Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Deuteronomy 11 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 So love your Father, and keep his requirements, his statutes, his decrees, and his commandments always. Boye, okolinga Yawe, Nzambe na yo, mpe okobatela tango nyonso malako na Ye, bikateli na Ye mpe mitindo na Ye.
2 Know today—I'm not speaking to your children, who never experienced or saw your Father's discipline, his greatness, his mighty hand, his outstretched arm, Nazali koloba na bana na bino te oyo batikalaki te koyeba to komona nyonso wana, kasi na bino oyo bozali awa lelo ete bobosanaka te malako ya Yawe, Nzambe na bino, monene na Ye, nguya na Ye,
3 his signs and deeds done throughout Egypt to Pharaoh king of Egypt and all his land, bilembo mpe bikamwa oyo asalaki kati na Ejipito, epai ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpe epai ya mokili na ye mobimba,
4 what he did to Egypt's army, its horses and chariots, sweeping the Red Sea's waters over them as they chased you, and our Father destroyed them to this day; makambo oyo asalaki na mampinga ya Ejipito, na bampunda mpe bashar na yango, ndenge azindisaki yango kati na Ebale monene ya barozo, tango ezalaki kolanda bino, mpe ndenge nini Yawe alimwisaki yango libela ;
5 what he did for you in the wilderness until you came to this place; makambo oyo asalelaki bino kati na esobe kino bokoma na esika oyo,
6 and what he did to Dathan and Abiram, sons of Eliab son of Reuben—when the earth opened its mouth and swallowed them, their households, tents, and every living thing following them, amid all Israel. makambo oyo asalaki na Datani mpe Abirami, bana mibali ya Eliabi, na libota ya Ribeni, tango mabele efungolaki monoko na yango mpe emelaki bango elongo na mabota na bango, bandako na bango mpe bato nyonso oyo bazalaki sima na bango kati na Isalaele mobimba.
7 For your own eyes have seen every great work our Father has done. Ezali bino nde bato bomonaki na miso na bino moko makambo nyonso ya minene oyo Yawe asalaki.
8 Keep the whole command I give you today, so you'll be strong, enter, and possess the land you're crossing into to possess, Yango wana, bobatela mibeko nyonso oyo napesi bino lelo mpo ete bozala makasi mpe bokoka kobotola mokili oyo bolingi kokota mpo na kozwa
9 so you may live long in the land our Father swore to give your ancestors and descendants, a land flowing with milk and honey. mpe kowumela mingi kati na mokili oyo Yawe alakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya bakoko na bino mpe epai ya bakitani na bango, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi.
10 The land you're entering to possess is not like the land of Egypt you left, where you planted your seed and watered it by foot, like a vegetable garden. Mokili oyo ozali kokota mpo na kozwa ekokani te na mokili ya Ejipito epai wapi bowutaki. Kuna, bozalaki kolona bambuma mpe koyeisa mayi na bilanga na kosalaka banzela ya mayi na makolo na bino.
11 But the land you're crossing to possess is hills and valleys, drinking water from the sky's rain. Kasi mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa ezali mokili ya bangomba mpe ya mabwaku, mokili oyo mvula enokaka wuta na likolo.
12 A land your Father cares for; your Father's eyes always on it, from year's start to year's end. Ezali mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, abatelaka ; miso ya Yawe, Nzambe na yo, ezalaka tango nyonso likolo na yango wuta na ebandeli kino na suka ya mobu.
13 If you truly obey the commands I give you today—loving your Father and serving him with all your heart and all your soul. Soki bokotosa na boyengebene mibeko oyo napesi bino lelo ya kolinga Yawe, Nzambe na bino, mpe ya kosalela Ye na motema na bino mobimba mpe na molimo na bino mobimba,
14 I will give your land rain in its season, early and late, so you gather your grain, your new wine, and your oil. nakonokisa kati na mokili na bino mvula na tango na yango, mvula ya ebandeli ya eleko mpe mvula ya suka ya eleko, mpo ete bokoka kobuka mbuma ya malamu, bokoka kozwa vino ya sika mpe mafuta.
15 I will give grass in your field for your livestock, and you will eat and be full. Nakokolisa matiti kati na bilanga mpo na bibwele na bino mpe bokolia mpe bokotonda.
16 Take care that your heart is not deceived, and that you do not turn away and serve other gods and bow down to them, Bosala keba ete bokosama te mpe bopengwa te na kogumbamelaka banzambe mosusu mpe na kofukamelaka yango,
17 our Father's anger burns against you; he shuts the heavens—no rain, the ground yields no harvest—and you soon perish from the good land our Father gives you. noki te Yawe akosilikela bino, akokanga likolo mpo ete enokisa lisusu mvula te mpe mabele ekobota lisusu te mbuma na yango ; na bongo bokolimwa kati na mokili ya malamu oyo Yawe apesi bino.
18 So set these words of mine in your heart and soul; bind them as a sign on your hand, and let them be as reminders on your forehead. Bobatela malamu kati na mitema mpe milimo na bino maloba na ngai oyo, bokanga yango na maboko na bino lokola bilembo, mpe botia yango na bilongi na bino lokola elembo.
19 Teach them to your children—speak of them when you sit in your house and when you walk along the road, when you lie down and when you rise up. Boteya yango na bana na bino na kolobelaka bango yango tango bovandi kati na bandako mpe tango bozali kotambola na nzela, tango bolali pongi mpe tango bolamuki.
20 And write them on the doorposts of your house and on your gates, Bokoma yango na makonzi ya bandako na bino mpe na bikuke na bino
21 so you and your children may live long in the land our Father swore to give your ancestors, as long as the heavens are above the earth. mpo ete mikolo na bino mpe mikolo ya bakitani na bino ezala ebele kati na mokili oyo Yawe alakaki kopesa epai ya bakoko na bino na nzela na ndayi tango nyonso oyo mokili ekowumela.
22 If you carefully keep this whole command I give you—to love your Father, walk in all his ways, and hold fast to him, Soki bobateli malamu mibeko nyonso oyo napesi bino mpo na kosalela, na kolingaka Yawe, Nzambe na bino, na kotambolaka na banzela na Ye nyonso mpe na kokangamaka na Ye ;
23 then our Father will drive out all these nations before you, and you'll dispossess nations greater and stronger than you. wana Yawe akobengana liboso na bino bikolo oyo nyonso, mpe bokobotola bikolo oyo eleki bino na monene mpe na makasi.
24 Every place your foot treads will be yours: your border will be from the wilderness and Lebanon, from the River, the Euphrates, to the western sea. Esika nyonso makolo na bino ekonyata, ekozala ya bino. Mokili na bino ekobanda wuta na esobe kino na Libani, wuta na Ebale Efrate kino na este ya Ebale monene.
25 No one will be able to stand against you; your Father will put fear and dread of you on every land you tread, as he promised. Moto moko te akolonga kotelemela bino. Ndenge Yawe Nzambe alakaki bino, akotia somo mpe kobanga kati na mokili mobimba, na esika nyonso oyo bokokende.
26 See, I am setting before you today a blessing and a curse: Tala, natie lelo liboso na bino mapamboli mpe bilakeli mabe.
27 the blessing, if you obey the commandments of your Father that I am commanding you today; Mapamboli, soki botosi mibeko ya Yawe, Nzambe na bino, oyo napesi bino lelo ;
28 and the curse, if you disobey your Father's commands, but turn from the way I command you today, to follow other gods you have not known. bilakeli mabe, soki boboyi kotosa mibeko ya Yawe, Nzambe na bino, mpe bopengwi na nzela oyo natindi bino lelo, na kosalelaka banzambe mosusu oyo bino botikalaki koyeba te.
29 When your Father brings you to the land you enter to possess, you are to proclaim the blessing on Mount Gerizim and the curse on Mount Ebal. Tango Yawe, Nzambe na bino, akokotisa bino na mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa, bosengeli kotatola mapamboli na ngomba Garizimi, mpe bilakeli mabe, na ngomba Ebali.
30 Are they not beyond the Jordan, westward, in the land of Canaanites living in the Arabah, opposite Gilgal, near the oaks of Moreh? Bangomba nyonso mibale ezali na ngambo mosusu ya Yordani, ngambo ya weste, na mokili ya bato ya Kanana oyo bavandaka na etando ya Yordani, etalana na Giligali, pembeni ya banzete minene ya More.
31 You are crossing the Jordan to enter and take the land your Father gives you; you will possess it and live in it. Kala mingi te, bokokatisa Yordani mpo na kokota mpe kozwa mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa bino. Tango bokobotola yango mpe bokowumela kati na yango,
32 Carefully obey all the statutes and decrees I give you today. bosala keba ete botosa bikateli nyonso mpe mibeko nyonso oyo nazali kotia liboso na bino lelo.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]