Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Deuteronomy 10 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 At that time our Father told me, "Cut two stone tablets like the first, come up to me on the mountain, and make a wooden ark. Na tango wana, Yawe alobaki na ngai : « Bongisa bitando mibale ya mabanga lokola oyo ya liboso mpe mata epai na ngai na likolo ya ngomba ; okosala lisusu sanduku ya mabaya.
2 I will write on the tablets the words on the first tablets you broke, and you are to put them in the ark." Nakokoma na bitando yango maloba oyo ezalaki na likolo ya bitando ya mabanga ya liboso, oyo obukaki ; mpe okotia bitando yango kati na sanduku. »
3 So I made an ark of acacia wood, cut two stone tablets like the first, and climbed the mountain with the two tablets in hand. Boye nasalaki sanduku na mabaya ya nzete ya akasia mpe nabongisaki bitando mibale ya mabanga lokola oyo ya liboso. Namataki likolo ya ngomba, namemaki bitando mibale ya mabanga, na maboko na ngai.
4 He wrote on the tablets, as before, the ten commandments our Father had spoken to you on the mountain from within the fire, on the assembly day. And our Father gave them to me. Yawe akomaki likolo ya bitando yango maloba oyo akomaki liboso : mibeko zomi oyo Yawe ayebisaki bino na likolo ya ngomba kati na moto, na mokolo ya mayangani ; mpe Yawe apesaki ngai yango.
5 I turned, went down the mountain, and put the tablets in the ark I had made; there they've stayed, as our Father commanded me. Boye nakitaki wuta na ngomba mpe natiaki bitando yango mibale ya mabanga kati na sanduku oyo nasalaki ndenge Yawe atindaki ngai mpe ezali kuna sik’oyo.
6 The Israelites traveled from Beeroth Bene-jaakan to Moserah, where Aaron died and was buried; his son Eleazar served as priest in his place. Bana ya Isalaele batambolaki wuta na mabulu ya mayi ya Bene-Yaakani kino na Mosera. Aron akufaki kuna mpe bakundaki ye. Mpe Eleazari, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye lokola Nganga-Nzambe.
7 From there they traveled to Gudgodah, and from Gudgodah to Jotbathah, a land of water streams. Longwa wana, bakendeki na Gudigoda ; sima bakendeki na Yotibata, mokili ya miluka ebele.
8 At that time our Father set apart Levi's tribe to carry the covenant ark, to stand before him, to serve him, and to bless in his name, as they do to this day. Na tango wana, Yawe atiaki pembeni libota ya Levi mpo na komemaka Sanduku ya Boyokani ya Yawe, mpo na kotelemaka liboso ya Yawe, mpo na kosalaka mosala na Ye mpe mpo na kopambolaka bato na Kombo na Ye ndenge bazali kosala kino lelo.
9 So Levi has no portion or inheritance with his brothers; our Father is his inheritance, as our Father promised him. Yango wana, bana ya Levi bazali na ndambo ya mabele te to libula te kati na bandeko na bango : Yawe nde azali libula na bango, ndenge Yawe, Nzambe na bino, alobaki na bango.
10 I stayed on the mountain, as the first time, forty days and forty nights; our Father listened to me again; our Father did not want to destroy you. Boye natikalaki likolo ya ngomba mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei ndenge nasalaki na mbala ya liboso, mpe Yawe ayokelaki ngai na mbala oyo lisusu, pamba te kobebisa bino ezalaki mokano na Ye te.
11 And our Father said to me, "Get up, go ahead of the people, so they can enter and take the land I swore to their fathers to give them." Na sima, Yawe alobaki na ngai : « Kende mpe kamba bato oyo mpo ete bakota mpe bakamata mokili oyo nalakaki kopesa epai na batata na bango na nzela ya ndayi. »
12 And now, Israel, what does our Father ask of you but to fear him, walk in all his ways, love him, and serve him with all your heart and with all your soul, Sik’oyo, Oh Isalaele, likambo nini Yawe, Nzambe na yo, azali kozela epai na yo ? Yawe, Nzambe na yo, azali kozela ete otosa Yawe, Nzambe na yo, na kotambola na banzela na Ye nyonso, na kolinga Ye mpe kosalela Yawe, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba,
13 and to keep the commands of our Father and his statutes I'm commanding you today, for your good? mpe ete obatela mibeko mpe bikateli ya Yawe, oyo nazali kopesa yo na mokolo ya lelo mpo na bolamu na yo moko.
14 Look, to our Father belong the heavens, the highest heavens, the earth, and all in it. Yawe, Nzambe na yo, nde azali Nkolo ya likolo, ya likolo koleka likolo, ya mabele mpe ya nyonso oyo ezali kati na yango.
15 Yet our Father loved your fathers, chose their offspring after them—you, above all peoples—as it is today. Nzokande, Yawe alakisaki bolingo na Ye epai ya batata na bino mpe alingaki bango. Yango wana aponaki bino, bino bakitani na bango, kati na bikolo nyonso ndenge ezali lelo.
16 So circumcise the foreskin of your heart, and be stubborn no longer. Bopetola mitema na bino, oyo etonda na masumu mpe botombokela lisusu Yawe te ;
17 For our Father is God of gods, Lord of lords, the great, mighty, awesome God, who shows no partiality and takes no bribe. pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali Nzambe ya banzambe, Nkolo ya bankolo, Nzambe Monene, Nzambe ya nguya mpe ya somo, oyo aponaka bilongi te mpe azwaka kanyaka te,
18 He does justice for the orphan and widow, and loves the foreigner, giving him food and clothing. abundelaka mwana etike mpe mwasi oyo akufisa mobali, alingaka mopaya mpe apesaka ye bilei mpe bilamba.
19 So you too must love the foreigner, for you were foreigners in the land of Egypt. Bino mpe bosengeli kolinga bapaya, pamba te bino mpe bozalaki bapaya na Ejipito.
20 Fear our Father, serve him, hold fast to him, and swear by his name. Tosa Yawe, Nzambe na yo, mpe salela Ye ; kangama na Ye mpe lapaka ndayi na Kombo na Ye.
21 He is your praise, your Father, who has done for you these great and awesome things your eyes have seen. Azali masanzoli na yo, azali Nzambe na yo, oyo asalelaka yo makambo minene mpe makambo ya somo oyo omonaki na miso na yo moko.
22 Your fathers went down to Egypt, seventy in number; now our Father has made you as numerous as the stars of heaven. Bakoko na yo nyonso oyo bakendeki na Ejipito bazalaki tuku sambo ; mpe sik’oyo, Yawe, Nzambe na yo, akomisi bino ebele lokola minzoto ya likolo.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]