenge alakaki yango epai ya bakoko na yo na nzela ya ndayi,
19 if you obey your Father's voice, keeping all his commands I command you today, doing right in your Father's eyes. soki otosi Yawe, Nzambe na yo, obateli mibeko na Ye nyonso oyo nazali kopesa yo lelo mpe otamboli na bosembo na miso Ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]