Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Deuteronomy 12 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 These are the statutes and judgments you must carefully keep in the land our Father, the God of your fathers, has given you to possess, all the days you live on the earth. Tala bikateli mpe mibeko oyo bosengeli kosalela malamu kati na mokili oyo Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, azali kopesa bino mpo na kozwa, na tango nyonso oyo bokowumela kati na mokili yango.
2 Completely destroy every place where the nations you drive out served their gods—on the high mountains, the hills, and under every green tree. Bobebisa bisika nyonso oyo bato ya bikolo oyo bozali kobengana bazalaki kogumbamela banzambe na bango na likolo ya bangomba ya milayi mpe ya mikuse mpe na se ya banzete nyonso oyo ezali na makasa ya mobesu.
3 Break down their altars, smash their sacred pillars, burn their Asherah poles; cut down their gods' carved images, and wipe out their name from that place. Bokweyisa bitumbelo na bango, bobuka mabanga na bango ya bule, botumba na moto makonzi na bango ya bule, bopanza na biteni bikeko ya banzambe na bango mpe bolimwisa bakombo na bango na bisika wana.
4 You must not worship your Father in that way. Nzokande mpo na bino, bosengeli te kogumbamela Yawe, Nzambe na bino, na lolenge na bango.
5 Instead, seek the place your Father will choose from all your tribes to put his name and make his home; there you must come. Bosengeli koluka esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona kati na bikolo na bino nyonso mpo na kotia Kombo na Ye mpe mpo na kokomisa yango esika na Ye. Ezali na esika yango kaka nde bosengeli kokende.
6 There bring your burnt offerings and sacrifices, your tenth and the contribution of your hand, your vow offerings and voluntary offerings, and the firstborn of your herd and flock. Ezali kuna nde bokomema bambeka na bino ya kotumba, makabo na bino, eteni na bino ya zomi, bakado ya ndenge na ndenge, makabo mpo na kokokisa ndayi, makabo oyo bokokata kopesa wuta na mokano ya mitema na bino moko mpe bana mibali ya liboso ya bangombe, ya bameme mpe ya bantaba na bino.
7 There, before your Father, you and your households will eat and rejoice in all you put your hand to, because your Father has blessed you. Kaka na esika yango, na miso ya Yawe, Nzambe na bino, bino mpe mabota na bino bokolia mpe bokosepela na eloko nyonso oyo bokosala na maboko na bino ; pamba te Yawe, Nzambe na bino, apamboli bino.
8 You must not do as we do here today, each doing what is right in his own eyes. Bosengeli lisusu te kosala ndenge tozali kosala awa, na mokolo ya lelo : moto nyonso azali kosala ndenge alingi.
9 For you have not yet reached the rest and the inheritance your Father is giving you. Pamba te kino lelo, bokoti nanu te na esika ya bopemi mpe bozwi nanu te libula oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa bino.
10 But when you cross the Jordan and settle in the land your Father gives you to inherit, and he gives you rest from all your enemies around you so you live in safety, Kasi bokokatisa Yordani mpe bokovanda na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa bino lokola libula. Akopesa bino bopemi na kokangolaka bino na maboko ya banguna na bino nyonso oyo bazingeli bino, mpe bokovanda na kimia.
11 then to the place your Father chooses to settle his name, there bring all I command you: your burnt offerings and sacrifices, your tenth and the contribution of your hand, and all the choice vow offerings you vow to your Father. Boye, na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona mpo na kotia Kombo na Ye, bokomema eloko nyonso oyo natindi bino : bambeka na bino ya kotumba, makabo na bino, biteni na bino ya zomi, bakado na bino ya ndenge na ndenge mpe biloko nyonso ya kitoko oyo bozali na yango, oyo bolapaki ndayi mpo na kopesa epai na Yawe.
12 Rejoice before your Father—you, your sons and daughters, your male and female servants, and the Levite in your towns, since he has no portion or inheritance with you. Kuna kaka nde bokosepela liboso ya Yawe, Nzambe na bino ; bino, bana na bino ya mibali mpe ya basi, bawumbu na bino ya mibali, basi bawumbu na bino, mpe Balevi oyo bazali kati na bingumba na bino, pamba te bazangi eteni ya mabele to libula kati na bino.
13 Be careful that you do not offer your burnt offerings in every place you see, Bosala keba ete bobonza te bambeka na bino ya kotumba na bisika nyonso oyo bokomona.
14 but only in the place your Father chooses, in one of your tribes; there offer your burnt offerings, and there do all I command you. Bokobonza bambeka yango kaka na esika oyo Yawe akopona kati na moko ya bikolo na bino, mpe kuna kaka nde bokosala makambo nyonso oyo natindi bino.
15 Yet you may slaughter and eat meat in all your towns, whatever you desire, according to the blessing your Father has given you. The unclean and the clean alike may eat it, like the gazelle and the deer. Nzokande, bokoki kokata kingo ya bibwele na bino mpe kolia misuni na yango ndenge bolingi kati na bingumba na bino nyonso, ezala mboloko to pambi, kolanda mapamboli oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino. Moto ya mbindo to moto ya peto akoki na ye kolia yango.
16 Only you must not eat the blood; pour it on the ground like water. Kasi bosengeli te kolia makila ; bosopa yango lokola mayi na mabele.
17 You may not eat in your towns the tenth of your grain, new wine, or oil, nor the firstborn of your herd or flock, nor any of your vow offerings, your voluntary offerings, or the contribution of your hand. Bosengeli te kolia kati na bingumba na bino eteni ya zomi ya bambuma na bino, ya vino na bino ya sika, ya mafuta na bino, bana ya liboso ya bangombe na bino, ya bameme na bino, ya bantaba na bino to makabo nyonso oyo bopesaki mpo na kokokisa ndayi, makabo oyo bokataki kopesa wuta na mokano ya mitema na bino moko to makabo ya ndenge na ndenge.
18 Instead, eat them before your Father in the place he chooses—you, your son and daughter, your male and female servant, and the Levite in your towns; and rejoice before him in all you undertake. Kasi bokolia yango kaka na miso ya Yawe, Nzambe na bino, na esika oyo Yawe Nzambe akopona : bino, bana na bino ya mibali mpe ya basi, bawumbu na bino ya mibali, basi bawumbu na bino, Balevi oyo bazali kati na bingumba na bino mpe bokosepela liboso ya Yawe, Nzambe na bino, na mosala nyonso oyo maboko na bino ekosala.
19 Be careful not to abandon the Levite as long as you live in your land. Tango nyonso bokovanda kati na mokili na bino, bosala keba ete bobosana Balevi te.
20 When your Father enlarges your territory as he promised you, and you say, "I will eat meat," because your soul craves meat, you may eat meat to your soul's desire. Tango Yawe, Nzambe na bino, akokomisa mokili na bino monene ndenge alakaki bino mpe tango bokozala na posa ya kolia mosuni mpe bokoloba : « Nazali na posa ya kolia mosuni, » bokolia yango ndenge bolingi.
21 If the place your Father will choose to put his name there is too far from you, you may slaughter from the herd and flock your Father has given you, as I commanded you, and eat in your towns as you desire. Soki esika oyo Yawe, Nzambe na bino, aponi mpo na kotia Kombo na Ye ezali mosika mingi mpo na bino, wana bokokata kingo ya bangombe na bino, ya bantaba na bino, ya bameme na bino, oyo Yawe apesaki bino ndenge natindaki bino mpe bokoki kolia yango ndenge bolingi kati na bingumba na bino.
22 Just as one eats the gazelle and the deer, so you may eat it; unclean and clean alike may eat it. Bokolia yango ndenge baliaka pambi to mboloko ; moto nyonso, azala mbindo to peto, akoki na ye kolia yango.
23 Only be firmly resolved not to eat the blood, for the blood is the life; do not eat the life with the meat. Kasi bosala keba ete bolia makila te, pamba te makila ezali bomoi, mpe bosengeli te kolia bomoi elongo na nyama.
24 You must not eat it; you are to pour it out on the ground like water. Bosengeli te kolia makila ; kasi bosopa yango na mabele ndenge basopaka mayi.
25 Do not eat it, so it may go well with you and your children after you, when you do what is right in your Father's eyes. Bolia yango te mpo ete bomona bolamu, bino mpe bana na bino ; na nzela wana nde bokosala oyo ezali alima na miso ya Yawe.
26 But take your holy things and your vow offerings to the place your Father will choose. Kasi bokozwa biloko na bino ya bule mpe biloko nyonso oyo bolapaki ndayi mpo na kopesa, mpe bokokende na esika oyo Yawe akopona.
27 Present your burnt offerings—the meat and the blood—on the altar of your Father. Pour the blood of your sacrifices beside the altar of your Father, and eat the meat. Bokotumba mosuni mpe makila ya bambeka na bino ya kotumba na etumbelo ya Yawe, Nzambe na bino. Bokosopa makila ya bambeka na bino mosusu na etumbelo ya Yawe, Nzambe na bino ; kasi mpo na mosuni na yango, bokoki na bino kolia yango.
28 Carefully obey all these words I command you, so it goes well with you and your children after you forever, when you do what is good and right in your Father's eyes. Bosala keba mpo na kotosa mibeko oyo nazali kopesa bino mpo ete bomona bolamu tango nyonso, bino mpe bana na bino, pamba te na nzela wana nde bokosala oyo ezali malamu mpe alima na miso ya Yawe, Nzambe na bino.
29 When your Father cuts off before you the nations you go to drive out, and you drive them out and settle in their land, Yawe, Nzambe na bino, akolimwisa na liboso na bino bikolo oyo bozali kokende kobundisa mpe kobotola. Kasi tango bokobengana bango mpe bokovanda na bamboka na bango,
30 be careful you're not trapped into following their ways after they're destroyed before you, and don't ask about their gods, "How did these nations serve their gods? I'll do the same." mpe tango bokosilisa kobebisa bango liboso na bino, bosala keba ete bokweya te na motambo na bango ya kosalela banzambe na bango mpe na motambo ya koluka koyeba na komitunaka : « Ndenge nini bikolo oyo esalelaka banzambe na bango ? Tokosala ndenge moko mpe kati na bingumba na biso. »
31 Do not worship your Father that way, for they did for their gods every detestable thing your Father hates—even burning their sons and daughters in fire to their gods. Bokoki te kogumbamela Yawe, Nzambe na bino, ndenge bango basalaka. Pamba te Yawe amonaka yango lokola likambo ya nkele mpe ayinaka makambo oyo basalaki mpo na banzambe na bango : bazalaki ata kotumbaka na moto bana na bango ya mibali mpe ya basi lokola mbeka mpo na banzambe na bango.
13:1 Be careful to do everything I command you; add nothing to it, take nothing from it. Tala, bosala nyonso oyo natindi bino, bobakisa to bolongola ata eloko moko te.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]